Likita Linene
Boyamboli na Bino Ezali Mokumba te mpo na Yesu Klisto; Yango Epesaka Ye Esengo.
Likita linene ya Sanza ya minei 2025


11:44

Boyamboli na Bino Ezali Mokumba te mpo na Yesu Klisto; Yango Epesaka Ye Esengo.

Libiangi ya boyamboli ezali elembo ya bolingo ya Nzambe. Kolobaka iyo na libiangi yango ezali elembo ya bolingo na biso.

Mibu mingi eleki na mobembo moko na Florida, nafandaki libanda kotangaka buku moko. Nkombo na yango elingaki koloba ete tokoki lisusu kokoma na lola, atako soki tozali ya kobonga nie te sikawa. Mwasi moko azalaki koleka wana atunaki, “Okanisi ete yango ekoki kosalema?”

Natalaki, nabungisaki makanisi, mpe nsima namonaki ye abandaki kolobela oyo etali buku nazalaki kotanga. Nalobaki eloko moko ya kosekisa lokola, “Malamu, nakomi nanu kuna te, kasi nakoyebisa yo lolenge nini ekosila.”

O, lolenge nalingaki mpenza kozonga na ntango ya kala! Nalingaki nayebisa ye, “Iyo, yango ekokaki kosalema! Mpo ete lola ezali te mpo na bato babonga nie; yango ezali mpo na bato balimbisami, baye baponi Klisto lisusu mpe lisusu.”

Lelo nalingi koyebisa baye kati na biso oyo ntango mosusu bamiyoki, “Boyamboli mpe bolimbisi emonanaka kosalaka mpo na moto nyonso kasi ngai te .” Baoyo nakobatama bazali komitungisa mpenza, “Uta nabanda kosala bobele bambeba se moko, ntango mosusu yango ezali lolenge na ngai.” Baoyo, lokola ngai, bazali na mikolo oyo nzela ya mayokani ezali mpenza na mpasi mpenza, ezali penepene boyokani moko ya bobuti ngomba!

Misionele moko ya kokamwa na Australie, Mpaka QaQa awuta na Fiji, akabolaki liyoki ya kokokana na litatoli na ye ya bozongi ndako: “Nayebi ete Nzambe alingi ngai, kasi ntango mingi namitungisaka, ‘Nzambe ayebi ete ngai nalingaka Ye?’ Mpo ete nabonga nie te, mpe nazali kokoba na kosalaka bambeba.”

Na motuna oyo ya pete, mpe ya ntango nyonso, Mpaka QaQa alobaki na bokuse mpenza oyo ezalaki kotungisa ngai. Ntango mosusu ozali komitungisaka mpe lisusu, kokanisaka, “Nazali komekaka makasi mpenza, kasi Nzambe ayebi ete nazali mpenza komeka? Ntango nazali kokweyaka, Nzambe ayebi ete nalingaka Ye kaka?”

Esalaka ngai mawa kondima yango, kasi nazalaki komekaka bondeko na ngai elongo na Mobikisi na lolenge nini nabonga nie mpenza. Nakanisaki ete bomoi ya botosi elakisaki nakokaki kozala te na bosenga ya koyambola ata mokolo moko. Mpe ntango nasalaki mabunga, oyo ezalaki ya mokolo na mokolo, nazali komibenda ngai moko mosika na Nzambe, “Asengelaaki koyoka mawa mpenza mpo na ngai.”

Yango mpenza ezali ya solo te.

Nayekolaki ete soki bozeli kino bokoma peto ekoka to ya kobonga nie ekoka mpo na kokende epayi ya mobikisi, bobungisi makambo nyonso!

Nini soki tokanisaki oyo etali mitindo mpe botosi na lolenge mosusu?

Natatoli ete ntango Nzambe atyaka likebi na mabunga na biso, Ye atalaka mingi oyo ekoya nsima ya biso kosala libunga. Ekoki biso kozonga epayi na Ye lisusu mpe lisusu? Ekoki biso kotikala na bondeko ya boyokani oyo?

