Mwango ya Boboto
Nkolo azali ngolu mpe mwango ya lobiko ya Tata na biso na Lola ezali solo mwango ya ngolu.
Libengisi ya Profeta
Sanza ya minei eleki, kala te nsima ya nsango ya esengo ete Eklezia ezwaki Tempelo ya Kirtland, Mokambi Russell M. Nelson asengaki biso toyekola losambo ya kobulisa ya Tempelo ya Kirtland, ekomama na eteni 109 ya Malongi mpe Mayokani Losambo ya kobulisa, elobaki Mokambi Nelson, “ezali liteya etali lolenge nini tempelo epesaka nguya na molimo epayi na yo mpe ngai mpo na kolonga mikakatano ya bomoi na mikolo ya nsuka oyo.”.
Nayebi ete boyekoli na bino ya eteni 109 ememelaki bino boyebi oyo epambolaki bino. Na mpokwa oyo, nazali kokabola mwa makambo nayekolaki ntango nalandaki libengisi ya profeta na biso. Nzela ya kimia oyo boyekoli na ngai ekambaki ngai ekundolisaki ngai ete Nkolo azali na mawa mpe ete mwango ya lobiko ya Tata na biso na Lola ezali solo mwango moko ya boboto.
Bamisionele Babengami sika Bazali kosala na Tempelo
Lokola bokoki koyeba, “bamisionele babengami sika balendisamaka bazwa dotasio ya tempelo nokinoki bo ekoki mpe kokende tempelo mbala mingi soki makoki epesi bango nzela.” Ntango bazwi dotasio, bango lisusu “bakoki kosala lokola basali … ya tempelo liboso babanda mosala ya misionele.”
Ntango na tempelo yambo ya kokota na MTC ekoki kozala lipamboli ya kokamwa mpo na bamisionele ya sika ntango bazali koyekola mingi na ntina ya mayokani ya tempelo yambo ya kokabola mapamboli ya mayokani wana elongo na mokili.
Kasi na koyekolaka eteni 109, nayekolaki ete, kati na tempelo, Nzambe apesaka nguya na bamisionele ya sika—na yango, banso na biso—na lolenge mosusu, ya bule. Na losambo ya kobulisa, epesama na emoniseli, Joseph asambelaki ete “ntango basali na yo bakobima uta na ndako na yo … mpo na kopesa litatoli ya nkombo na yo,” mitema” ya “bato nyonso”—nyonso mibale “bato minene ya mabele” mpe “babola nyonso, bakeleli, mpe [bato] ya mawa … mikoka kolembisama.” Asambelaki ete “makanisi na bango ya yambo makweya liboso ya bosolo, mpe bato na yo bakoka kozwa lisungi na miso ya bato nyonso; ete nsuka nyonso ya mabele ekoka koyeba ete biso, basali na yo, toyokaki mongongo na yo, mpe ete otindaki biso.”
Oyo ezali elaka kitoko mpo na misionele moko abengami sika—kozala na makanisi ya yambo ya “kokweya liboso ya bosolo,” mpo na “kozwa lisungi na miso ya bato nyonso,” mpe koyebisisa mokili ete bango batindami na Nkolo. Moko na moko kati na biso solo asengeli na mapamboli moko oyo. Oyo nde lipamboli ekozala soki mitema elembisami ntango tozali kosala elongo na bazalani mpe baninga ya mosala. Losambo ya kobulisa elimboli mpenza te lolenge nini ntango na biso kati na tempelo ekolembisa mitema ya basusu, kasi nazali na kondima ete ezali ya kokangana na lolenge ya ntango kati na ndako ya Nkolo ezali kolembisa mitema na biso moko na kotiaka biso katikati ya Yesu Klisto mpe boboto na Ye.
Nkolo Ayanoli Libondeli ya Joseph Smith mpo na Boboto
Ntango nazalaki koyekola losambo ya bobulisi ya Kirtland, natutisamaki lisusu ete Joseph abondelaki mbala na mbala mpo na ngolu—mpo na bandimi ya Eklezia, mpo na banguna ya Eklezia, mpo na bakambi ya mboka, mpo na bikolo ya mabele. Mpe, na ye moko mpenza, abondelaki Nkolo mpo na komikundola ye mpe koyokela Emma molingami na ye mpe bana na bango mawa.
