Likita Linene
Mapamboli ya Lifuti
Likita linene ya Sanza ya minei 2025


11:19

Mapamboli ya Lifuti

Atako makambo mingi na bomoi ekoki kozala koleka makoki na biso, moko te kati na biso azali na ndelo na mapamboli ezanga nsuka ya Nkolo.

Kosalaka na Boepiskopo Mokambi, nazwi libaku malamu ya kokutana na Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mokili mobimba na bisika mingi mpe mimeseno ndenge na ndenge. Nafulamaki ntango nyonso na bondimi na bino ya makasi mpe bomipesi na bino na Nkolo Yesu Klisto. Nzokande nasimbamaki lisusu na makambo ndenge na ndenge mpe mbala mingi na makambo ya mpasi oyo ebele kati na bino bakutanaka na yango—mimekano lokola bokono, bozangi makoki, bozwi moke, mabaku moke ya libala to kelasi, kobebisama na basusu, mpe bandelo to bopekisami mosusu. Ntango mosusu, mimekano oyo ekoki komonana lokola kopekisa bokoli na bino mpe kotelemela milende na bino ya solo mpo na kobika nsango malamu mpenza, kosala ete ezala mpasi mingi koleka mpo na kosalela, kosambela, mpe kokokisa mikumba ya bule.

Baninga na ngai ya bolingo, soki bozali koyoka ete bozali na ndelo to bozali na bozangi mpo na makambo ya bomoi na bino, nalingi boyeba oyo: Nkolo alingaka bino moko na moko. Ayebi makambo na bino, mpe ekuke ya mapamboli na Ye etikali polele mpo na bino atako soki bozali kokutana na mimekano.

Nayekoli bosolo oyo na nzela ya lboyebi na ngai moko ete, atako emonanaki lokola ya ntina te, etikalaki likanisi ya kowumela epayi na ngai. Na mibu 22, ntango nazalaki kosala na Mampinga ya Mpepo ya France na Paris, nasepelaki mingi koyoka ete Mpaka Neal A. Maxwell, Apostolo ya Nkolo, akoloba na likita moko na Champs-Élysées. Nzokande, kaka yambo ya molulu yango, nazwaki mitindo ya kokumba na motuka mokonzi moko ya monene na libanda ya mpepo na ngonga mpenza oyo likita yango esengelaki kosalama.

Nakamwaki mpenza. Lokola nazwaki ekateli ya kozala wana, natikaki mosali yango mpe nakendeki mbangu na likita yango. Nsima ya koluka esika ya kotelemisa mituka, nakitaki mbangu na Champs-Elysées kino na esika ya makita mpe namelaki mpema mpo etikalaki kaka miniti mitano yambo ete likita esila. Kaka ntango nakotaki, nayokaki Mpaka Maxwell koloba, “Nakopesa bino sikawa lipamboli ya bantoma.” Na mbala moko wana, nazwaki boyebi moko kitoko, oyo nakoki kobosana te na molimo. Nalongamaki na Molimo, mpe maloba ya lipamboli emonanaki lokola ekoti na kati ya nsinga nyonso ya molimo na ngai lokola soki esalemaki kaka mpo na ngai.

Oyo nakutanaki na yango mokolo wana ezalaki emoniseli moko ya moke kasi ya nguya ya likambo moko ya kobondisa ya mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye: Ntango makambo oyo eleki makoki na biso epekisi biso tokokisa bamposa ya sembo ya motema na biso, Nkolo akofuta na banzela oyo ekopesa biso nzela ya kozwa mapamboli na Ye oyo elakamaki.

Solo oyo ya kolendisa etongami na mitinda misato ya ntina oyo ezwami na nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto:

  1. Nzambe alingaka moko na moko na biso mpenza. “Abengisaka [biso] banso toya epayi na ye mpe tolia bolamu na ye.” Mwango na ye ya bosikoli ezali kosala ete moto nyonso, kozanga kolongolama, akopesama libaku ya bosembo mpo na mokolo moko azwa mapamboli ya lobiko mpe ya bonetoli.