Ntango mosusu boyokaka maloba ya Nkolo “Soki [bino] bolingi ngai, bobomba mitindo na ngai” mpe bomiyokaka ya kolemba mpo ete bobombaki mitindo nyonso te. Tika ngai nakundolisa bino ete koyambola mpe ezali motindo! Na bongo, ekokaki kozala motindo oyo ebandelami mingi na kati ya makomi.

Na liloba ya Alma , “O soki nazalaka anjelu, mpe soki nakokaka kozala na litombeli ya motema [na ngai] … mpe kobelela boyamboli,” azalaki komeka te koyokisa biso nsoni na kotiaka liboso mabunga na biso. Ye alingaki kobelela boyamboli boye yo mpe ngai tokokaki koboya mpasi na mokili. Ntina moko Alma ayinaki lisumu ezali mpo ete yango ememaka mpasi.

Ntango mingi nasengeli komikundola, lokola lokasa ya mikemike ekomami liboso ya elongi na ngai, ete mitindo ezali nzela ya mosika uta na mpasi. Boyamboli mpe ezali lokola. Profeta na biso alobaki, “Mobikisi alingaka biso ntango nyonso kasi mingimingi ntango toyambolaka.”

Boye ntango Nkolo alobi, “Bino boyambola, bino boyambola,” nini soki tokanisaki Ye kolobaka, “Nalingi bino. Nalingi bino.” Bokanisa Ye kosengaka na bino, kolongwa nsima ya bizaleli oyo ekomemela bino mpasi, kobengaka bino bobima na molili mpe botala na pole na Ye.

Na palwase ya mwana na ngai ya mwasi Carly, nganganzambe moko ya sika afukamaki mpo na kopambola elambo, mpe na esika ya kolobaka, “Ete bakoka kosala yango na bokundoli ya makila ya Mwana na yo,” na bozangi bokebi ye alobaki, “Ete bakoka kosala yango na bokundoli ya bolingo ya Mwana na yo.” Mayi ya miso etondaki ye ntango bosolo ya maloba wana ekotaki na kati.

Mobikisi na biso andimaki koyoka mpasi ya Bomikabi na Ye mpo ete Ye alingi biso. Nzokande, bino bozali “esengo oyo etiamaki liboso na ye” ntango Ye anyokwamaki.

Libiangi ya boyamboli ezali elembo ya bolingo ya Nzambe.

Kolobaka iyo na libiangi yango ezali elembo ya bolingo na biso.

Bokanisa elilingi na bino ya Klisto oyo bolingaka mingi. Sikawa bokanisa Ye kosekaka na bongengi ya elongi na esengo ntango nyonso bozali kosalela likabo na Ye, mpo ete Ye azali “bongengi malamu ya elikya.”

Iyo, boyamboli na bino ezali mokumba te mpo na Yesu Klisto; yango epesaka Ye Esengo.

Botika yango eteyama!

Mpo ete boyamboli ezali bansango na biso ya malamu koleka!

Totikalaka te na nzela ya boyokani na kosalaka lisumu ata mokolo moko te. Totikalaka na nzela yango na koyambolaka mokolo na mokolo.

Mpe ntango tozali koyambola, Nzambe azali kolimbisa biso na koyokisaka biso nsoni te, kokokanisaka biso na moto mosusu te, to kotiolaka biso te mpo ete yango ezali lolenge moko toyambolaki poso oyo eleki.

Asepelaka ntango nyonso Ye amoni biso na mabolongo na nse. Asepelaka kolimbisa biso mpo ete epayi na Ye biso tozali kitoko!

Bino boyoki te ete ezali ya solo?

Boye mpo na nini ezali mpasi makasi mpo na bino kondima?

Satana, mokosi monene mpe molembisi nzoto, asalelaka nsoni mpo na kobomba biso mosika na Nzambe. Nsoni ezali molili moko mpenza ya bozito ezali koyokana ete soki bolongoli yango na nzoto na bino, ekoki kozala na bozito to bozito ya solo na yango moko.

Nsoni ezali mongongo oyo ebetaka bino, kolobaka, “Bozalaki kokanisa nini?” “Bosila kosala likambo moko ya malamu?”

Nsoni ekoyebisa biso te ete tosalaki libunga; ekoyebisa biso ete tozali libunga na biso. Bokoki kutu koyoka, “Mibomba.” Monguna asalaka nyonso ezali na nguya na ye mpo na kobomba bozito na kati, koyebisaka biso ete ntalo ezali motuya makasi, ete ekozala pete soki yango etikali na molili, kolongolaka elikya nyonso.