Lolenge nini Joseph asengelaki komiyoka ntango, poso moko nsima, na ntongo ya Pasika, Sanza ya minei 3, 1836, kati na Tempelo ya Kirtland, Mobikisi abimelaki Ye mpe Oliver Cowdery mpe, lokola ekomami na eteni ya eteni 110 Malongi mpe Mayokani, alobaki, “Nandimi ndako oyo, mpe nkombo na ngai ekozala awa; mpe nakomimonisa na bato na ngai na boboto kati na ndako oyo.” Elaka oyo ya boboto ezwaki ndimbola ekeseni epayi ya Joseph. Mpe lokola Mokambi Nelson ateyaki na Sanza ya minei eleki, elaka oyo lisusu “ezali mpo na tempelo nyonso ebulisama lelo.”
Kozwa Boboto na Ndako ya Nkolo
Ezali na banzela mingi mpenza oyo moko na moko na biso akoki kozwa ngolu na ndako ya Nkolo. Yango ezalaki solo banda ntango Nkolo atindaki yambo Yisalaele batonga tabelenakele mpe batia na katikati na yango “kiti ya boboto.” Na kati ya tempelo, tozwaka boboto kati na mayokani tosalaka. Mayokani wana, na bobakisi na boyokani ya libatisi, ekakangisaka biso na Tata mpe Mwana mpe epesaka biso ekoteli ebuta na oyo Mokambi Nelson ateyi ezali “lolenge ekeseni ya bolingo mpe boboto … ebiangami hesedna Ebele.
Tozwaka boboto na libaku ya kokangisama na mabota na biso mpo na seko. Toyaka lisusu kososola na polele makasi koleka ete Bokeli, Bokwei, libonza ya komikaba ya Mobikisi, mpe makoki ya kokota lisusu kati na liboso ya Tata na biso na Lola— ya solo eteni nyonso ya mwango ya lobiko—ezali limonisami ya ngolu. Ekoki kolobama ete mwango ya lobiko ezli mwango ya esengo mingimingi mpo ete ezali “mwango ya boboto.”
Koluka Bolimbisi Efungolaka Ekuke mpo na Molimo Mosantu
Nazali na botondi mpo na elaka kitoko na eteni 110 ete Nkolo akomimonisa Yemei na boboto kati na batempelo na Ye. Nazali lisusu na botondi mpo na maye emonisi na oyo etali lolenge nini Nkolo akomimonisa Yemei na boboto ntango nyonso biso, lokola Joseph tobondeli mpo na boboto.
Libondeli ya Joseph Smith mpo na boboto na eteni 109 ezalaki mbala ya yambo te limbondeli na ye mpo na boboto etindikaki emoniseli. Na Zamba ya Bule, elenge Joseph asambelaki te kaka mpo na koyeba Eklezia nini ezalaki ya solo, kasi alobaki lisusu ete “alelelaki epayi na Nzambe mpo na boboto, mpo ete ezalaki na moko te epayi ya oyo nakokaki kokende mpo na kozwa boboto.” Na lolenge moko boye, boyebani na ye ete asengelaki na boboto oyo bobele Nkolo akokaki kopesa esalisaki kofungola maninisa ya lola. Mibu misatu nsima, anzelu Moroni abimaki kolanda oyo Joseph alobaki ezalaki “losambo mpe bosengi na ye epayi ya Nzambe ya Nguya nyonso mpo na bolimbisi ya masumu mpe bozoba na ye nyonso.”
Ndakisa ya emoniseli oyo nsima ya libondeli mpo na boboto ezali ya momesano moko kati na na makomi. Enosa ayokaki mongongo ya Nkolo bobele nsima ya kosambela mpo na bolimbisi. Bobongoli motema ya Mokonzi Lamoni ebandaki na losambo na ye “Nakotika masumu na ngai nyonso mpo na koyeba yo.” Tokoki kopambolama te na bamakambo oyo ya mbalakaka te, kasi mpo na baoyo ntango mosusu babundabundaka mpo na koyoka biyano na losambo, kolukaka boboto ya Nkolo ezali moko ya ndenge ya koyokela litatoli ya Molimo Mosantu.
