Koyeisa Motema na Bino Makasi Te
Soki toyamboli na bosolo mpenza, tomikitisi biso moko, mpe tolikyie mpe toyekami na Nkolo, mitema na biso ekolembisama.
Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ebandaki ntango Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo babimelaki elenge Joseph Smith, mpo na koyanola losambo na ye ya komikitisa. Lokola eteni ya Bozongisi, Joseph Smith abongolaki likomi moko ya kala na nzela ya likabo mpe nguya ya Nzambe. Likomi yango ezali na “misala ya Nzambe elongo na bafandi ya kala ya Bamerika mpe ezali na litondi ya nsango malamu ya seko.”
Ntango nazalaki elenge mobali, ntango natangaki Buku ya Mormon, nazalaki komitungisa mpo na nini Lamani mpe Lemuele bandimaki te bosolo oyo epesamelaki bango, kutu ntango anzelu moko ya Nkolo abimelaki mpe alobelaki bango mbala moko. Mpo na nini Lamani mpe Lemuele bakokaki te komikitisa mpenza mpe kotosa mateya ya tata na bango Lehi, mpe ndeko na bango ya mobali ya moke Nefi.
Nazwaki moko ya biyano na motuna oyo na 1 Nefi, oyo elobaki ete Nefi “ayokaki mawa mpo na bokasi ya mitema na bango.” Nefi atunaki bankulutu na ye ya mibali, “Ezali lolenge boni ete bozali bongo makasi na mitema na bino, mpe bakufi miso na mayele na bino?”
Kozala motema makasi elingi koloba nini?
Bobongoli na lokota ya Coree ya “makasi” na Buku ya Mormon ezali 완악 (Wan-Aak: 頑惡). Likomi yango esaleli elembo ya ki Chinois “Wan” (頑), elakisi “moto makasi,” mpe “Aak” (惡), elakisi “moto mabe.” Ntango tozali koyeisa mitema na biso makasi, tokomaka ya kokufa miso, mpe makambo malamu ekoki te kokoma na mitema na biso to na makanisi na biso. Tokomaka matoyi mangbongi mpe tobandaka kotia mabanzo mingi na mposa ya mokili, kokanga mitema na biso na makambo ya Nzambe. Toponaka kotia mayele na biso bobele na makanisi na biso moko na koboyaka kondima makanisi mpe toli ya basusu. Toponaka koboya kofongola mitema na biso na makanbo ya Nzambe na esika na yango tofongolaka mitema na botindiki ya makambo ya mokili mpe monguna. Ntango mitema na biso ezali makasi, totelemelaka botindiki ya Molimo Mosantu. Tokomaka “malembe mpo na komikundola Nkolo,” mpe nsima ya mikolo “toyokaka lisusu te” maloba na Ye.
Alma ateyaki bato ya Ammonihah ete basusu “babwakaki Molimo ya Nzambe na ntina ya bokasi ya mitema na bango.” Ateyaki lisusu ete “bango oyo bakoyeisa mitema na bango makasi, na bango ekopesama ndambo eleki moke ya liloba kino bakoyeba eloko moko te mpo na oyo etali mibombamo na ye.” Na nsuka, Molimo akolongwa, mpe Nkolo “akolongola liloba [na Ye]” uta na baye oyo bayeisi mitema na bango makasi, bobele lokola Lamani mpe Lemuele. Mpo ete Lamani mpe Lemuele bakobaki koyeisa mitema na bango makasi, batelemelaki mayoki ya Molimo Mosantu, mpe baponaki te kondima maloba mpe mateya ya tata na bango mpe Nefi, babwakaki kino nsuka bosolo ya seko uta na Nzambe.
Na bokeseni ya Lamani mpe Lemuele, Nefi akobaki komikitisa ye moko, kolukaka bokambi ya Molimo ya Nkolo. Na bozongisi, Nkolo alembisaki motema ya Nefi. Nefi akabolaki ete ye “abelelaki epayi ya Nkolo; mpe tala ye abimelaki ngai, mpe alembisaki motema na ngai mpenza, ete nandimaki maloba nyonso oyo elobamaki na tata na ngai.” Nkolo asalisaki Nefi mpo na kondima, kososola, mpe kondimela mibombamo nyonso ya Nzambe mpe maloba na Ye. Nefi azalaki na likoki ya kozala na kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.
Nini tokoki kosala mpo na koyeisa te mitema na biso?
Ya yambo, tokoki kosala boyamboli ya mokolo na mokolo.
Mobikisi na biso ateyaki, “Oyo nyonso akoyambola mpe akoya epayi na ngai lokola mwana moke, ye nakoyamba.” Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, ateyaki:
“Boyamboli ezali fongola mpo na kokende liboso. Bondimi ya peto ebatelaka biso tokende liboso na nzela ya liyokani.
“Nasengi bobanga te to bowumelisa boyamboli te. Satana asepelaka na mpasi na bino. … Bobanda lelo koyoka esengo ya kolongola lolenge ya bomoto. Mobikisi alingaka biso ntango nyonso kasi mingi mingi ntango toyambolaka.”
Ntango tozali koyoka esengo ya kolembisaka mitema na biso mpe koyaka epayi na Nkolo, tokomaka “lokola mwana moke, moto ya botosi, mosokemi, moto ya bomikitisi, moto ya motema molai, atonda na bolingo, oyo azali na bolingi ya kotosa makambo nyonso oyo Nkolo amoni elongobani kotinda likolo na ye, kutu lokola mwana moke atosaka tata na ye”
Ya mibale, tokoki kosalela bomikitisi.
