Kozala na Elikya na Miso ya Nzambe
Lokola tozali koluka na molende kozala na bolingani mpe bizaleli malamu etondisa bomoi na biso, elikya na biso na kopusana penepene na Nzambe ekobakisama.
Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi, nazali na botondi ya koloba na bino lelo, kati na likita linene oyo ya ntina. Miso na ngai ezali kokoba kokoma mibange. Matondo mingi na bososoli na bino ntango nazali kopesa nsango na ngai.
Tozali kobika na mokolo ya bokasi monene na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Natondi na esengo ntango nazali komona bokoli na bisika mingi.
Nazali mingimingi kofulama na bilenge na biso. Bazali kosala mosala na motango monene. Bazali koluka bankoko na bango mpe kosala makuli na tempelo. Bilenge na biso ya mibali mpe basi bazali kotinda baaplikasio ya mosala ya misionele na mitango ebele. Nkola oyo ezali komata ezali komata lokola balandi ya makasi ya Yesu Klisto.
Kala mingi te nakutanaki na kokololo moko ya mwasi ya sika. Ntango nazali komanyola mikakatano oyo akokutana na yango na bomoi na ye, nayokaka mposa monene ya kosalisa ye atonga bondimi kati na Yesu Klisto. Kobika nsango malamu na Ye ezali na ntina mpo na esengo na ye ya mikolo ekoya.
Ye, lokola moko na moko na biso, akokutana na mikakatano. Biso banso tokokutana na bokono, kozanga mawa, komekama, mpe kobungisa. Mikakatano yango ekoki kobeta ekuke ya elikya na biso moko. Nzokande, bayekoli ya Yesu Klisto bazali na likoki ya kozala na elikya ya ndenge mosusu.
Ntango tosalaka mpe tobatelaka mayokani elongo na Nzambe, tokoki kozala na elikya oyo ebotamaka na Molimo. Nkolo ayebisaki Profeta Joseph Smith ete elikya na biso ekoki “kokoma makasi na miso ya Nzambe.” Kanisa libondisi ya kozala na elikya na miso ya Nzambe!
Ntango nazali kolobela kozala na elikya liboso ya Nzambe, nazali kolobela kozala na elikya ya kopusana penepene na Nzambe sikawa! Nazali kolobela kosambela na elikya ete Tata na Lola ayokaka biso, ete Ye asosolaka babosenga na biso malamu koleka biso. Nazali kolobela kozala na elikya ete Ye alingaka biso mingi koleka lolenge tokoki kososola, ete Ye atindaka bazelu bazala elongo na biso mpe elongo baye tolingaka. Nazali kolobela kozala na elikya ete Ye azali na mposa makasi ya kosalisa moko na moko na biso akoma na makoki kokokisa bokasi na biso ya likolo koleka.
Sikawa, ndenge nini tokoki kozwa elikya ya ndenge wana? Nkolo ayanoli motuna oyo na maloba oyo: “Tika ete misopo ezala etonda bolingani pona epayi bato nyonso, mpe tika ete bolamu elata makanisi na yo ntango nyonso; bong nde boliki na yo ekokoma monene na miso ya Nzambe.”
Yango ezali fungola! Na maloba ya Nkolo ye moko, bolingani mpe bizaleli malamu efungolaka nzela mpo na kozala na elikya na miso ya Nzambe! Bandeko mibali mpe basi, tokoki kosala yango! Elikya na biso ekoki solo kokoma makasi na miso ya Nzambe, kaka sikawa!
Totalela nyonso mibale bolingani mpe bizaleli malamu.
Ya liboso, bolingani. Mibu mibale eleki, nabiangaki likolo na biso, lokola balandi ya mayokani ya Yesu Klisto, mpo na kozala bapesi kimia. Nazongeli makambo oyo nalobaki na ntango wana: “Nkanda endimisaka te. Koyinana etongaka moko te. Koswana mokolo moko te ekambaka na nsuka efulama.”
Bolingani ya solo epayi ya bato nyonso ezali elembo ya bato oyo bapesi kimia! Ezali na ntina mingi ete tozala na bolingani na masolo na biso, ezala mangomba ya bato to biso moko. Natondi baye kati na bino botiaki toli na ngai ya kala na motema. Kasi tokoki kaka kosala malamu koleka.
