Esengo na Nzela ya Kimoyekoli ya Boyokani
Ntango tozali komizinda bisomei mpo na kosala makambo lokola bayekoli ya boyokani, boyokani na biso na Tata mpe Mwana ezali malamu mpenza, esengo na biso ebakisami, mpe emoneli na biso ya seko ekoli.
Mokolo moko na 2023, Uyanga Altansukh azalaki na mosala na engumba ya nordi ya Mongolie ya Darkhan ntango mokambi ya misio ya Mongolie akotaki na esika na ye ya mosala. Na maloba na ye:
“Namonaki ye mpe nakanisaki azalaki na pole oyo ya makasi na elongi na ye. Azalaki na boboto mingi mpe na elengi epayi ya baye nzinganzinga na ye, mpe nayokaki esengo. Yambo alongwa, natunaki ye mwa mituna. Mikolo moke nsima, ayaki lisusu na mosala na ngai mpe atunaki soki nakokaki kokende na eklezia na ye. Nakanisaki ete yango ekokaki kosunga. Nazalaki komitungisa mpo na lobi ya bana na ngai, lolenge mokili ezalaki komonana etondi na mitungisi mpe molili. Nalingaki bana na ngai bazala lokola moto oyo elongo na pole na elongi na bango, kopalanganisa esengo na baye nzinganzinga na bango.
“Mokolo moko bamisionele bateyaki biso mobeko ya moko na zomi. Bana na ngai balobaki na esengo, ‘Tosengeli kofuta moko na zomi na biso, Mama.’ Nakokaki komona bondimi ya bana na ngai na ngonga wana. Yambo nakota Eklezia, natalaki likita linene mpe nayokaki Mokambi Russell M. Nelson koloba. Asakolaki batempelo ya sika na mokili mobimba mpe alobaki ete tempelo ya sika ekotongama na Ulaanbaatar, Mongolie. Nasepelaki mpe nalelaki, atako soki nasosolaki te mpo na nini. Na esengo oyo, nakokaki koloba ete bondimi mpe litatoli na ngai ezalaki kokola.”
Uyanga, lokola ebele ya bato mosusu, ezali moko ya bosangani monene ya Yisalaele kati na bomilengeli mpo na Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Abandaki mobembo na ye na nzela ya boyokani mpe akomaki moyekoli ya Klisto. Elingi koloba nini kozala moyekoli ya Klisto? Nalingaka liloba ya Japonais mpo na moyekoli—deshi—de oyo elingi koloba leki ya mobali, mpe shi oyo elingi koloba mwana.
Yesu Klisto asakolaki, “Nazalaki na ebandeli elongo na Tata, mpe nazali Mobatami ya yambo.” Mpo na oyo Ye azali mpe makambo Ye asali, tozali kokumbamela Ye, kokumisa Ye, kopesa nkembo epayi na Ye, mpe tozali kolanda Ye. Klisto asikoli biso, mpe tozali na matondi ya libela mpo na mbeka na Ye ezanga nsuka mpe ya bomikabi.
Tozali na Tata na Lola, oyo alingi biso lokola bana na Ye. Bolingo na Ye mpo na biso ezali ya kokoka. Yesu Klisto mpe mosala na Ye ezali ndakisa ya bolingo ya Nzambe mpo na biso. Lokola Yoane akomaki, “Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi mpenza, yango wana apesaki Mwana na ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima ye akufa te, kasi azwa bomoi ya seko.”
Na boluki na biso ya kososola makambo oyo toyebi te, tokoki ntango mosusu kotalela boyebi na biso ya momesemo ya bomoi ya kufa, to makambo oyo toyebi. Ndakisa, tokoki koyekola etali Nzambe Tata na nzela ya baboti na bisomei mpe mikangano ya libota ya bomoi ya kufa. Nzokande, tosengeli kozala na bokebi na kosalelaka bokokanisi oyo mosika mpenza na milende na biso ya kososola Tata na biso na Lola. Bizaleli ya Nzambe Tata eleki bizaleli nyonso oyo ezali ya kokoka te ya moto akweya. Nzambe Tata azali Tata abonga nie. Azali na bolingo ya kokoka, boboto, motema molai, mpe bososoli mpe azali na nkembo ya kokoka. Tokoki kondimela Ye mpenza. Bolingo ya Klisto ezali kolakisa bolingo ya Nzambe Tata mpe azali elilingi ya bolingo wana.
