Lisalisi ya Bonzambe mpo na Bokufi
Mwango ya Tata na biso ya Lola epesaka lisalisi mpo na kotambwisa biso na mibembo na biso ya kufa.
I.
Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo abimisaki makambo moke etali bomoi na biso ya yambo ya mabele. Kuna, tozalaki lokola bana ya molimo ya Nzambe. Lokola Nzambe alingaki kosalisa bana na ye bakola, Azwaki ekateli ya kosala mabele epayi tokoki kozwa nzoto, koyekola na nzela ya makambo oyo tozali kokutana na yango, kokolisa bizaleli ya Nzambe, mpe komekama mpo na komona soki tokotosa mibeko ya Nzambe. Baoyo bakokisi masengami “bakozala na nkembo oyo babakisaki likolo na mito na bango mpo na libela na libela” (Abalayama 3:26).
Mpo na kokokisa mwango oyo ya bonzambe, Nzambe aponaki Mwana na Ye ya Likinda azala Mobikisi na biso. Lusifelo, oyo likanisi na ye elingaki kobebisa bonsomi ya kopona ya moto, akomaki Satana mpe “abwakamaki na nse.” Lokola abwakamaki na mabele mpe aboyaki libaku malamu ya kozala na bomoi lokola moto, Satana azwaki ndingisa ya “komeka kokosa mpe kozipa miso ya bato, mpe kokamba bango na boombo na mokano na ye, kutu baoyo baboyaki koyoka mongongo” [ya Nzambe] (Mose 4:4).
Likambo ya ntina mpo na mwango monene ya Nzambe mpo na bokoli ya kufa ya bana na Ye ezalaki mpo na bango kokutana na “botelemeli na makambo nyonso” (2 Nefi 2:11). Kaka ndenge misisa na biso ya nzoto ekoki kokola te to kobatelama te na bozangi kobundisama na mobeko ya bozindisi ya mabele, ndenge moko mpe bokoli ya kufa esengaka moto atemela komekama ya Satana mpe botemeli mosusu ya kufa. Likambo ya ntina mingi mpo na bokoli ya molimo ezali nguya mpe bosenga oyo Nzambe apesi mpo na kopona kati na malamu mpe mabe. Baoyo baponaka malamu bakokende liboso mpo na kozwa bomoi na bango ya seko. Baoyo baponaki mabe—lokola bato nyonso basalaka kati na masenginya ya ndenge na ndenge ya bokufi—basengelaki na lisalisi ya lobiko, oyo Nzambe ya bolingo akanaki kopesa.
II.
Na mosika, lisalisi ya Nzambe na bokufi oyo eleki monene mpo na moto ezalaki bongo ebongiseli na Ye ya Mobikisi, Yesu Klisto, oyo asengelaki konyokwama mpo na kofuta motuya mpe kolimbisa masumu oyo bato babongoli motema basalaki. Bomikabi wana ya ngolu mpe ya nkembo elimboli mpo na nini bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezali etinda ya yambo ya nsango malamu. Bomikabi na Ye “ekosala ete lisekwa ya bakufi esalema” (Alma 42:23mpe yango “efutaka mpo na masumu ya mokili” (Alma 34:8), kolongolaka masumu na biso nyonso mpe kopesaka Mobikisi na biso nguya ya kosalisa biso na babolembu na biso ya kufa.
Mosika na bolongoli wana ya nkembo ya masumu oyo esalemi mpe kolimbisama, mwango ya Tata mpe Mwana Mobali ya bolingo epesi makabo mingi mosusu mpo na kobatela biso, bakisa mpe kobatela biso na kosala masumu na esika ya yambo. Bomoi na biso ya kufa ntango nyonso ebandaka na tata mpe mama. Na lolenge ya malamu, bango mibale bazali, na makabo ndenge na ndenge mpo na kotambwisa bokoli na biso. Soki te, kozanga na bango ezali eteni ya botemeli oyo tosengeli kolonga.
III.
Mwango ya Tata na biso ya Lola epesaka lisalisi mosusu mpo na kotambwisa biso na mibembo na biso ya kufa. Nakolobela minei na yango. Nabondeli bino, bokanga ngai te na motuya ya minei, mpamba te masalisi oyo ezali kosangana. Lisusu, ezali na biloko mosusu oyo ebatelaka na ngolu longola makambo yango.
