Mpe Tozali Kolobela Klisto
Tozali balandi ya Yesu Klisto, mpe tolukaka nyonso mibale kozwampe kokabola pole na Ye.
Boyingisi
Na nsuka ya mosala molai oyo tosalaki na mikili ya bapaya, ngai mpe mwasi na ngai Lesa tokotaki na esika oyo mpepo etelemaka mpo tomilengela mpo na kozwa mpepo mosusu—mobembo ya mpepo ya butu—mpo na kozonga na ndako. Ntango totelemaki elongo na basusu mingi kotambolaka malembe malembe na milongo milai, tokokaki koyoka mitungisi oyo ezalaki se kokola ya baninga ya mobembo oyo bazalaki komitungisa mpo na kokoma na nganga ya mibembo, kolekaka na nzela ya botali passeport mpe viza, mpe kolonga etape ya botali ya bokengi.
Na nsuka tokomaki na esika moko oyo mosali ya duane afandaki mpe amonanaki lokola ete bolembu mpe mitungisi mingi oyo ezalaki na kisuku etalaki ye te. Azalaki penepene na masini, kozangaka kotala na miso, azwaki mikanda na ngai, andimisaki elilingi na ngai, abetaki na lokasa moko nsima na mosusu, mpe na nsuka atyaki elembo na passeport na ngai na mongongo makasi.
Na nsima, azwaki passeport ya Lesa. Kozanga mayoki, moto na nse mpe atyaki makanisi na ye na mosala na ye, na lolenge ya mayele abetaki nkasa na liso ya mayele, mpe atyaki bokebi mingi na makambo mikemike ya mikanda oyo ezalaki liboso na ye. Tokamwaki mwa moke ntango atelemaki na mbalakaka, atombolaki moto na ye, mpe atalaki Lesa na miso na kotalaka likolo na nko mpe na boboto. Na mwa koseka ya boboto, atyaki elembo na malembe na passeport ya Lesa mpe azongiselaki ye mikanda yango. Mwasi na ngai mpe asekaki, andimaki mikanda yango mpe balobelanaki maloba ya boboto mpo na kokabwana.
“Nini ewuti kosalama?” Natunaki na kozanga kondima.
Na nsima Lesa alakisaki ngai oyo mosali amonaki—kalati moko ya moke na elilingi ya Mobikisi. Ekotaki na mbalakaka uta na saki ya Lesa na kati ya nkasa ya passeport na ye. Oyo nde ezali likambo mosali ya duane amonaka. Yango nde ebongolaka ezaleli na ye mobimba.
Grace and Truth, na Simon Dewey, courtesy of altusfineart.com, © 2025, used with permission
Elilingi oyo ya moke ya Mobikisi ekangisaki mitema ya bapaya mibale oyo bazalaki na boyebani te. Ebongolaki oyo ezangaki bomoto ekoma ya bomoto, kolakisaka bonzenga, likamwisi, mpe bosolo ya Pole ya Yesu Klisto. Mokolo mobimba wana mpe mbala mingi uta mokolo yango, nakanisaka ntango wana ya elengi, ya pete ya esngo mpe nasepelaki na bopusi ya nkembo ya Pole ya Klisto likolo ya bana ya Nzambe.
Tolobelaka na Ntina ya Klisto
Tozali balandi ya Yesu Klisto, mpe tolukaka nyonso mibale kozwa mpe kokabola pole na Ye. Nkombo ya Eklezia ezali na teolozi na biso ya “Yesu Klisto ye moko azali libanga ya nsuka.” Na nzela ya baprofeta ya kala mpe ya bomoi, Tata na biso na Lola atindaki biso “Toyoka Ye!” mpe “toya epayi ya Klisto.” “Tozali kolobela Klisto, tozali kosepela na Klisto, tozali koteyaka Klisto, [mpe] tozali kosakola Klisto.”
Biso toteyaka ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe, mpe na ntango ya mosala na Ye na mabele, Yesu ateyaki nsango malamu na Ye mpe atyaki Eklezia na Ye.
Biso totatolaka ete na nsuka ya bomoi na Ye, Yesu amikabaki mpo na masumu na biso ntango anyokwamaki na elanga ya Getesemane, abakamaki na ekulusu, mpe nsima asekwaki.