  2. Lokola Nzambe azali sembo mpe na mawa mpe mwango na Ye ezali ya kobonga nie, Akopesa biso mokumba te mpo na makambo oyo eleki makoki na biso. Mpaka Neal A. Maxwell alimbolaki ete “Nzambe … atalaka na mawa kaka te bamposa na biso mpe bosali na biso, kasi lisusu bandelo ya mpasi oyo mabaku na biso ekeseni etyaka likolo na biso.”

  3. Na nzela ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, tokoki kozwa makasi ya koyika mpiko mpe na nsuka kolonga mikakatano nyonso ya bomoi. Lokola Alma ateyaki, Mobikisi azwaki likolo na Ye moko kaka masumu ya bayamboli te kasi lisusu “bampasi mpe bokono ya bato na ye” mpe “bolembu na bango.” Na boye, koleka kosikola biso uta na mabunga na biso, mawa mpe ngolu ya Nkolo esungaka biso na nzela ya bozangi bosembo, bozangi makoki, mpe bandelo oyo etyamaki na makambo na biso ya nkufa.

Mpo na kozwa mapamboli oyo ya lifuti esengeli na mwa makambo mosusu. Nkolo asengaka biso tosala “nyonso tokoki” mpe “tobonza milimo [na biso] mobimba lokola likabo epayi na ye.” Yango esengaka mposa ya mozindo, motema ya sembo mpe ya boyengebene, mpe molende na biso ya koleka na kobatelaka mitindo na Ye mpe koyokanisa bolingi na biso na oyo ya Ye.

Ntango milende na biso ya makasi ekokisami te na bamposa na biso likolo ya mabaku oyo eleki makoki na biso, Nkolo akoki kaka kondima bamposa ya mitema na biso lokola likabo elongobani. Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki, “Tokopambolama mpo na bamposa ya sembo ya mitema na biso atako mabaku ya libanda esali ete yango ekoka te mpo na biso totya bamposa wana na misala.”

Lokola Profeta Joseph Smith amitungisaki mpo na ndeko na ye ya mobali Alvin, oyo akufaki na bozangi kozwa makuli ya nsango malamu ya ntina, azwaki emoniseli oyo ya kobondisa: “Bato banso bakokufa uta sikawa kozanga boyebi ya [nsango malamu], oyo balingaki kozwa yango na mitema na bango mobimba, bakozala basangoli ya [bokonzi ya lola ya Nzambe].” Nkolo nsima abakisaki, “Mpo ngai, Nkolo, nakosambisa bato banso engebene na misala na bango, engebene na mposa ya mitema na bango.”

Oyo ezali na ntina mpo na Nkolo ezali kaka te soki tozali na makoki kasi soki tozali na bolingi ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kolanda Ye lokola Mobikisi na biso.

Moninga moko abondisaki mokolo moko elenge misionele moko oyo azalaki na mawa mpo na bozongi na ndako nokinoki mpo azalaki na bokono, atako mabondeli na ye ya motema mpe mposa makasi ya kosala misio. Akabolaki makomi moko wapi Nkolo asakolaki ete ntango bana na Ye “bakeyi na makasi na bango nyonso” mpe “batiki te molende na bango” mpo na kokokisa mitindo na Ye, “mpe banguna na bango [oyo ekoki kozala na makambo ya mabe na bomoyi na biso] … kopekisa bango na kosala mosala wana, tala, esengeli ngai nasenga ete kosala lisusu te na maboko ya bango [bato], kasi kondima makabo na bango.”

Moninga na ngai atatolaki na elenge mobali ete Nzambe ayebaki apesaki oyo eleki malamu na ye na koyanola na libiangi ya kosalela. Andimisaki ye ete Nkolo andimaki likabo na ye mpe ete mapamboli oyo elakamaki na bamisionele banso ya sembo ekobombama te.

