Bolingani—Elembo ya Kimoyekoli ya Solo
Ntina ya solo ya kimoyekoli ezali mpenza kokoma lokola Yesu Klisto azal.
Mokambi Russell M. Nelson kala te abengisaki biso “tosala ete kimoyekoli na biso ezala likambo ya liboso liboso.” Libengisi wana ya nguya efuli ngai namanyola na mozindo oyo etali kimoyekoli ya Yesu Klisto ya ngai moko.
Kimoyekoli Ekanamaka.
Moyekoli azali molandi to moyekoli ya mosusu. Bayekoli bazali “batangi” oyo bapesi bomoi na bango mpo na kokoma lokola moteyi na bango. Yango wana, kozala moyekoli ya Yesu Klisto esengaka mingi koleka kondimela mateya mpe malongi na Ye. Esengaka kutu mingi koleka kondima bonzambe na Ye mpe koyamba Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso, lokola ntina ya motuya bo ezali yango.
Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki: “Kolanda Klisto ezali momeseno ya mbalakaka te to ya ntango mosusu te. Ezali bomipesi ya ntango nyonso mpe lolenge ya bomoi oyo esengeli kotambwisa biso ntango nyonso mpe na bisika nyonso.” Kimoyekoli ezali mobembo ekanama oyo tozwaka mpo na kokoma ya kobongwana na nzela ya libonza ya bomikabi ya Nkolo mpe nguya na Ye oyo epesaka nzela. Ntina ya solo ya kimoyekoli ezali mpenza kokoma lokola Yesu Klisto azali—kutu na ndelo wapi tozwi “elilingi na ye na bilongi [na biso].”
Mpo na kozala bayekoli ya Nkolo, tosengeli komekola makanisi na Ye mpe misala na Ye mikolo nyonso—ndakisa, botosi, bomikitisi, mpe bompikiliki na Ye. Ntango tokotisi moke moke bizalela oyo kati na bomoto na biso, tokomi “bazwi ya [ya Ye] lolenge ya bonzambe.” Bomekoli oyo ya ezalela ya Mobikisi ezali ntina ya kokumbamela Ye. Lokola Mokambi Nelson ateyaki, “Bokumbameli na biso ya Yesu elobelami malamu mpenza na nzela ya bomekoli ya Yesu.”
Elembo ya Kimoyekoli ya Solo
Na bizalela ya bonzambe mingi nyonso ya Yesu Klisto tosengeli komekola, moko eleki mpe elati misusu nyonso. Ezalela wana ezali bolingo na Ye ya peto, to bolingani. Bango mibale profeta Mormon mpe Apostolo Paulo bakundolisi biso ete kozanga bolingani, “[biso] tozali eloko moko te.” To, lokola emonisamaki na Profeta Joseph Smith, kozanga “bolingani, [biso] tokoki kosala eloko moko te.”
Nkolo Yemei alobelaki bolingo lokola nkoma to elembo na nzela na yango bayekoli na Ye ya solo balingaka koyebana ntango Ye asakolaki:
“Najali kopesa bino lilako na sika ete, bolinganaka lokola ngai nalingi bino, ete bino lisusu bolingana.
“Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngai, soki bolingani moko mpe mosusu.”
Bolingani ezali mosise ya nkita oyo ekoki kolimbolama na mpasi kasi ezali komonana na pete na banso oyo basimbami na yango. Teya Nsango Malamu na Ngai eteyi ete “bolingani, lokola bondimi, ekambaka na mosala.” Yango wana, bolingani ekoki kolimbolama lokola “bolingo na mosala.” Bolimboli oyo epesaka emoneli monene kati na esakola ya mokuse ya Mobikisi—Ye “akendaki bobele kosala bolamu.”
Lokola balandi ya Yesu Klisto, tosengeli koluka komekola lolenge Nkolo alakisaki bolingo na Ye ya peto mpo na basusu. Atako Mobikisi amonisaki bolingani na bandenge mingi, nakolinga nabenda bokebi na bandakisa ekeseni misato ya bolingani na Ye oyo ezali komonana mpenza na bayekoli na Ye ya solo.
Bolingani Ezali Kolakisa Mawa
Ya yambo, Mobikisi alakisaki bolingani na kozalaka na mawa. Na mosala na Ye kati na banefi lokola ekomami na Buku ya Mormon, Nkolo abengisaki bato bazonga mpe bamanyola na makambo Ateyaki mpe bamilengela mpo na bozongi na Ye mokolo elandi. Nsima likomi yango elobi:
“Bazalaki na mpinzoli, mpe kotalaka miso na bango kaka epayi na ye lokola kaka basengelaki kosenga ye atikala naino moke elongo na bango.