Satana azali moyibi ya elikya.

Mpe bosengeli koyoka oyo, boye nalobi maloba yango na mongongo makasi: Bozali mongongo te na litoyi na bino to mabunga oyo bosali. Bino mpe bokoki koloba yango na mongongo makasi. Boyebisa Satana, “Lelo te.” Botia ye liboso na bino.

Boyoka bobendi na ye, mawa ya bonzambe oyo ekomema bino epayi ya Mobikisi na bino, mpe kotala ngolu na Ye kokota kati ya bomoi na bino mpe na bomoi ya baye bolingaka. Nalaki ete na miniti oyo tomemi motema ebukana na mpiko nyonso liboso na Ye, Azali mbala moko kuna.

Soki bomoni moto moko kozindaka na mayi, ekoki bino kotanda loboko na bino mpo na kosalisa ye? Ekoki bino kokanisa Mobikisi na bino kobwakaka loboko na bino etandami? Nakanisi Ye komibwakaka na mayi, kokitaka na nse ya biloko nyonso komatisa biso likolo boye tokoka kozwa mopepe ya kitoko. Moto moko te akoki kokita na nse koleka pole ya bongengi ya Klisto.

Mobikisi azali libela na libela pole koleka molili ya nsoni. Ye akobundisa ata mokolo moko te motuya na bino. Yango wana botala malamu.

  • Bokanisa ete loboko oyo elakisi motuya.

  • Loboko oyo elakisi botosi. Ntango mosusu bolamukaki na ntongo ya lelo, bolobaki losambo moko ya ntina, kolukaka makomi mpo na koyoka mongongo ya Nzambe. Bozwaki mikano moko malamu mpe bozali kosala malamu na bato banzingi bino na lolenge ya Klisto. Bozali koyoka likita linene! Botosi na bino ezali awa!

  • To ntango mosusu makambo etambolaki malamu mpenza te. Bobundaki kala te mpo na kosala makambo ya mike, ya pete mpo na kokangisama na lola. Bozwaki mikano moko oyo epesi bino lofundu te.

  • Wapi motuya na bino? Loboko oyo eninganaki ata moke?

Motuya na bino elandisami te na botosi. Motuya na bino ezali ya kotelema, yango ebongwanaka ata mokolo moko te. Yango epesamelaki na bino epayi na Nzambe, mpe ezali na eloko moko te oyo bino to moto mosusu akoki kosala mpo na kobongola yango. Botosi ememaka mapamboli; wana ezali ya solo. Kasi motuya ezali moko na bango te. Motuya na bino ezali ntango nyonso “monene na miso ya Nzambe,” elandaka te epayi wapi mikano na bino ememaki bino.

Ntango nasalaka mabunga, nalingaka kotikala kati na boyokani ya bondeko na Klisto, mpe nakoyebisa bino mpo na nini.

Nakolaki na kozwaka mateya ya kozinda na mayi mpe nayekolaki ete soki bazuzi bazwi mbano na bozindi moko, batalaka esaleli. Bokoti ezalaki mpenza semba, na misapi ya makolo etandami mpe mayi esopanaki ebele te? Nsima basalaka eloko moko ya kokamwa mpenza. Bango batalaka bonene ya mokakatano.

Moto nyonso azindaka na monene na ye moko ya mokakatano. Mpe Mobikisi na bino azali bobele moko oyo ayebi mokakatano bozali na yango. Nalingi bondeko na moto moko oyo ayokaka ngai, oyo ayebi motema na ngai, mpe lolenge ya mpasi nini nazali komekaka!

Ye ayebi bambonge ya molili oyo ekokitaka likolo ya biso nyonso babembuki mpe ete mobembo na biso eleka na nzela ya mayi ya mbindo—atako kutu ntango tozali kosimbaka lingenda ya libende, toko polisama.

Koyaka epayi na Klisto ezali kolobaka, “Yo okosalisa ngai?” na elikya, bondimisami ebimisami ete maboko na Ye etandami epayi na bino ntango nyonso. Nandimi ete bomoni ya sika ya boyamboli elakisi ete kutu atako tozali na botosi ebonga nie te naino, tozali komeka kolinga botosi sikawa, kopona kotikala, lisusu mpe lisusu, mpo ete tolingi Ye.