Ya yambo, kolobela Pole to Molimo ya Klisto. Na liteya na ye monene na buku ya Moroni, Moroni azongeli liteya ya tata na ye ete “Molimo ya Klisto epesami na moto na moto, ete akoka koyeba malamu uta na mabe” (Moroni 7:16). Totangi liteya oyo moko na bimoniseli ya mikolo oyo:
“Mpe Molimo apesaka pole na moto nyonso oyo ayaka na mokili; Mpe Molimo angɛngisaka moto nyonso na mokili mobimba oyo ayokaka na mongongo ya Molimo” (Malongi mpe Mayokani 84:46).
Lisusu: “Mpo ete Molimo na ngai atindami na mokili mpo na kongengisa bato ya komikitisa mpe ya mitema ebukana, mpe mpo na kokweisa bato oyo batyolaka Nzambe te” (Malongi mpe Mayokani 136:33).
Mokambi Joseph Fielding Smith alimbolaki makomi oyo: “Nkolo atikaki bato te (ntango babotami na mokili oyo) kozanga lisungi, kosimbasimba mpo na koluka pole mpe bosolo, kasi moto nyonso … abotami na lotomo ya kozwa bokambi, mateya, toli ya Molimo ya Klisto, to Pole ya Bosolo.”
Masungi ya mibale ya minene oyo Nkolo apesi mpo na kosalisa biso na kopona oyo ezali malamu ezali liboke ya malako oyo ezali na boyokani kati na Makomami lokola eteni ya mwango ya lobiko (mwango ya esengo). Malako oyo ezali mitindo, makuli, mpe mayokani.
Mitindo emonisi nzela oyo Tata na biso ya Lola asili kotya elembo mpo na biso kokende liboso kino na bomoi ya seko. Bato oyo bazali kokanisa mitindo lokola lolenge Nzambe azwaka ekateli nanikopesa etumbu bakweyaka na kososola ntina oyo ya mwango ya bolingo mpe esengo ya Nzambe. Na nzela wana, tokokisaka mokemoke kiboninga oyo esengeli na Mobikisi na biso mpe tokoki kozwa makoki mpo na bomati ya nguya na Ye mpo na kosalisa biso na nzela na biso mpo na kokende na esika oyo Ye alingi mpo na biso nyonso. Tata na biso ya lola azali na mposa ya bana na ye nyonso kozonga na bokonzi ya selesitiale, esika Nzambe mpe Mobikisi na biso bafandi, mpe kozala na lolenge ya bomoi ya baye bafandi na nkembo wana ya lola.
makuli mpe mayokani ezali eteni ya mobeko oyo emonisaka nzela ya bomoi ya seko. Makuli, mpe mayokani ya bule oyo tosalaka elongo na Nzambe na nzela na yango, ezali matambe oyo esengeli mpe bisika ya bobateli ya ntina na nzela yango. Nalingaka kokanisa mosala ya mayokani lokola kolakisa ete na nse ya mwango ya Nzambe, mapamboli na Ye ya monene epesami na baoyo balakaka liboso mpo na kobatela mitindo mosusu mpe oyo bakokisaka bilaka wana.
Masalisi mosusu oyo Nzambe apesi mpo na kozwa bikateli ya malamu ezali makambo ya Molimo Mosantu. Molimo Mosantu azali moto ya misato ya Bonzambe. Mosala na Ye, oyo elimbolami na Makomi, ezali ya kotatola Tata mpe Mwana, mpo na koteya biso, mpo na komema biloko nyonso na bokundoli na biso, mpe kotambwisa biso na bosolo nyonso. Makomami ezali na bandakisa mingi ya “makambo” ya Molimo Mosantu, lokola motatoli ya molimo mpo na koyanola na bolukiluki na ntina ya bosolo ya Buku ya Mormon. Likambo ezali te mpo na kobulunganisama na likabo ya Molimo Mosantu, oyo epesami nsima ya libatisi.
Moko ya masalisi ya Nzambe oyo eleki ntina mpo na bana na Ye ya sembo ezali likabo ya Molimo Mosantu. Ntina ya likabo oyo ezali komonana na likambo oyo ete epesami na ndenge ya mibeko nsima ya boyamboli mpe libatisi na mayi, “mpe na nsima [Makomami elimboli] koya bolimbisi ya masumu na yo na moto mpe na Molimo Mosantu” (2 Nefi 31:17). Bato oyo bazali na bolongoli oyo ya masumu—mpe na nsima bazongisaka mbala na mbala bopɛto na bango na nzela ya boyamboli ya mokolo na mokolo mpe bazali kofanda engebene na kondimana oyo bazali kosala na nzela ya mobeko ya elambo—ezali na makoki mpo na elaka ete Molimo Mosantu, Molimo ya Nkolo, “ekoki ntango nyonso … kozala elongo na bango” (Malongi mpe Mayokani 20:77).