“Mpe alobaki epayi na bango: Tala, nsopo na ngai etondi na mawa epayi na bino.”
Mawa ezali eteni ya bolingani oyo ekitisaka mpasi. Kotondisamaka na mawa, Nkolo abikisaki bakoni mpe batungisami kati na bato. Nsima, Apambolaki bana na bango ntango banzelu bakitaki uta na likolo mpe bazingaki bango. Asalaki misala ya boboto, ya bolingo oyo, mpe mingi koleka, mpo ete Azalaki “kotambusama na mawa.”
Ntango nazalaki kosala lokola elenge misionele na Amerika ya Sudi, na bongo nazwaki litomba uta na mawa ya moninga moko ya bolingo. Mpokwa moko ntango nazalaki kokumba na moninga na ngai mpo na kokende na ndako ya mokambi ya misio, elenge mobali moko oyo azalaki likolo ya kinga abalukaki na mbalakaka liboso ya motuka na ngai. Esalamaki nokinoki mpenza ete nakokaki te kokima botutani. Na likama, elenge mobali oyo abomamaki na kotutana wana. Natungisamaki makasi likolo ya bobungi ya bomoi na ye. Namiyokaki mabe mpe na mpasi na motema ntango solo ya mabe oyo ya maye ewutaki kosalema ekweyelaki ngai, namemamaki na boloko mpe nakangamaki. Namiyoka naino ata mokolo moko ya kobangisama mpe ngai moko te. Natondisamaki na bozangi elikya mpe bobangi ete nako kangama na boloko mpo na mikolo ya bomoi na ngai oyo etikalaki.
Moninga moko ya misio, Mpaka Brian Kochever, ayokaki likama yango mpe ayokisamaki mawa. Ayaki na boloko mpe asololaki na bapulusu mpo apesama nzela ya kotikala na ngai na boloko mpo ete nazala ngai moko te. Na kokamwa, bandimaki. Ti na mokolo oyo, nayokaka botondi makasi mpo na mosala ya moyekoli ya bolingo ya Boklisto, oyo ekitisaki, ebondisaki, mpe elendisaki ngai na ngonga monene ya mawa na bomoi na ngai. Mawa ya bolingani ezalaki elembo ya solo ya kimoyekoli. Lokola Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Moko ya ndenge ya pete mpo na komona molandi ya solo ya Yesu Klisto ezali lolenge nini moto wana azali koyokela mawa ya bato mosusu.”
Bolingani Ezali Kosalisa Bosenga Elobami Te
Ndakisa mosusu ya lolenge Mobikisi alakisaki bolingo na Ye ezali na nzela ya kosala na Ye ya mosala ya bosenga elobami te ya basusu. Na moto oyo azalaki ebosono mibu 38 na moto moko te mpo na kosalisa ye, Nkolo atelemisaki ye mpe apesaki ye mpiko ya kobika na bosembo. Epayi ya mwasi oyo bakangaki na ekobo, apesaki elikya mpe libondi na esika ya kokweisa. Mpo na moto na bukabuka oyo akitisamaki uta na palafo, Nkolo apesaki bolimbisi ya masumu, kaka kobikisa ya nzoto te.
Ntango nabiangamaki mpo na kosala lokola episikopo, bana na biso motoba bakomisaki mayangani ya elambo mpasi mpo na mwasi na ngai Cristin, oyo asengelaki kobatela bango ye moko ntango nazalaki kofanda liboso. Lokola bokoki kokanisa, bana na biso bazalaki na limemia te. Komonaka lolenge na ye, bandimi mibale ya palwasi na biso, John mpe Debbie Benich, babandaki kofanda elongo na ye eyenga moko na moko mpo na kosalisa. Boboto na bango ekobaki mibu mingi, mpe bakomaki bakoko bakitani mpo na libota na biso. Lokola Nkolo, bayekoli oyo bamonaki bosenga elobama te mpe basalaki kati na bolingo—elembo ya motuya ya kimoyekoli na bango.
Bolingani Ezali Kosalisa Basusu na Nzela ya Mayokani
Na nsuka, bolingo ebonga nie ya Mobikisi ebetaka nsete na kopesaka nzela na banso ya bana ya Nzambe bakokisa likoki na biso ya bonzambe ete tokoka “kokabola na ye lobiko, mpe nguya na ye ya bosikoli.” Ntango tokomi mingi lokola Nkolo, mposa na biso ya kosalisa bandeko na biso ya mibali mpe ya basi na nzela ya boyokani ekokola yango moko.
