Likita Linene
Ebongiseli na Biso ya Bokambi ya Lola
Likita linene ya Sanza ya minei 2025


10:48

Ebongiseli na Biso ya Bokambi ya Lola

Ntango tozali kotya bomoi na biso na Yesu Klisto, tozwaka nzela na biso mpo na kokende na ndako na biso ya lola, koyika mpiko kino na nsuka mpe kosepela kino na nsuka.

Yesu Klisto abongolaki bomoi na ngai ntango nazwaki libatisi na mbula 26 na engumba na ngai ya bolingo, Frutillar, na Chili. Na ntango wana, mosala na ngai ememaki ngai mpo na kokatisa na mbu, bibale mpe mabeke ya Patagonie kitoko ya Chili. Nsima ya libatisi na ngai, namonaki mosala na ngai mpe bomoi na ngai na lolenge ya sika mpe ya kokesana, nayebaki solo ete “biloko nyonso bilakisi ete Nzambe azali.”

Na kati ya bozalisi, bambisi oyo ebengami saumon ebotamaka na esika oyo bibale eutaka. Na ntango moko boye na bomoi ya bambisi yango, basengeli kokita na ebale mpo na kokoma na mbu, epayi bazwaka bilei mpe makambo oyo esengeli mpo na bokoli na bango.

Kasi mbu ezali mpe esika ya likama epayi wapi banyama oyo balyaka banyama mosusu bazalaka mpe balobi mbisi balukaka kokanga bambisi saumon na mitambu ya kongenga oyo emekolaka bilei, kasi eleisaka bambisi yango te. Soki basaumon bakoki kolonga makama wana, bakozala pene ya kosalela ebongiseli na bango ya nguya ya kotambwisa mpo na kosala mobembo na likolo ya ebale tii na esika mpenza oyo babotamaki, kokutana na mikakatano ya sika mpe mwa mikakatano oyo bameseni na yango. Bato ya siansi bayekolaki bizaleli na bango ya kokende na mikili mosusu banda mibu mingi mpe bamonaki ete basalelaka lolenge moko ya karte magnétique, oyo ekokani na GPS, mpo na kotambwisa bango tii na esika oyo bakokende na bosikisiki mpenza.

Biso banso tokoki mokolo moko kozonga na ndako ya lola epayi towutaki. Mpe, lokola bambisi ya saumon, tozali na karte magnétique na biso moko, to Pole ya Klisto, mpo na kotambwisa biso kuna. Yesu ateyaki bayekoli na Ye, “Ngai nazali nzela, bosolo, mpe bomoi. Moto moko te ayaka epayi ya Tata longola se na nzela na ngai.”

Ntango tozali kotya bomoi na biso na Yesu Klisto, tozwaka nzela na biso mpo na kokende na ndako na biso ya lola, koyika mpiko kino na nsuka mpe kosepela kino na nsuka. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso kasi mingi ya kosala na makambo ya kobetela nsete ya bomoi na biso.”

Bozali mpe Nsuka na biso ya bonzambe

Na Libota Esakola na Mokili, totangi ete “moko na moko [na biso] azali mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya bolingo ya baboti ya lola, mpe, lokola yango, moko na moko azali na bomoto mpe nsuka ya bonzambe. … Na bomoi ya liboso ya kufa, bana mibali mpe bana basi ya molimo bayebaki mpe bakumbamelaki Nzambe lokola Tata na bango ya Seko mpe bandimaki mwango na Ye, na yango bana na Ye bakokaki kozwa nzoto ya mosuni mpe kozwa mayele ya mabele mpo na kokende liboso epai ya bobongi nie mpe kososola nsuka na bango ya bonzambe lokola basangoli ya bomoi ya seko.”

Yambo ya kobotama na Ye na kati ya bomoi ya kufa, Yesu Klisto abimelaki Mose mpe alobaki na ye na nkombo ya Tata. Ayebisaki Mose ete Azalaki na mosala monene mpo na ye. Na ntango ya bokutani wana, Nkolo abengaki ye “mwana na ngai” mbala mingi.

Nsima ya likambo yango, Satana ayaki komeka ye, kolobaka: “Mose, mwana na moto, kumbamela ngai.“

Mose atelemelaki komekama na komikundolaka ezaleli na ye ya bonzambe, kolobaka, “Ozali nani? Mpo ete, nazali mwana ya Nzambe.” Bosolo elongolaki Mose na etumba ya monguna.

