Yo Ozali Klisto
(Matai 16:16)
Tolingaka bana na biso bandimela Yesu Klisto, bazala ya Yesu Klisto mpe ya Eklezia na Ye na nzela ya boyokani, mpe kosala makasi mpo na kokoma lokola Yesu Klisto.
Ntango mwana na biso ya mobali Eli azalaki na kelasi ya minei, kelasi na ye esalaki guvernema moko ya lokuta epayi wapi Eli aponamaki na baninga na ye mpo na kosala lokola zuzi ya kelasi. Mokolo moko zuzi moko awutaki Utah na mosala ya etuka ya mibale ayaki kotala bango, alatisaki Eli elamba esengeli mpe nsima alapisaki ye ndai ya mosala mpo na kelasi na bango. Yango etombolaki na makanisi ya bolenge ya Eli, mposa ya koyekola kelasi ya mibeko mpe mokeli mibeko Yemoko, Yesu Klisto.
Nsima ya mibu ebele ya milende makasi, Eli azwaki mbela moko mpo kosolola na moko ya baponami na ye ya liboso mpo na eteyelo ya mibeko. Ye alobaki, “Mama, batunaki ngai mituna 10. Motuna ya nsuka ezalaki, ‘Esika nini ozwi bizaleli na yo ya malamu?’ Nalobaki ete na lisolo mobimba, bato bazwi miango ya bizaleli ya malamu na kotambwisa bomoi na bango uta na lolenge ya kala. Ndakisa ya bizaleli malamu nazali kobunda mpo na kotambwisa bomoi na ngai uta na yango ezali oyo ya Yesu Klisto. Nalobaki soki bato nyonso balandaki mateya ya Yesu Klisto na Esakola likolo ya Ngomba ekokaki kozala esika moko malamu koleka mpe ya kimia koleka.” Nsima lisolo esilaki, mpe ye akanisaki kati na yemoko, “Bandoto na ngai ya bomwana esili. Moto te na eteyelo ya mokili alingaka koyoka etali Yesu Klisto.”
Poso mibale nsima, Eli andimamaki na kelasi na burse. Yambo ya komikotisa, tokendaki kotala campus. Eteyelo ya mibeko ezalaki lokola ndako monene likolo ya ngomba mpe ezingamaki na mayi moko kitoko. Na bokamwi makasi, ntango tozalaki kotambolaka na biblioteke kitoko mpe ba couloirs ya kitoko, tomonaki likolo ya dalapo mpe ekomami likolo ya libanga Esakola likolo ya Ngomba.
Esakola likolo ya Ngomba ezali na ntembe te, lisukulu moko ya ntina mingi oyo esalema naino te, pionie na mateya na yango. Esakola mosusu te ekoki kosalisa biso tososola malamu bizaleli ya Yesu Klisto, bizalela na Ye ya bonzambe, mpe ntina na biso ya nsuka ya kokoma lokola Ye.
Bomoi mobimba ya moyekoli ya Yesu Klisto ebandaka kati na bandako na biso—mpe kati na Eteyelo ya bana kobanda sanza 18. Tolingi bana na biso bandimela Yesu Klisto, bazala ya Yesu Klisto mpe ya Eklezia na Ye na nzela ya boyokani, mpe kosala makasi mpo na kokoma lokola Yesu Klisto.
Bondimela Yesu Klisto
Yambo, bondimela Yesu Klisto
Nsima ya Esakola etali Lipa ya Bomoi “mingi kati ya bayekoli ya [Nkolo]” bamonaki yango mpasi mpo na kondima mateya mpe malongi na Ye, mpe “bazongaki nsima, mpe balandaki ye lisusu te.” Boye Yesu abalukaki epayi ya Bazomi na Mibale mpe atunaki motuna moko ya mpasi: “Bino mpe bolingi kokende?”
Petelo ayanolaki:
“Nkolo, tokokende epayi ya nani? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.
“… Biso tondimi mpe toyebi ete ozali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi.”
Lokola Petelo alakisaki, bondimeli ezali “kozala na bondimi na moto moko to kondima eloko moko lokola ya solo.” Mpe mpo na bondimi na biso emema na lobiko, yango esengeli etyama kati na Nkolo Yesu Klisto. Tosalelaka bondimi na Yesu Klisto ntango tozali na kondimisama ete Ye azali, bososoli moko ya ezaleli mpe lolenge na Ye ya solo, mpe boyebi ete tozali kosala makasi mpo na kobika engebene na bolingi na Ye.”
Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, alobaki, “Bondimi na Yesu Klisto ezali moboko ya bindimeli nyonso mpe nzela ya nguya ya bonzambe.”
Lolenge nini tokoki kosunga bana bakolisa bondimi na bango na Yesu Klisto mpe bazwa nguya na Ye ya bonzambe? Tosengeli kotalela bobele Mobikisi na biso Yemei.
“[Nkolo] alobaki epayi ya bato, kolobaka:
“Tala, nazali Yesu Klisto. …
“Botelema mpe boya epayi na ngai. …
“… Ebele ya bato babimaki, mpe batiaki maboko na bango o mopanzi na ye, mpe bayokaki bilembo ya nsete na maboko na ye mpe na makolo na ye;mpe oyo basalaki, kobima moko na moko … mpe bamonaki na miso na bango mpe bayokaki na maboko na bango, mpe bayebaki na ntembe te mpe bapesaki litatoli, ete ezalaki ye.”