Ndakisa, tokoki kotombola mpe kosunga baoyo bazali komiyoka ya kotukama to kobosanama, kosalisa baoyo bazali sika na lingomba na biso bamiyoka bayambami malamu, to kobengisa baninga mpo na kokumbamela elongo na biso na liyangani ya elambo—ntango mosusu na Pasika oyo ezali koya. Ezali na bandenge mingi ya kolendisa mpe kosunga basusu na bokoli na bango soki na motema moko mpe na losambo toluki lisalisi ya lola mpo na kozala na miso ya komona mpe motema ya koyoka lolenge nini Yesu Klisto amonaka mpe ayokaka mpo na bango.
Kosalisa basusu na nzela ya mayokani na bango ekoki kozwa lolenge ya kosala moko ya mosala endimama na bato te. Lokola ndakisa, na mokumba na ngai ya mikolo oyo na Philippines, nayekolaki oyo etali libota ya Agamata. Babatisamaki na 2023, mpe nsima batiaki mokolo na motema motomoto mpo na kokangisama lokola libota na Tempelo ya pembeni ya Urdaneta Philippines. Nzokande, kaka liboso ya mokolo na bango, mipepe mingi ya makasi ebetaki etuka na bango. Ndeko mobali Agamata, mosali bilanga ya loso, azangaki makoki ya kolona milona na ye na eleko ya mvula makasi ya somo yango. Ntango bikumbaki nsukansuka elekaki, asengelaki kolona nokinoki loso wana ntango mabele etondisamaki na mai—ndenge ebongi mpo na kolona. Na mawa, mobembo ya tempelo esengelaki kozongisama nsima.
Bayekoli mibale, Mpaka mpe Ndeko mwasi Cauilan, elongo na bilenge misionele misato ya mosala, bayokaki etumba ya libota ya Agamata mpe bapesaki lisalisi atako bazalaki na boyebi moko te ya kolona. Kosalaka na nse ya moi ya kongala, basalisaki kolona bankona, kopesaka nzela na libota ya Agamata mpo na kosilisa mosala na bango mpe kozala na bokangisi na bango na tempelo lokola ebongisamaki na manaka. Mpaka Cauilan alobaki ete bilongi ya “[Baagamata’] engengaki ntango tomonaki bango kolataka mpembe na ndako ya Nkolo. Esengo toyokaki na kosalisaka moko oyo ezali esengo koleka bokokanisi!”
Sikawa libota ya Agamata ezali na esengo ya mapamboli ya motuya ya kokangisama lokola libota ya seko mpo na mwa baninga bayekoli oyo batondisamaki na bolingani—elembo moko ya kimoyekoli na bango—na mokano ya kosalisa bandeko na bango basi mpe mibali bakende liboso na nzela na bango ya boyokani.
Bandeko mibali mpe basi, kimoyekoli ya Yesu Klisto ezali nzela bobele se moko ya kozwa bosepeli oyo ewumelaka. Ezali nzela etondisami na misala ya motema moko mpe ya ntina ya bolingo mpo na basusu. Wana nzela ya kimoyekoli ekoki kozala mpasi mpe na mikakatano, mpe wana mbala mosusu tokoki kobunda mpe kozanga, tokoki kozwa libondi ete Nzambe azali na bokebi na ntina na biso azali na mposa ya kosalisa biso ntango nyonso tomekaka. Yisaya akundolisi biso ete “Nzambe akosimba [ya biso] loboko, kolobaka … , Banga te; nakosunga yo.”
Na kondima oyo uta na Tata na biso na Lola na makanisi, nasambeli na bosembo ete tokoka kolanda libengisi ya Mokambi Nelson mpo na kotia na esika ya liboso kimoyekoli na biso. Tika “tobondela epayi ya Tata na nguya ya motema nyonso” mpo na “kotondisama na bolingo wana, oyo apesi na baye banso oyo bazali balandi ya solo ya Mwana na Ye, Yesu Klisto; … ete ntango akomimonisa tozala lokola ye,” mpo tomemaka elembo ya kimoyekoli ya solo, oyo ezali “bolingani … bolingo ya peto ya Klisto.”
Nataloli ete Yesu Klisto azali ya biso ya bomoi, Mobikisi ya nkembo, Mosikoli, Ndakisa, mpe Moninga. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.