Bandeko mibali mpe basi, mitambu ya bomoi ya kufa ezali ya solo. Mbala mingi mitambu yango ebendaka, kasi ezali kaka na ntina moko: kobimisa biso na ebale ya mai ya bomoi oyo ememaka epayi ya Tata mpe bomoi ya seko.

Nayebi boniboni ya solo mitambu ya bomoi ya kufa ekoki kozala. Mokolo moko ya eyenga, lokola mobongwami ya sika, nazalaki koteya kelasi ya bonganganzambe ntango lisolo moko ya kotungisa ebimaki. Nazalaki na mokakatano mpo na kosilisa liteya na ngai. Nayokaki nkanda mpe nakanisaki ete nazali moto oyo azwaki mpasi. Kozanga liloba, nabimaki na mokano ya kozonga na eklezia te mpo na mwa ntango.

Kaka na ntango wana, ndeko momemi moko ya bonganganzambe oyo amitungisaki atelemaki liboso na ngai. Na bolingo nyonso abengisaki ngai natya makanisi na ngai na Klisto kasi na makambo oyo esalemaki na kelasi te. Ntango nakanisaki likambo nakutanaki na yango na ye, ayebisaki ngai ete ayokaki mongongo moko koloba na ye ete: “Kende epayi na ye; azali na ntina mpo na ngai.“

Mpaka Vargas mpe mokambi oyo alandaki ye

Baninga na ngai ya bolingo, biso banso tozali motuya epayi na Ye. Mokambi Nelson ateyaki ete “Na ntina ya boyokani na biso na Nzambe, Akolemba te na babokasi na Ye mpo na kosunga biso, mpe tokosilisa te motema molayi na ye epai na biso. Bozali na biso ya bonzambe mpe boyokani na biso ya boyokani na Nzambe epesi biso lotomo ya lisalisi ya bonzambe.

Bosenga ya Bilei ya molimo

Kaka lolenge mbisi saumon esengeli kolia na mbu mpo ekola, biso mpe tosengeli koleisa molimo na biso mpo tokufa te mpo na kozanga koleisa molimo na biso malamu. Losambo, makomi, tempelo, mpe koyangana na biso mbala na mbala na makita ya mokolo ya eyenga ezali na ntina mingi mpo na koleisa molimo na biso.

Na Sanza ya zomi na moko 1956, Ricardo Garcia akotaki na mayi ya libatisi na Chili, kokomaka mondimi ya yambo ya Eklezia na mboka na ngai. Mokolo moko liboso ya liwa na ye, asakolaki liboso ya libota na ye mpe baninga na ye ete: “Esili koleka bambula mingi, bamisionele bazalaki kobengisa ngai nazala na esengo elongo na libota na ngai. Nazali moto ya esengo. Boyebisa moto nyonso na Chili ete nsango malamu ezali esengo.”

Lokola Ricardo aleisamaki na Nsango Malamu ya Yesu Klisto, amipesaki bomoi na ye mobimba mpo na kosalela Nzambe mpe moninga na ye ya pembeni na bolingo. Ndakisa na ye ya kozala moyekoli epambolaki bankola, bakisa mpe ngai. Profeta Joseph Smith ateyaki ete “moto oyo atondisami na bolingo ya Nzambe, azali na mokumba ya kopambola bobele libota na ye kaka te, kasi amipesi na mokili mobimba, na mposa ya kopambola moto nyonso”.”

Kozonga na Ndako na Biso ya Lola

Na mozindo na kati ya moko na moko na biso ezali na mposa ya kozonga na ndako na biso ya lola, mpe Yesu Klisto azali ebongiseli na biso ya bokambi ya lola. Azali nzela. Mbeka na Ye ya bomikabi epesi biso makoki ya kokota na mayokani ya bule elongo na Nzambe. Soki boyokani wana esalemi, tokomi na mbala mosusu kokata mayi na monano. Likama, kozanga bosepeli, komekama, mpe bampasi ekomeka bondimi mpe makasi na biso ya molimo. Senga lisalisi. Yesu Klisto azali kososola mikumba na biso mpe azali ntango nyonso pene ya kokabola yango.

Bomikundola ete Ayebani lokola “moto ya mawa, ameseni na mpasi.” Mobikisi ateyaki, “Na mokili bokozwa bolozi: kasi bozala na mpiko, nalongi mokili.” Mbeka na Ye ya bomikabi epesi nzela na masumu na biso elimbisama kino na esika oyo azali lisusu komikundola yango te.