Yesu Klisto azali ndakisa mpe nzela. Kati na Klisto, tokoki kososola malamu bizaleli ekoka ya Tata mpe mwango na Ye. Na nzela ya Klisto, topesameli nguya ya kolonga makanisi ya bato ya nzoto mpo ete tokoka kokoma mingi lokola Tata.
Kaka lokola Tata na biso na Lola, Yesu Klisto azali mpenza na mawa mpe bosembo. Bizaleli oyo ya bonzambe ya bosembo mpe mawa ezali na botelemeli te. Ezali lolenge moko. Nyonso mibale bosembo mpe mawa ezali ndakisa ya bolingo ekoka ya Nzambe mpo na bana na Ye. Tokoki kotyela Nzambe Tata mpe Yesu Klisto motema mpo ete Bazali sembo mpe malamu na biso banso.
Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bazali mpenza moko na ntina mpe bolingo. Mpo Nzambe mpe Yesu Klisto balingi biso, topesameli libaku mpe ngulu lokola bayekoli ya solo mpo na kosala makoyaki na bango. Na kosalaka na biso bongo, boyokani na biso na Klisto ezali kokola: “Mpe sikawa, mpo na boyokani oyo bosali bokobiangema bana ya Klisto, bana mibali na ye, mpe bana basi na ye; mpo tala, mokolo oyo aboti bino na molimo; mpo bolobi ete mitema na bino mibongwani na bondimi likolo ya nkombo na ye; yango wana, bobotami na ye mpe bokomi bana mibali mpe bana basi na ye.”
Lokola bayekoli, ntango tosalaka mpe tobombaka mayokani ya bule, topambolami na nguya ya molimo. Tokangisami epayi ya Klisto mpe Nzambe Tata kati na boyokani moko ya sikisiki mpe tokoki koyeba bolingo mpe esengo na Bango na emekelo oyo ebombami mpo na baye basali mpe babombi mayokani. Likoki na biso ya koyoka mobimba ya bolingo ya Nzambe, to ya kokoba na bolingo na Ye, etongami likolo ya bamposa mpe misala na biso ya bosembo.
Na Yoane mokapo 15, molongo 9, totangi, “Ndenge Tata alingaki ngai, Ngai mpe nalingaki bino.” Mpe nsima topesameli libiangi: “Bokoba kati na bolingo na ngai.”
Na molongo elandi, topesameli nzela ya kokoba na bolingo na Ye: “Soki obateli mitindo na ngai, osengeli kowumela kati na bolingo na ngai; kutu lokola nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe nawumelaki kati na bolingo na Ye.”
Nsima tozali komona ntina ya kobomba mitindo na eteni 11: “Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete esengo na ngai ezala kati na bino, mpe ete esengo na bino ezala ya kokoka.”
Na nzela ya kimoyekoli ya solo ya boyokani, tokoki kobanda kososola malamu bomoto ya Nzambe mpe esengo oyo Ye alingi bana na Ye banso bayeba. Tokoki mpe kobanda kososola mitindo misusu oyo ekoki komonana mobulu na ebandeli. Ndakisa, lolenge nini Nzambe azali na litondi ya esengo ntango mosusu ya bana na Ye bazali na mpasi mingi? Eyano ezali kati na bomoni ebonga nie ya Nzambe mpe na mwango na Ye ebonga nie. Amonaka biso uta ebandeli kino lobi na biso ya nkembo. Apesi likoki, na nzela ya Mwana na Ye Yesu Klisto, mpo na biso banso, bana na Ye, tolonga mpasi, minyoko, masumu, mbeba, mpe bomiyoki bisomei ya bomoi na biso ya kufa. Nzambe apesi biso likoki mpe liponi.
Bandakisa ya baye oyo bayebi esengo na nzela ya kozala bayekoli bakoki kosunga biso na kososola malamu likanisi oyo. Mbala mosusu boyokaki liloba ete tozali kaka na esengo lokola mwana na biso oyo azanga esengo mpenza. Namoni ete yango esengeli kozala bongo te. Koko na ngai ya mwasi ya mibu 94 azali na bakitani koleka 200 oyo bazali na bomoi. Na ngonga moko, moko ya 200 akozala na esengo te. Soki liloba oyo ezalaki ya solo, mama na ngai asengelaki kozala ntango nyonso na lolenge ya bozangi esengo, oyo ye azali te. Baye bayebi ye bayebi lolenge nini azali moto ya esengo.