Biso tosepelaka ete mpo na libonza ya bomikabi ya Mobikisi, tokoki kolimbisama mpe kopetolama na masumu na biso ntango tozali koyambola. Yango ememelaka biso kimia mpe eikya kosalaka ete ekoka mpo na biso tozonga liboso ya Nzambe mpe tozwa litondi ya esengo.
Biso tosakolaka ete mpo na Lisekwa ya Yesu, liwa ezali nsuka te kasi ezali litambe ya ntina mpo na kokende liboso. “Biso nyonso tokosekwa nsima ya kokufa. Yango elingi koloba ete molimo ya moto moko na moko mpe nzoto ekozonga elongo mpe kobika mpo na libela.”
Yaka epayi ya Klisto
Baprofeta ya bomoi na mikolo na biso—baye bazwaka emoniseli uta na Nzambe mpo na koteya mpe kokamba biso—bazali kobengisa biso mingi mpo na koya epayi ya Klisto. Bazali kosalisa biso totya mitema, matoyi mpe miso na biso mingi koleka epayi na Ye. Tokoki kotanga bandakisa mingi vya mbongwana mpe bokolisi oyo esakolamaki na Bokambi ya Yambo oyo ebongisami mpo na kotya makanisi na biso na Yesu Klisto. Mwa ndambo na yango ezali:
-
Mokano ya kolongola nkombo “Eklezia ya Mormon” mpe ya kotya yango na nkombo elongobani, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.
-
Bozali ya mayemi ya sika, oyo efulamaki na moto ya likambo ya Klisto mpo na kolakisa na bandako ya makita.
-
Mito ya makambo mpe bamiziki ya Bilenge Basi mpe Bilenge mibali eyekami na Yesu Klisto, lokola “Nazali Moyekoli ya Yesu Klisto” mpe “Botelela Klisto.”
-
Ebetaka nsete makasi na Bomikabi mpe Lisekwa ya solo ya Yesu Klisto lokola makambo ya nkembo koleka na mambi ya kala.
-
Ezwaka bosepeli ya Pasika lokola eleko mpe kaka lokola feti te, na kopesaka motuya mingi na Yesu Klisto.
-
Boyingisi ya botali bolakisi ya Eklezia ya Yesu Klisto mpe lolenge ya elembo na yango.
Totala na bokebi mingi motuya ya makambo oyo. Ya yambo, elembo ya Eklezia.
Elembo ya Eklezia
Na 2020, Mokambi Russel Nelson akotisaki elembo ya sika ya botali bolakisi mpo na Eklezia. Elembo oyo ezali kolakisa bosolo ete Klisto azali na katikati ya Eklezia na Ye mpe asengeli kozala na katikati ya bomoi na biso. Tomonaka sikawa elembo oyo eyebani na mikanda ya tempelo, basite internet mpe bazulunalo ya Eklezia, lokola elembo mpo na aplikasio ya Biblioteki ya Nsango Elamu, mpe kutu na bilembo ya mokanda ya basoda mpo na bandimi mingi ya Eklezia oyo bazali kosala na mampinga ya basoda Elembo yango ezali na nkombo ya Eklezia oyo ezali na kati ya libanga ya nse, bokundoli ete Yesu Klisto azali libanga monene esimbi ndako, elakisami awa na monoko ya Cambodge mpe ezali kosalelama na bankota 145.
Na kati ya elembo yango ezali na elilingi ya ekeko ya Christus ya marbre oyo Albert Bertel Thorvaldsen alingaki mingi, oyo ekomi ya kokangana mingi na Eklezia mpe ezwami na bisika oyo eyambaka bapaya mpe na bisika ya tempelo na mokili mobimba. Bokeseni na yango na elembo ya Eklezia epesi likanisi ete Klisto asengeli kozala katikati ya nyonso oyo tosalaka. Lolenge moko mpe, maboko ya Mobikisi oyo esembolami elakisi elaka na Ye ya koyamba banso baye bakoya epayi na Ye. Elembo oyo ezali elilingi ya miso ya bolingo ya Mobikisi Yesu Klisto mpe bokundoli ya ntango nyonso ya Klisto ya bomoi.