Nabengisi bino bomanyola nini yango ekoki kozala lokola kati na bomoi ya bana mike. Ezali bango koyoka matatoli ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye? Ezali bango komona bililingi ya limemia, ya bosanjoli ya mosala mpe Bonzambe na Ye? Ezali bango koyoka mpe kososola Molimo Mosantu kotatolaka bosolo mpe bonzambe na Ye? Ezali bango koyeba etali etinda mpe mosala na Ye?
Kozala ya Yesu Klisto mpe ya Eklezia na Ye.
Ya mibale, Kozala ya Yesu Klisto mpe ya Eklezia na Ye.
Bato ya mokonzi Benjamin bayokaki mbongwana ya nguya ya motema mpe na nzela ya boyokani bapesaki bomoi na bango na kosalaka bolingi ya Nzambe. Mpo na boyokani oyo basalaki elongo na Nzambe mpe Yesu Klisto, bango “babiangemaki bana ya Klisto, bana mibali na ye, mpe bana basi na ye.” Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali na mokumba ya boyokani ya kotonga bokonzi na Ye mpe komilengela mpo na bozongi na Ye.
Lolenge nini tokoki kosalisa bana basala mpe babatela mayokani ya bule? Na kati ya Yaka, Landa Ngai buku, na appendix A mpe B, tozali kokuta babandi ya masolo mpe mateya oyo ekopesa nguya na mabota mpe ekosunga balakisi mpe bakambi na mokumba na bango ya bule mpo na kolengela bana mpo na bomoi mobimba na nzela ya boyokani na Nzambe.
Kokoma lokola Yesu Klisto
Ya misato, kokoma lokola Yesu Klisto.
Na Buku ya Mormon, Mobikisi ayebisaki bayekoli na Ye abengaki sika ete bazala mingimingi mpenza lokola Ye: “Lolenge kani ya bato bosengeli kozala? Solo nalobi epayi na bino, kutu lokola nazali.”
Lolenge nini tokoki kosalisa bana babatisami mpe bazwi nkotisa kokokisa mokumba na bango ya boyokani ya komisangisa bango moko mpe basusu kati na Yesu Klisto? Bomoi mobimba ya kimoyekoli esengi biso, “ kozala basali … ya maloba, mpe bobele bayoki te.”
Ntango bozali kopesa mabiangi na bayekoli ya bilenge ya Nkolo, tosengi bozwa libaku nyonso mpo na kokamba bango, kotambwisa bango, kotambola pembeni na bango, mpe kosalisa bango bazwa Nzela. Bosolola elongo na bana mike oyo ya motuya ntango bazali komilengela mpo na koteya, kotatola, kosambela, to kosalisa mpo ete bazala na elikia mpe bazwa esengo na kokokisa mikumba na bango. Boluka banzela efulama mpo na kosunga bango bayeba ete oyo ezali eklezia na bango mpe ete bazali na mosala moko monene ya kosala na komilengela mpo na bozongi ya Mobikisi.
Ntango Yesu Klisto akokoma ntina ya makanisi na bomoi na biso, oyo tokolinga, mpe lolenge tokolinga yango, ebongwani libela na libela. Mbongwana ebongolaka eloko nyonso! Yango ebongolaka lolenge na biso “ete tozala lisusu te na mposa ya kosala mabe, kasi kokoba kosala malamu.” Yango ebongolaka lolenge tolekisaka ngonga na biso, bozui na biso; makambo tozali kotanga, kotala, koyoka, mpe kokabola. Yango ebongolaka lolenge toyanolaka na lisolo moko ya lokumu ya unuversite to ya mosala na nzela ya interneti.
Tosengeli kokotisa pole ya Yesu Klisto kati na esika nyonso ya bomoi na biso. Soki tozali kotatolaka te bosolo ya Bonzambe na Ye yambo ya kufa, mosala na Ye ya bonzambe, mpe Lisekwa na Ye oyo epanzaki boloko na bandako na biso mpe na liyangani nyonso ya Eklezia oyo, nsima mateya na biso ya bolingo, mosala, bosembo, komikitisa, botondi, mpe mawa ekoki kokoma eloko te koleka lisukulu ya kopesa makasi ya bomoi ekanisami mpenza. Kozanga Yesu Klisto ezali na nguya moko te ya kobongwana, ntina moko te ya kozela, mpe kobongisama te ya mikakatano ya bomoi. Soki tokomi pepele na kiboyekoli na biso ya Yesu Klisto, ekoki kozala likama mpo na bana na biso.
Ntango toyebisi bana na biso ete tolingaka bango, toyebisaka bango lisusu ete Tata na bango ya Lola mpe Mobikisi Yesu Klisto balingaka bango? Bolingo na biso ekoki kolendisa mpe kofula, kasi ya Bango bolingo ekoki kopetola, konetola, mpe kobikisa.
Yesu oyo asengeli te kozala Yesu ya masano, to Yesu moko ya lokuta, to Yesu moko azanga nzoto, to Yesu moko ya pete, to Yesu moko ayebani te, 41 kasi ya nkembo, ya ntango nyonso, mosekwi, abulisama, ya kosanzola, ya nguya Mwana se Moko ya Nzambe, oyo azali na nguya ya kobikisa. Mpe lokola mwana moko ya moke na Philippines atatolaki na kondimisama nyonso epayi na ngai mokolo moko, “Tobongisami mpo na kobikisama!” Na nkombo ya bule mpe esantu na Ye “oyo Nzambe aponaki mpo kozala mbondi [ya monene],” Yesu Klisto, amene.