Mapamboli ya Nkolo ya lifuti mbala mingi eyaka na nzela ya boboto mpe mosala ya basusu oyo basalisaka biso tokokisa oyo tokoki kosala biso moko te. Namikundoli ntango moko oyo tofandaki mosika na moko ya bana na biso ya basi na France, tomiyokaki ete tokoki kosala eloko te mpo na kosunga ye nsima ya kobota ya mpasi. Kaka na mposo wana, palwasi na biso na Utah elukaki lisalisi mpo na mama moko oyo awutaki kobota mapasa. Mwasi na ngai, Valérie, amipesaki mpo na komema bilei mpo na ye, na libondeli na motema na ye mpo na mama oyo ya sika mpe mwana na biso ya mwasi oyo azalaki na bosenga. Mwa moke na nsima, toyebaki ete bandeko basi na palwasi ya bana na biso ya basi na France bamibongisaki mpo na kopesa bilei mpo na libota na ye. Mpo na biso, Nzambe ayanolaki mabondeli na biso, kotindaka baanzelu na Ye mpo na komema libondisi ntango tokokaki te.

Ntango tokutani na ndelo mpe mikakatano, tika toyeba mapamboli na bisomei makabo, biloko na biso, mpe ntango—mpe kosalela yango mpo na kosalela baye bazali na bosenga. Na kosalaka bongo, tokopambola basusu kaka te kasi tokobengisa libiki mpe lifuti na bomoi na bisomei.

Moko ya banzela ya nguya mingi tokoki kosunga na mapamboli ya Nzambe ya lifuti ezali na nzela ya mosala ya mozweli oyo tosalaka mpo na bankoko na biso na ndako ya Nkolo. Ntango tozali kosala makuli na nkombo na bango, tozali kosangana na molende na mosala monene ya lobiko ya Nkolo, kosalelaka makabo mpe makoki na biso mpo na kopesa mapamboli na baoyo bazalaki na libaku te ya kozwa yango na ntango ya bomoi na bango ya nkufa.

Lisalisi ya bolingo topesaka na batempelo ya bule ekundolisaka biso ete ngolu ya Mobikisi ezali na ntina mingi koleka bomoi oyo. Na bomoi ekoya tokoki kopesama mabaku ya sika mpo na kokokisa oyo tokokaki kosala te na bomoi oyo ya nkufa. Na kolobaka na bandeko basi oyo bazwaki naino moninga ya seko te, Mokambi Lorenzo Snow alobaki na bolingo nyonso: “Ezali na Mosantu moko te ya Mikolo ya Nsuka oyo akufi nsima ya kozala na bomoi ya sembo oyo akobungisa eloko moko mpo ete alongaki te kosala makambo mosusu ntango mabaku epesamelaki ye te. Bakozala na mapamboli nyonso, bonetoli, mpe nkembo oyo mobali to mwasi nyonso akozala na yango oyo azwaki libaku oyo.”

Nsango oyo ya elikya mpe ya libondisi ezali mpo na biso banso, bana ya Nzambe. Moko te kati na biso akoki kokima mimekano mpe bandelo ya bokufi. Na nsima, biso nyonso tobotamaka na bozangi makoki ya komibikisa. Nzokande, tozali na Mobikisi ya bolingo, mpe “toyebi ete ezali na ngolu na [Ye] nde tobikisami, nsima ya nyonso oyo tokoki kosala.”

Natatoli ete atako mabaku mingi na bomoyi ekoki kozala likolo ya makoki na biso, moko te kati na biso azali likolo ya makoki ya mapamboli ya Nkolo oyo ezangi nsuka. Na nzela ya mbeka na Ye ya bomikabi, Mobikisi akofuta mpo na bozangi makoki mpe bozangi bosembo nyonso soki topesi milimo na biso mobimba epayi na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.