Mpo na mposa ya koyeba, natunaki mabota mpe baninga mingi na ntina ya eloko moko ya ntina ya elembo ya Eklezia. Likambo ya kokamwa, mingi bayebi te eloko moko ya bule oyo ezali na yango. Yesu Klisto atelemi na nse ya litimbo (arke). Yango ezali kolakisa Mobikisi asekwi abimi na lilita. Tosepelaka mpenza na lisekwa, bomoi ya Klisto, atako na bosaleli ya elembo ya Eklezia.
Pasika ya Likolo mpe Esantu
Sikawa tomanyola ntina ya Pasika. Na bansango ya kala te ya Bokambi ya Yambo na oyo etali Pasika, totindamaki “kosepela Lisekwa ya Mobikisi ya bomoi na koyekolaka mateya na Ye mpe kosalisa mpo na kotya mimesano ya Pasika na kati ya lisanga na biso mobimba, mingimingi na kati ya mabota na bisomei.” Na mokuse, tolendisamaki mpo na kokende na molulu ya Pasika ya likolo mpe ya bule koleka.
Nalingaka kokoba ya emoniseli etali Pasika mpe nasepelaka mpo na babokasi na bino mingi mpo na kosala ete Pasika ezala libaku ya bule mpe esantu. Kobakisa na kosala likita ya elambo ya ngonga moko na mokolo ya eyenga ya Pasika, bandakisa mosusu ya milulu elongobani ezali na nsambo ya palwasi mpe ya likonzi mpe misala na mokolo ya Eyenga ya Mandalala lokola mpe na ntango ya Poso Esantu. Makundoli yango ezali na misala elongo na bana mpe bilenge mpe mbala mingi esangisi bayembi ya mangomba ndenge na ndenge. Basusu basalaki botali bandako ya “Klisto na bomoi” mpo na bandimi mpe baninga mpe basanganaki na milulu ya Pasika ya lisanga ya mangomba mingi.
Milulu ya boye ezali kolakisa ebele ya bato na engumba ya Yelusaleme oyo mingongo na bango esanganaki mpo na kokumisa Mobikisi na ntango ya bokoti na Ye ya elonga. Lolenge moko ya kokamwa ezali balapole ya biyano na bino na libyangi ya Bokambi ya Yambo mpo na kokumbamela na ndako lokola mabota mpo na kokekembela mokolo mosantu oyo ya ntina mpenza.
Nandimi ete bokumbameeli ya libota zingazinga ya Pasika emati na lolenge ya kokamwa. Mibu mibale eleki, nalobelaki mokano ya libota na biso mpo na kobongisa lolenge tokumisaka Pasika. Tondimaka ete oyo ezali naino mosala oyo ezali kosalama. Tosepelaka ntango nyonso na bilei ya sikisiki ya mokolo ya Eyenga ya Pasika, bitunga ya Pasika mpe koluka maki ya Pasika, mpe tozali kino lelo kosala. Nzokande, kobakisa bonene ya molimo ya mokano oyo etali mingi Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye na feti na biso ememi bokatikati ya elengi na bokundoli na biso ya makambo oyo ya bule koleka nyonso.
Mobu oyo ekozala komeka na biso ya misato mpo na kosala ete Pasika ezala na ntina mingi na Klisto. Lokola Mbotama ya Noele, lisano na biso ya Mokolo ya Pasika ya libota esangisi bilamba ya ebandeli, botangi ya makomi uta na Kondimana ya Sika mpe Buku ya Mormon, miziki, bilili ya Pasika, mandalala—mpe mwa mobulu, soki nazali kozala sembo mobimba. Bana mpe bankoko bazali kotanga mpe kotanga masanzoli ya Eyenga ya Palmier ya “Hosanna … Epambolami ye oyo akoya na nkombo ya Nkolo; Hosana na likolo koleka” mpe “Oyo ezali Yesu … ya Galilea” emonani lokola ezali na ntina lokola “Kimya na mabele, bolingi malamu mpo na bato” ezali na ntango ya Noele.