Sikawa nakosepela kokabola likambo mosusu. Na Sanza ya yambo ya 2019, mwasi na ngai, Debbie, mpe ngai tobiangamaki na bilo ya Mokambi Nelson. Atyaki kiti pembeni na biso, mpe tofandaki pene na mabolongo na mabolongo. Nsima ya koyebisa biso libiangi na biso ya sikawa, Mokambi Nelson atalaki Debbie mpe atyaki makanisi nyonso epayi na ye. Azalaki na boboto, bolingo, bosepeli, mpe esengo ya kotonda, lokola tata malamu to koko ya mobali malamu. Asimbaki loboko ya Debbie mpe abetaki yango, kondimisaka ye ete nyonso ekozala malamu mpe ete libota na biso ekopambolama. Emonanaki epayi na biso na ngonga wana ete tozalaki bato ya motuya epayi na ye mpe ete azalaki na ntango nyonso na mokili mpo na biso. Tolongwaki bilo na ye mokolo ya mitano wana nsima ya nzanga koyokaka ya kondimisama, tolingami, mpe na esengo.
Na mokolo ya liboso tomonaki nsango. Na mokolo se moko wana oyo Mokambi Nelson alekisaki elongo na biso, moko ya bana na ye ya basi akufaki uta maladi ya cancer. Tokamwaki. Mitema na biso etondisamaki ntango tolelaki mpo na ye mpe libota na ye. Mitema na biso etondaki lisusu na botondi mpo na likebi na ye ya Kimoklisto epayi na biso ntango tozalaki kolela mpo na mwana na ye ya mwasi oyo azalaki konyokwama.
Ntango tozalaki kokanisa likambo oyo, tomitunaki bisomei, “Lolenge nini ye akokaki kozala na boboto mpenza, na bolingo, mpe kutu na esengo na ntango ya mpasi boye?” Eyano ezali mpo ye ayebi. Ayebi ete Klisto alongaki. Ayebi akozala elongo na mwana na ye ya mwasi lisusu mpe akolekisa seko na ye. Esengo mpe emoneli ya seko eyaka na nzela ya kozala ya kokangama na Mobikisi na kosalaka mpe kobombaka mayokani mpe na nzela ya kiboyekoli ya Kimoklisto.
Mokambi Nelson ateyi: “Kaka lolenge Mobikisi Azali kopesa kimya oyo ‘eleki bososoli nyonso’ [Bafilipi 4:7], Azali kopesa lisusu esengo oyo ya makasi mpenza, ya mozindo, mpe ya monene oyo etelemelaka mayele ya bato to bososoli ya bato. Ndakisa, emonanaka ete ekoki kosalama te koyoka esengo ntango mwana na yo azali kobela bokono moko esilaka te to ntango obungisi mosala, to ntango molongani na yo akosi yo. Nzokande yango nde ezali esengo oyo Mobikisi apesaka.”
Ntango tozali kosala mpe kobomba mayokani, na ntembe te tokotya likebi epayi ya batu mosusu mpe tokozala na mposa ya kosunga basusu bayoka bonene ya esengo mpe bolingo toyokaka na mikangano na biso na kosalaka mayokani. Tokoki kozala na kati ya ntina monene mpenza na mabele lelo—bosangani ya Yisalaele. Tokoki kosunga na komema bana ya Nzambe epayi ya Klisto. Lokola profeta Yakobo ateyaki, “Mpe bopambolami; mpo lokola bozalaki na molende na kosalaka elongo na ngai na elanga na ngai ya bilaya, mpe botosaki mitindo na ngai, mpe bozongiseli lisusu epayi na ngai mbuma ya nzete ebimaki na mabele, … bokozala na bosepeli elongo na ngai na ntina ya mbuma ya elanga na ngai ya bilaya.”
Ntango tozali komizinda bisomei mpo na kosala makambo lokola bayekoli ya boyokani, atako ndelo ya makoki na biso ezala ndenge nini, boyokani na biso na Tata mpe Mwana ezali malamu mpenza, esengo na biso ebakisami, mpe emoneli na biso ya seko ekokola. Nsima tokulisami na nguya mpe tokoki koyoka esengo na bonene oyo ebombami mpo na bayekoli ya solo ya boyokani na Nzambe. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.