Na yango, Mokambi Joseph F. Smith ateyaki ete Molimo Mosantu “akongengisa makanisi ya bato na ntina na makambo ya Nzambe, mpo na kondimisa bango na ntango ya kobongwana na bango ete basalaki mokano ya Tata, mpe kozala kati na bango litatoli ya ntango nyonso lokola moninga na bomoi, kosala lokola motambwisi ya solo mpe ya libateli kati na solo nyonso mpe kotondisa bango mokolo na mokolo na esengo mpe na bosepeli, na ezaleli ya kosala malamu epayi na bato nyonso, koyikela mpasi mpiko na esika ya kosala mabe, kozala na boboto mpe na motema mawa, na motema molai mpe na bolingo. Baoyo nyonso bazali na likabo oyo ya kozanga kokanisa, liyaka oyo ya motuya monene, bazali na mposa ya mayi oyo ezali kolandana nsima ya bosembo. Kozanga lisalisi ya Molimo Mosantu,” Mokambi Smith asukisaki, “moto moko te ya kufa akoki kotambola na nzela ya semba mpe ya moke.”
IV.
Na masalisi ya nguya mingi mpenza mpo na kotambwisa biso na mibembo na biso ya kufa, ezali kopesa mawa ete mingi mpenza batikali kozanga komibongisa mpo na bokutani na bango oyo etyamaki elongo na Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto. Lisese na ye ya baseka zomi, oyo elobelami mbala mingi na likita oyo, epesi likanisi ete kati na baye babengisamaki mpo na kokutana na Ye, bobele ndambo nde ekobongisama.
Biso banso toyebi bandakisa ya baoyo bamilengela te: bamisionele bazonga oyo bakataki bokoli na bango ya molimo na bileko ya kozanga mosala, bilenge oyo batiaki na likama bokoli na bango ya molimo na kokabwanaka na mateya mpe misala ya Eklezia, mibali oyo bazongisaki nsima botiyami na bango na Bonganganzambe ya Melekisedeke, mibali mpe basi—ntango mosusu bakitani ya bapionie ya lokumu to baboti balongobana—oyo balongwe na nzela ya boyokani mokuse kosala mpe kobatela mayokani na tempelo esantu.
Mingi ya bopengwi ya boye esalemaka ntango bandimi balongi te kolanda mwango ya moboko ya bobateli ya molimo ya losambo ya moto ye moko, boyekoli ya makomi mbala na mbala, mpe boyamboli mbala na mbala. Nzokande, basusu bazali kotia pembeni kozongisama sika ya mayokani na poso na poso na kosangana na elambo. Basusu balobi ete Eklezia ezali kokokisa bamposa na bango te, na esika ya oyo bazali komona lokola bamposa na bango ya mikolo mizali koya liboso ya oyo Nkolo apesaki na mateya mpe mabaku na ye mingi mpo na mosala na biso ya ntina mpo na basusu.
Komikitisa mpe kotyela Nkolo motema ezali bongo bankisi mpo na kopengwa ya boye. Lokola Buku ya Mormon eteyaka, Nkolo “Azali kopambola mpe koleisa baoyo batii motema na bango epayi na ye” (Elamani 12:1). Kotia motema na Nkolo ezali mposa moko ya sikisiki mpo na banso oyo bamekaka mabe mitindo ya Nzambe mpe mateya ya baprofeta na Ye na ntina ya makambo ya sika mpe bwanya ya moto.
Nalobelaki ebele ya lisalisi ya bokufi oyo Tata na biso ya bolingo na Lola apesi mpo na kosunga bana na Ye bazonga epai na Ye Eteni na biso na mwango oyo ya bonzambe ezali ya kondimela Nzambe mpe koluka mpe kosalela lisalisi oyo ya bonzambe, mingi mpenza Bomikabi ya Mwana na Ye ya Bolingo, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto. Nasembeli ete tokoteya mpe kosalela mabongisi oyo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.