Likita linene ya Sanza ya minei 2025 Liyangani ya Mokolo ya Poso na Mpokwa Liyangani ya Mokolo ya Poso na MpokwaLiyangani ya Mokolo ya Poso na Mpokwa ya likita linene ya mobu ya mbala ya 195 ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esalami na mikolo ya 5–6, Sanza ya minei 2025. Gary E. StevensonMpe Tozali Kolobela KlistoMpaka Stevenson ateyi ete ntango tondimi mabiangi uta na bakambi ya Eklezia mpo na kokumisa Pasika na mokano mingi, tokomona ete bokangami na biso na Yesu Klisto ekokola makasi. Amy A. WrightYo Ozali KlistoNdeko mwasi Wright ateyi etali ntina ya kosalisa bana na biso bandima Yesu Klisto mpe bakoma lokola Ye. James R. RasbandMwango ya BobotoMpaka Rasband ateyi ete Nzambe azali ngolu mpe mwango ya lobiko ezali mwango ya ngolu. Sergio R. VargasEbongiseli na Biso ya Bokambi ya LolaMpaka Vargas azali koteya ete kotya makanisi na Yesu Klisto ekosunga biso tolonga mipepe ya bomoi mpe ekolengela biso tozonga mokolo moko na ndako na biso ya lola. D. Todd ChristoffersonKokumbamelaMpaka D. Todd Christofferson azali koteya etali misala oyo esalaka kokumbamela; bizaleli oyo etali kokumbamela; kokumbamela na biso bobele epayi ya Nzambe; mpe bosenga ya komekola Bikelamu oyo tokumbamelaka. Liyangani ya Eyenga na Ntongo Liyangani ya Eyenga na NtongoLiyangani ya Eyenga na Ntongo ya likita linene ya mobu ya mbala ya 195 ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esalami na mikolo ya 5–6, Sanza ya minei 2025. David A. BednarBantango ya Bozongisi Makambo MansoMpaka Bednar alobi na mokuse makambo ya Bozongisi ya nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto, kobakisa mpe Emonaneli ya Yambo, Buku ya Mormon, mpe bonganganzambe. Steven D. ShumwayKosala na Bomilengeli mpo na Bozongi ya KlistoMpaka Shumway ateyi ete mabiangi mpe banzela mosusu ya kosalela na Eklezia esalisaka biso tokola mpe tomibongisa mpo na kotelema liboso ya Mobikisi. Tamara W. RuniaBoyamboli na Bino Ezali Mokumba te mpo na Yesu Klisto; Yango Epesaka Ye Esengo.Ndeko mwasi Runia azali koteya ete motuya na biso ebongwanaka te ntango tosalaka mabunga mpe ete Mobikisi asosolaka biso mpe alingaka biso topona Ye lisusu mpe lisusu. Gérald CausséMapamboli ya LifutiEpiskopo Caussé ateyi ete bandelo mpe mimekano ekopekisa te bana ya Nzambe bazwa mapamboli oyo Nkolo alakaki. Gerrit W. GongMakabo Minene ya Boseko: Bomikabi ya Yesu Klisto, Lisekwa, BozongisiMpaka Gong azali koteya ete Yesu Klisto asosolaka biso malamu mpenza na mawa na biso mpe na esengo na biso mpe apesaka biso makabo ya bomikabi, lisekwa, mpe bozongisi. John A. McCuneEsengo na Nzela ya Kimoyekoli ya BoyokaniMpaka McCune ateyi esengo tokoki kozwa na kosala mpe kobatela mayokani elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Dallin H. OaksLisalisi ya Bonzambe mpo na BokufiMokambi Oaks alimboli banzela ekeseni oyo Tata na Lola asalisaka biso na bowumeli ya bozali na biso ya kufa, lokola eteni ya mwango na Ye mpo na bokoli na biso ya seko. Liyangani ya Eyenga na Nsima ya Nzanga Liyangani ya Eyenga na Nsima ya NzangaLiyangani ya Eyenga na Nsima ya Nzanga ya likita linene ya mobu ya mbala ya 195 ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esalami na mikolo ya 5–6, Sanza ya minei 2025. Ulisses SoaresLimemia mpo na Biloko ya BuleMpaka Soares ateyi ete kozala na Limemia mpo na makambo ya bule ekomema botondi, emoniseli, mpe esengo. Michael B. StrongBolingani—Elembo ya Kimoyekoli ya SoloMpaka Strong ateyi mabongisi oyo ekoki kosalisa biso na kokolisa boyekoli na biso ya Yesu Klisto mpe kokoma lokola Ye. Scott D. WhitingBokeba na Lisenginia ya MibaleMpaka Whiting azali koteya ete tosengeli kotelemela lisenginia ya kobomba masumu na biso mpe tosengeli na esika koluka lisalisi ya bonzambe. Christopher H. KimKoyeisa Motema na Bino Makasi TeMpaka Kim ateyi ete tokoki kolembisa mitema na biso na nzela ya boyamboli, komikitisa, mpe kotya motema na Nkolo. Patrick KearonBozwa Likabo na YeMpaka Kearon azali kobengisa biso tozwa makabo ya Tata na Lola epayi na biso, mingi mingi likabo ya Mwana na Ye mpe bosolo ya ete tozali bana ya Nzambe. Benjamin M. Z. TaiBolingo ya NzambeMpaka Tai azali koteya etali lolenge nini tokoki koyoka bolingo ya Nzambe mpe Yesu Klisto kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Russell M. NelsonKozala na Elikya na Miso ya NzambeMokambi Nelson ateyi ete tokoki kozala na elikia na miso ya Nzambe ntango tozali kotondisa bomoi na biso na bolingani mpe bizaleli malamu.