Boyamboli ya mokolo na mokolo ekomema bomikitisi na mitema na biso. Tolingi kokoma ya komikitisa liboso ya Nkolo, lokola mwana moke oyo atosaka tata na bango. Na bongo tokozala na Molimo Mosantu ntango nyonso elongo na biso, mpe mitema na biso ekolembisama.
Mwasi na ngai, Sue, mpe ngai toyebaki libota moko ya kokamwa mpo na mibu minei eleki. Ntango tokutanaki na bango na ebandeli, mobali azalaki mondimi ya sika ya Eklezia, mpe mwasi na ye azalaki kokutana na bamisionele mpo na koyekola nsango malamu. Ebele ya bamisionele bakutanaki na ye mpo na kosunga ye aya epayi ya Klisto. Toyokaki ete azalaki na litatoli kitoko ya nsango malamu mpe ayebaki ete Eklezia ezalaki ya solo. Ye ayokaki Molimo mingimingi ntango ya botali na biso mpe azalaki kosangana mpenza na mayangani nyonso. Alinganki kosolola elongo na bandimi malamu ya palwasi. Nzokande, ye amonaki yango mpasi komipesa ye moko mpo kokota na mayi ya libatisi. Mokolo moko azalaki kotanga Moroni 7:43–44, oyo elobaki:
“Mpe lisusu, tala nalobi epai na bino ete akoki te kozala na bondimi mpe elikia, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mikita.
Soki bongo, bondimi mpe elikya [na yo] ezali mpamba, mpo moko te akoki koyambama liboso ya Nzambe, longola se soki azali mosokemi mpe na motema ya kokita.”
Nsima ya kotanga biteni oyo, amonaki ete asengelaki kobatisama. Ye alobaki ete asosolaki ndimbola ya kozalaka mosokemi mpe ya komikitisa. Nzokande, bosoli na ye ekokaki mpenza te mpo na kozala na bondimi mpe elikya ya kotosa mitindo ya Nzambe. Asengelaki kotika matoyi mangbongi mpe bwanya na ye moko. Abandaki komikitisa ye moko na nzela ya boyamboli ya solo. Abandaki kososola bomikitisi na bomoni ya miso ya Nzambe. Ayekamaki na Tata na Lola mpe abondelaki mpo na kolembisa motema na ye moko. Na nzela ya nsambo wana, ayokaki Molimo kotatola epayi na ye ete Tata na Lola alingaki ye abatisama.
Bango mibale mobali mpe mwasi balobaki ete na kokomaka mingi ya komikitisa, bakokaki kososola maloba ya Nzambe mingi, mpe mitema na bango elembisamaki mpo na kolanda mateya ya Nkolo na biso, Yesu Klisto.
Ya misato, tokoki kolikya mpe koyekama na Mobikisi na biso.
Nefi azalaki ndakisa monene ya kopesaka motema na ye nzela ya kolembisama na kondimelaka Nkolo. Ye alobaki, “natiaki elikya epayi na yo, mpe nakolikya epayi na yo mpo na libela. Nakotia elikya na ngai te na loboko ya mosuni.” Lolenge moko, na bobimisi moko epesamaki na Profeta Joseph Smith, Nkolo alobaki, “botia elikya na bino na Molimo wana oyo akambaka mpo na kosala malamu—iyo, mpo na kosala na boyengebene, mpo na kotambola na bomikitisi.” Ntango totie elikya na biso kati na Nkolo mpe toyekami na Ye, Akolembisa mitema na biso, mpe tokosungama na bitumba, mikakatano mpe bampasi na biso.
Soki toyamboli na bosolo mpenza, tomikitisi biso moko, mpe tolikyie mpe toyekami na Nkolo, mitema na biso ekolembisama. Ye akosopa boye likolo na biso Molimo na Ye mpe akolakisa biso mibombamo ya lola. Tokondimela maloba nyonso oyo Ye akoteya, mpe bososoli na biso ekokoma mozindo.
Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azalaki ndakisa ya nsuka ya bosokemi. Na 2 Nefi 31:7, totangi, “Kasi atako azalaki mosantu, alakisi epayi ya bana ya bato ete, engebene na mosuni amikitisi liboso ya Tata, mpe atatoli epayi ya tata ete akozala moto ya botosi epayi na ye na kobombaka mitindo na ye.” Atako Azalaki mosantu mpe sembo, Amikisaki ye moko liboso ya Tata mpe atosaki Ye na kobatisamaka.
Na nsuka ya bomoi na Ye, Yesu Klisto alakisakii bolingi na Ye epayi ya Tata na Ye na komelaka kopo ya bololo. Monyokoli yango esalaki Ye “alenga mpo na bolozi, mpe abimaki makila na lidusu moko moko ya mposo, mpe amona mpasi ezala na nzoto mpe na molimo.” Mobikisi asengaki ete Ye “amela nkeni yango ya bololo te, mpe atatabana.” Atako bongo, Ye alobaki, ”nkembo ezala epayi ya Tata, mpe [Ye] amelaki mpe asilisaki bomilengeli na [Ye] mpo na bana ya bato.”
Bandeko mibali mpe basi, epesamelaki biso bonsomi ya kopona. Tokoki kopona koyeisa mitema na biso makasi, to tokoki kopona kolembisa mitema na biso. Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kopona kosala makambo oyo ekobenga Molimo na Nkolo koya kokota mpe kofanda na mitema na biso. Nayebi ete na kati ya maponi wana, ezali na kimya mpe esengo.
Tika biso tolanda ndakisa ya Mobikisi, Yesu Klisto, oyo alandaki bolingi ya Tata. Soki tosali yango, Nkolo alaki biso, “Mpo, tala, nakosangisa bango lokola soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, soki bakoyeisa mitema na bango makasi te.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.