Tosepelaka sikawa na kosangisa biloko ya kokembisa. Oyo ezalaki kala bobele mpo na balapin mpe maki ya Pasika ezali sikawa na bokatikati na Christus mpe bilili ya lilita ya mpamba, Mobikisi asekwi komonana na Elanga libanda ya lilita, mpe komonana ya Mobikisi epayi ya Banefi. Tozali mpe kosala makasi mpo na kosala ete Pasika ezala eleko na esika ezala kaka mokolo. Tozali komeka kozala na boyebi mingi, kokanisa, mpe bokembeli mingi na mokolo ya Eyenga ya Mandalala mpe Moloko ya mitano ya Esantu mpe ya makambo ya bule oyo esalemaki na ntango ya Poso Esantu mobimba.
Pasika epesaka biso nzela ya kokumisa ezala mbeka ya bomikabi ya Yesu Klisto mpe Lisekwa ya solo mpe ya esengo ya Ye. Mitema na biso ezalaka na bozito ntango tokanisaka mpasi ya Mobikisi na Elanga mpe likolo ya Kalvari, kasi mitema na biso esepelaka ntango tozali komona na makanisi lilita ya mpamba mpe mobeko ya lola, “Asekwi!”
Lisekwa moko ya Solosolo
Kala mingi te Bokambi ya Yambo elendisaki biso “kozela na esengo Pasika mpe Lisekwa ya Yesu Klisto—nsango oyo eleki nkembo koleka bansango nyonso epai ya bato” emonisaka bonene ya eleko oyo. Atako emonani ete ezali na momeseno oyo ezali kokola kati na bato ndenge na ndenge ya teolozi ya baklisto mpo na kotalela Lisekwa na maloba ya elilingi mpe ya elembo, tozali kondimisa liteya na biso ete “Lisekwa elakisi ete baoyo nyonso basili kozala na bomoi bakosekwa, mpe Lisekwa ezali mpenza.” “Mpo lokola na Adama banso bakwei, kaka bongo na Klisto banso bakozonga na bomoi.” Yesu Klisto abukaki bansinga ya liwa mpo na molimo nyonso ya bomoi.
Totelemaka solo banso ya kokamwa na ngolu oyo Yesu apesi biso. Toyambaka maloba na Ye ete “bolingo monene ezali na moto te koleka oyo, ete moto apesa bomoi na ye mpo na baninga na ye.”
C. S. Lewis alobaki ete “kosakola boklisto elimbolaki [mpo na Bapostolo] libosoliboso kosakola Lisekwa. … Lisekwa ezali moto ya likambo ya ntina mingi na lisukulu nyonso ya Boklisto oyo elobelami na Misala. Lisekwa, mpe mbano na yango, ezalaki ‘nsango malamu’ to nsango malamu oyo baklisto bamemaki.”
Nasakoli ete “Ezali na Lisekwa, … lilita ezali na elonga te, mpe nsomɔ ya liwa emelami kati na Klisto.”
Bosukisi mpe Litatoli
Mpo na kosukisa, natatoli ete banso bandimi mabiangi uta na profeta na biso ya bomoi mpe bapesi toli na ye mpo na kokanisa mingi koleka makambo ya bule oyo Pasika ezali komonisa bakomona ete bokangami na bango na Yesu Klisto ekokola makasi koleka.
Kaka mikolo eleki, nayekolaki na ntina ya nkoko moko ya mwasi oyo amekaki lisolo ya Pasika elongo na mwana ya mwana na ye ya mobali ya mibu minei na kosalelaka bililingi ya pete ya lilita, libanga oyo ezipaki lilita, Yesu, Mala, bayekoli, mpe anzelu. Mwana mobali ya moke atalaki mpe ayokaki na bokebi ntango nkoko na ye ya mwasi akabolaki bokundi, bokangami mpe bofungoli ya lilita, mpe esika ya elanga ya Lisekwa. Na nsima azongelaki lisolo yango na bokebi nyonso na bozindo ya kokamwa epai ya baboti na ye ntango azalaki kotambolisa mituya yango epai na ye moko. Kolanda ngonga oyo ya sukali, batunaki ye soki ayebi mpo na nini tozali na Pasika. Mwana mobali atombolaki miso mpe na makanisi ya bomwana ayanolaki, “Cuz Ye azalaki na bomoi.”
Nabakisi litatoli na ngai na oyo ya ye —mpe na oyo ya bino mpe na oyo ya banzelu mpe basakoli —ete asekwi mpe ete azali na bomoi, oyo nazali kotatola na nkombo ya Yesu Klisto, Amen.