Koyinana oyo ezali lelo kati na masolo ya bato mpe na bamedia sosio ezali kobangis. Maloba ya koyina ezali bibundeli oyo ebomaka . Kowelana epekisaka Molimo Mosantu azala moninga na biso ya ntango nyonso.
Lokola balandi ya Yesu Klisto, tosengeli kokamba nzela lokola bapesi kimia. Ntango bolingani ekomaka eteni ya bomoto na biso, tokobungisa mposa ya kokitisa basusu. Tokotika kosambisa basusu. Tokozala na bolingani mpo na baye bawutaka na bisika nyonso ya bomoi. Bolingani epayi ya bato nyonso ezali ntina mpo na bokobi na biso. Bolingani ezali moboko ya bizaleli ya bonzambe.
Tika biso obondela Tata na biso na Lola mpo na kotondisa mitema na biso na bolingani monene koleka—mingimingi mpo na baoyo bazali mpasi mpo na kolinga.—mpo ete bolingani ezali likabo ewuti na Tata na biso na Lola mpo na balandi ya Yesu Klisto. Mobikisi azali Nkumu ya Kimia. Tosengeli kozala bisaleli na Ye mpo na kimya.
Sikawa, tolobela bizaleli malamu. Nkolo ayebisi biso tokembisa makanisi na biso kozanga kotika bizaleli malamu. Kanisa botomboli oyo okozwa, na likanisi nyonso ya malamu, ntango okotombola yango na bizaleli malamu. Bizaleli malamu esalaka ete makambo nyonso ezala malamu mpe ezala na esengo! Na ngambo mosusu, kanisa naino likambo oyo ekosalama, ntango obakisi bizaleli malamu na likanisi ya mbindo, likanisi ya motema mabe, to likanisi oyo ezali kotungisa. Bizaleli malamu ekobengana makanisi wana . Bizaleli malamu ekolongola yo na makanisi ya mitungisi mpe ya kotungisa.
Bandeko mibali mpe basi, lokola mokili ezali kokola mabe mingi, tosengeli kokoma peto mingi. Makanisi, maloba, mpe misala na biso esengeli kozala na bizaleli malamu oyo ezangi kolemba mpe kotondisama na bolingo ya peto ya Klisto epayi ya bato banso. Libaku monene liboso na biso ezali ya kokoma bato oyo Nzambe azali na mposa biso tozala.
Losambo ya mbala na mbala na ndako ya Nkolo ebakisaka makoki na biso mpo na nyonso mibale bizaleli malamu mpe bolingani. Na bongo, ntango na tempelo ebakisaka elikya na biso liboso ya Nkolo. Bobakisi ntango na tempelo ekosalisa biso tomilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Toyebi mokolo to ngonga ya boyei na Ye te. Kasi nayebi ete Nkolo azali kotinda ngai na kolendisa biso tomilengela mpo na “mokolo monene mpe ya nsomo wana.”
Lokola tozali koluka na molende kozala na bolingani mpe bizaleli malamu etondisa bomoi na biso, elikya na biso na kopusana penepene na Nzambe ekobakisama. Nabengisi bino bosala matambe na mokano mpo na kokola na elikya na bino liboso ya Nkolo. Nsima, lokola tozali kokende epayi ya Tata na biso ya Lola na elikya oyo ezali se kobakisama, tokotondisama na esengo mingi koleka, mpe bondimi na biso na Yesu Klisto ekobakisama. Tokobanda komona nguya ya molimo oyo eleki bilikya na biso ya minene.
Tozali na botondi epayi ya Nkolo mpo na mbangu ya botongi tempelo na mibu mileki. Na nse ya bokambi na Ye, lelo, tosakoli miango ya kotonga tempelo na moko na moko ya bisika 15 oyo:
-
Reynosa, Mexique
-
Chorrillos, Peru
-
Rivera, Uruguay
-
Campo Grande, Brezil
-
Porto, Portugal
-
Uyo, Nigeria
-
San Jose del Monte, Philippines
-
Nouméa, Nouvelle Caledonie
-
Liverpool, Australie
-
Caldwell, Idaho
-
Flagstaff, Arizona
-
Rapid City, Dakota du Sud
-
Greenville, Caroline du Sud
-
Norfolk, Virginie
-
Spanish Fork, Utah
Natatoli ete Yesu Klisto, Mosikoli ya Yisalaele, akambaka oyo, Eklezia na Ye. Azali komibongisa mpo na koya lisusu. Tika ete biso mpe tomilengela mpo na koyamba Ye. Mpo na yango nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.