Tokoki kobosana masumu na biso mobimba te lokola eteni ya boyekoli na biso ya bomoi ya kufa mpo ete tomikundola kozongela yango te. Na esika na yango, tokomikundola Ye ntango tozali kolia elambo na lingomba mokolo ya eyenga nyonso. Bokuli oyo ezali eteni ya ntina ya bokumbameli mpe bokoli ya molimo. Esengo eyaka ntango tososoli ete oyo ezali mokolo lokola mokolo mosusu te. “Saba esalemaki mpo na moto” na mokano ya kopesa biso bopemi uta na mokili mpe kozongisa sika nzoto mpe makanisi na biso.

Tomikundolaka Ye lisusu ntango tokendaka na tempelo—ndako ya Nkolo. Batempelo epesaka biso boyebi ya mozindo ya Yesu Klisto lokola katikati ya boyokani oyo ememaka biso na bomoi ya seko, “likabo monene ya … Nzambe.”

Kokende na tempelo ememelaki ngai libondisi mpe elikia monene na ntina ya nsuka na biso ya seko. Nayokaki boyokani ya lola na bato na ngambo mibale ya elamba. Namonaki makamwisi ya kobikisama na bomoi ya bana na ngai ya mike, mibale kati na bango bazali kobika na bokono oyo emonanaka te oyo esengaka bobateli ya mokolo na mokolo mpo na bomoi na bango mobimba.

Libota na biso esepeli ntango tozali kolobela mwango ya esengo. Bilongi ya bana na ngai engengaka ntango bayokaka ete, na ngolu ya Yesu Klisto, “mpasi na bango ekozala bobele mpo na ntango moke.” Tolingaka bana na biso mingi mpenza, mpe toyebi ete mokolo moko, lokola Mokambi Jeffrey R. Holland ateyaki, “bakotelema liboso na biso na nkembo, mpe na kitoko ya nzoto mpe ya molimo ya kokamwa.” Mayokani na biso ememaka biso penepene na Nzambe kino na esika oyo, oyo emonani lokola ekoki kosalema te ekomi likoki, kotondisaka esika nyonso ya molili mpe ntembe na pole mpe kimia.

Matondi na Yesu Klisto, ezali na elikya mpe ntina ya makasi ya kokoba kolinga, kobondela, mpe kosunga baoyo tozali komitungisa mpo na bango.

Nayebi ete Ye azali na bomoi. Ye ayebaka biso mpe alingaka biso. Ye azali nzela, bosolo mpe bomoi ya mokili.

Nabengisi moko na moko na biso lelo kotiya bomoi na biso kati na Yesu Klisto mpe mateya na Ye. Yango ekosalisa biso tokima ndobo ya komekama, kosilika, to komiyokela mawa. Tokotelema lokola batempelo—mosantu, makasi mpe ntango nyonso. Tokolonga mipepe makasi mpe tokozonga na ndako, koyikaka mpiko kino na nsuka mpe kosepelaka kino na nsuka. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Nasalaki lokola ingenieur mibu koleka 20 kobongisaka bobokoli ya mbisi na Chili.

  2. Alma 30:44.

  3. Tala Steve Lundeberg, “Magnetic Pulses Alter Salmon’s Orientation, Suggesting They Navigate via Magnetite in Their Tissue,” Oregon State University Newsroom, Sanza ya mitano 2, 2020, oregonstate.edu.

  4. Yoane 14:6.

  5. Russell M. Nelson, “Esengo mpe Kokoba Kozala na Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 82.

  6. Libota: Esakola na Mokili,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

  7. Tala Mose 1:4–13.

  8. Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” Liahona, Sanza ya zomi 2022, 10.

  9. Tala Dallin H. Oaks, “Nourishing the Spirit,” Ensign, Sanza ya zomi na mibale 1998, 6–13; Liahona, Sanza ya mwambe 2001, 10–19.

  10. Tala Trent Toone, “Builders and Blessings: How Early Latter-day Saint Pioneers Shaped the Growth of the Church in Chile,” Church News, Feb. 18, 2025, thechurchnews.com.

  11. Lisolo ya moto na moto na Perla Garcia, mwana mwasi ya Ricardo Garcia.

  12. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 426.

  13. Yisaya 53:3.

  14. Yoane 16:33.

  15. Tala Malongi mpe Mayokani 58:42.

  16. Tala Neil L. Andersen, “Repent … That I May Heal You,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 40–43.

  17. Tala Topics and Questions, “Sacrament,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

  18. Malako 2:27.

  19. Tala Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” 4–11.

  20. Malongi mpe Mayokani 14:7.

  21. Malongi mpe Mayokani 121:7.

  22. Jeffrey R. Holland, “Like a Broken Vessel,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 42.

  23. Tala Baebele 3:6.