Komanyola Boboto ya Nzambe Efungolaka Ekuke mpo na Litatoli ya Buku ya Mormon
Libongisi ya lolenge moko eteyami kitoko kati na Moroni 10:3–5. Mbala mingi tokomaka na mokuse milongo oyo mpo na koteya ete, na nzela ya losambo ya sembo, tokoki koyekola soki Buku ya Mormon ezali solo. Kasi nkoma ya mokuse oyo ekoki kotala mpamba motuya ya mosala ya boboto. Boyoka lolenge Moroni abandaki bolendisi na ye: “Nalingi kolendisa bino ete ntango nokotanga makambo oyo, … ete bomikundola lolenge boni Nkolo atondaki na boboto epayi ya bana ya bato, uta na bokeli ya Adama, kutu kino na ntango oyo bokozwa makambo oyo, mpe bomanyola yango kati na mitema na bino.”
Moroni azali kolendisa biso bobele totanga makambo oyo te—makundoli oyo azalaki pene ya kokangisa—kasi lisusu tomanyola na mitema na biso oyo Buku ya Mormon ebimisaka etali “lolenge nini Nkolo atondaki na boboto epayi ya bana ya bato.” Yango ezali komanyolaka likolo ya boboto ya Nkolo nde elengelaka biso mpo na “kosenga Nzambe, Tata ya Seko, na nkombo ya Klisto soki makambo oyo ezali ya solo.”
Ntango tozali komanyola na Buku ya Mormon, tokoki kotuna: Ezali solo solo, lokola Alma ateyaki, ete mwango ya ngolu ya Nzambe endimisi ete moto nyonso oyo afandaki naino te na mabele oyo akosekwa mpe ete “bakozongisama na … nzoto na bango ya kokoka”? Amulek azali na ntina—ekoki mawa ya Mobikisi kokokisa masengisi manso ya bololo ya bosembo oyo tolingaki soki te tosengeli kofuta mpe na esika na yango “[kozinga biso] na maboko ya bokengi”?
Ezali solo, lokola Alma atatolaki, ete Klisto anyokwamaki kaka mpo na masumu na biso te kasi mpo na “mpasi mpe mitungisi” na biso mpo ete Akoka “koyeba … lolenge nini kosunga bato na ye engebene na botau na bango”? Ezali mpenza Nkolo na mawa mingi, lokola Mokonzi Benyamina ateyaki, ete lokola likabo ya ofele, Amikabi “mpo na masumu ya baoyo … bakufaki koyeba te bolingi ya Nzambe mpo na bango, to oyo bazali na kozanga koyeba asalaki lisumu”?
Ezali solo, lokola Lehi alobaki, ete “Adama akweyaki ete bato bakoka kozala; mpe bato bazali, mpo ete bazala na esengo”? Mpe ezali solo solo, lokola Abinadi atatolaki, kozongelaka Yisaya, ete Yesu Klisto “azokisamaki mpo na mabunga na biso, azokisamaki mpo na mabe na biso; etumbu ya kimia na biso ezalaki likolo na ye; mpe na minzoto na ye tobikisami”?
Na bokuse, ezali mpenza mwango ya Tata lokola eteyami na Buku ya Mormon ezali mpenza na mawa boye? Natatoli ete ezali mpe ete mateya epesaka kimia mpe elikya ya boboto kati na Buku ya Mormon ezali solo.
Ntango nyonso, nabanzi ete basusu bakoki kozala kobundabunda, atako botangi mpe nsambo na bino ya bondimi, ya kokokisa elaka ya Moroni ete Tata na Lola “akomonisa bosolo na yango epayi na bino, na nguya ya Molimo Mosantu.” Nayebi kobundabunda oyo mpo ete nayokaka yango, mibu ebele eleki, ntango babotangi na ngai ya yambo ya Buku ya Mormon epesaki eyano ya nokinoki mpe ya polele te na nsambo na ngai.
Soki ozali kobunda, nakoki kobengisa yo olanda toli ya Moroni mpo na komanyola na banzela mingi oyo Buku ya Mormon eteyaka “boniboni mawa Nkolo azali [na] bana ya bato Etongami likolo ya mayele na ngai, nazali kolikia ete ntango okosala yango, kimia ya Molimo Mosantu ekoki kokota na motema na yo mpe okoki koyeba, kondima, mpe koyoka ete Buku ya Mormon mpe mwango ya mawa na yango eteyaka ezali solo.
Nalakisi botondi na ngai mpo na mwango monene ya boboto ya Tata mpe mpo na bolingi ya Mobikisi ya kosala yango. Nayebi ete Akomimonisa na boboto kati na tempelo na Ye esantu mpe kati na eteni nyonso ya bomoi na biso soki tokoluka Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.