Bomikundola bato ya Mokonzi Benjamin, oyo bazalaki lisusu te na mposa ya kosala mabe kasi kokoba kosala malamu? Bokanisi ete bango bagumbaki ba tenta na bango, bakendaki ndako, mpe basalaki libunga mosusu te? Ya solo te! Bokeseni ezali ete bango balingaki lisusu kosala lisumu te. Bango balingaki botosi! Mitema na bango ebalusamaki mpe etyamaki na boyokani ya Nzambe ntango bazalaki kobunda!

Mokolo moko, na libongo, namonaki ndeke moko kopumbwaka na mopepe, kobetaka mapapu na ye makasi koleka, pembeni ya malembe mpenza, kasi atikalaki esika bobele moko. Nsima namonaki ndeke mosusu, likolo mpenza. Ezwaki mopepe ya komata mpe ezalaki kopumbwa na pete, mopepe ezalaki kotia ye mokumba te. Oyo ezali bokoseni katikati ya komekaka kosala na biso moko mpe kobalukaka epayi ya Mobikisi na biso, kotikaka Ye atombola biso, elongo “libiki na mapapu na Ye”

Lokola mokambi ya misio na Australie, katikati ya botali na biso ya nsuka ya misionele moko na moko, tosololaki etali 3 Nefi 17, epayi wapi bato bazalaki pembeni ya Mobikisi mpe bakokaki koyoka Ye kosambelaka mpo na bango. Totunaki, “Soki bokokaki koyoka Mobikisi kosambelaka mpo na bino, nini bokanisi Ye akokaki koloba?”

Koyoka biyano na bango ezalaki moko ya makambo etonda Molimo mpenza namonaki na bomoi na ngai. Moko na moko ya bamisionele wana akokaki kozela, mpe mpisoli etondaki miso na bango ntango tokundolisaki bango, “Mobikisi na bino ayebi monene ya mokakatano bozali na yango. Ye azali koyoka yango!”

Oyo ezali oyo bamisionele yango bakabolaki na kimya mpe boboto nyonso: Ndeko mwasi moko alobaki “Yesu akoyebisa Tata, ‘azali kosala makasi na ye nyonso. Nayebi makasi nini azali kosala.’” Mpaka moka alobaki, “Na ebele ya makambo oyo ekomaki na bomoi na ye, nazali na lofundu mpo na ye.”

Botika tomeka yango. Butu ya lelo, yambo bosambela, bokanisa Yesu Klisto pembeni na bino. Azali Molobeli na bino epayi ya Tata. Bomituna bino moko, “Nini Mobikisi akoloba na Tata etali ngai?”

Mpe nsima fanda kimya.

Boyoka mongongo oyo ezali koloba makambo malamu mpo na bino—mongongo ya Mobikisi, moninga na bino malamu, mpe Tata na bino na Lola, oyo azali solo wana. Bomikundola, ya Bango bolingo mpe ya yo motuya na bino ezali monene ntango nyonso, atako nini!

Natelemi awa mpo na kotatola ete Yesu Klisto apesaka pole na baoyo bafandi na molili. Boye, na mikolo oyo ntango bokoyoka mongongo wana kolobaka na bino bobombama, ete bosengeli kobombana kati ya kisuku ya molili na bino moko, nasengi bino bozala na mpiko mpe kondimela Klisto! Bopusana mpe bopelisa Mwinda—Pole na biso Ebonga nie ya Elikya.

Kozindama na pole na Ye, bokomona bato nyonso nzinganzinga na bino oyo bakweyaki bango moko mpe, kasi sikawa, na mwinda ya kopela, bino mpe bango bakomitungisa, “Mpo na nini bozali kobanga boye na kati ya molili? Mpe mpo na nini totikalaki kuna ntango molayi?”

“Botika Nkolo ya Bapole azinga bino na maboko na Ye mpe alendisa mpe alinga bino libela na libela.” Botika biso tolinga Ye ntango nyonso mpe topona Ye lisusu mpe lisusu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.