Limemia mpo na Biloko ya Bule
Limemia mpo na makambo ya bule elendisaka botondi ya solo, ebakisaka bosepeli ya solo, ememaka makanisi na biso na emoniseli, mpe ememaka esengo monene na bomoi na biso.
Na buku ya Esode, tozali kosala mobembo elongo na Mose na mipanzi ya Ngomba Horebe ntango abosanaki mitungisi mpe mikumba na ye ya mokolo na mokolo—eloko moko biso banso tosengeli kolinga kosala—ya komona nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te. Ndenge azalaki kopusana, “Nzambe abengaki ye uta na nzete moke yango, mpe alobaki, Mose, Mose. Mpe alobaki, Ngai oyo. Mpe [Nzambe] alobaki, … longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.” Kati na limemia monene, bomikitisi, mpe bikamwiseli, Mose alongolaki basandale na ye mpe amilengelaki mpo na koyoka liloba ya Nkolo mpe koyeba bozali esantu na Ye.
Emoniseli ya bule ya ngomba oyo, ezalaki likambo moko etondisami na limemia mingi, ekangisaki Mose na bomoto na ye ya bonzambe mpe ezalaki, ya solo, eloko ya ntina mingi ya mbongwana uta mobateli mpate ya bomikitisi na profeta ya nguya, kokambaka ye na kotambola nzela ya sika na bomoi. Ndenge moko, moko na moko na biso akoki kobongola kimoyekoli na lolenge moko ya likolo ya molimo na kosalaka ezaleli ya limemia eteni ya bule ya bomoto na biso ya molimo.
Liloba limemia ekoki kolandisama na verbe Latin revereri, oyo elingi koloba “kotelema na bobangi.” Na lolenge ya nsango malamu, ndimbola oyo ezali kosangana elongo na liyoki moko to ezalela moko ya limemia, bolingo, mpe botondi ya mozindo. Liloba ya boye mpo na ya bosantu na baye bazali na motema mobukana mpe bomipesi ya mozindo epayi ya Nzambe mpe Yesu Klisto ememaka esengo monene na mitema na bango.
Limemia mpo na biloko ya bule ezali bolakisi monene mpenza ya ezaleli ya molimo ya ntina mingi; ezali mbano ya bokangami na biso na bosantu mpe ezali kolakisa bolingo mpe bopusani na biso epayi ya Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Ezali mpe moko ya makambo ya motuya mingi ya motema. Ezaleli ya bongo ekambaka makanisi, mitema, mpe bomoi epayi ya Bonzambe. Ya solo, limemia ezali kaka te likambo moko ya molimo; ezali nde ntina na yango—moboko oyo likolo na yango makambo ya molimo etongami, kokelaka bokangami ya moto ye moko na bonzambe, lokola eteyami na bana na biso ntango bayembaka: “Ntango nazali na limemia, nayebi kati ya motema na ngai Tata na Lola mpe Yesu bazali pembeni.”
Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tobengisami mpo na kokolisa likabo ya limemia na bomoi na biso mpo na tomifungola bisomei na boyokani monene elongo na Nzambe mpe Mwana na Ye Yesu Klisto, mbala moko kolendisaka bomoto na biso ya molimo. Soki tozalaki na mayoki mingi ya boye na mitema na biso, na ntembe te esengo monene mpenza mpe bosepeli elingaki ezala na bomoi na biso, mpe elingaki ezala na esika moke mpo na mawa mpe mpasi. Tosengeli komikundola ete kolakisa Limemia mpo na biloko ya bule epesaka ndimbola na ebele ya makambo tosalaka mikolo nyonso mpe elendisaka mayoki na biso ya botondi—bobangi, botosi, mpe bolingo mingi mpo na biloko ya likolo mpe bosantu.
Likambo ya mawa, tozali kobika na mokili oyo wapi kolakisa limemia mpo na biloko ya bule ezali se kokoma mingi te. Ya solo, mokili esepelaka mingi mingi na makambo ezanga limemia, lokola motangi nyonso ya magazini, pologalami ya televisio, to litatoli ya interneti. Bozangi ya limemia mpo na biloko ya bule ebotaka makambo ya mpamba mingi na ezaleli mpe bozangi bokengi na etamboli, oyo ekoki na lombangu kokotisa nkola moko na bozangi kosepela mpe kokotisa mpasi na nkola oyo ekoya.
Bozangi limemia ekoki lisusu komema biso mosika na bikanganeli oyo mayokani elongo na Nzambe epesaka mpe kokitisa lolenge ya mikumba na biso liboso ya Bonzambe. Na yango, tozali na likama ya kotalela kaka bolamu na bisomei; kosepelisa bamposa na biso; mpe nsukansuka kokoma na esika esantu te ya kotyola biloko ya bule, kutu Nzambe, mpe na yango bomoto na biso ya bonzambe lokola bana ya Tata na Lola. Bozangi limemia na biloko ya bule etambwisaka bantina ya monguna na kokataka bibongiseli na biso ya ntina ya emoniseli oyo ezali motuya mpo na bomoi na biso ya molimo na mikolo biso.
Ndimbola mpe motuya ya limemia mpo na biloko ya bule elakisami malamu na makomi mobimba. Ndakisa moko na Malongi mpe Mayokani ezali komonana kolakisa ete limemia epayi ya Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye Yesu Klisto ezali ezaleli moko ya motuya mpo na baye bokokota bokonzi ya selestiale.
Lokola eklezia tozali kosala makasi mpo na kotya Tata mpe Mwana na bosantu monene mpe botosi na lolenge nyonso, kobakisa lolenge tozali kolakisa bililingi na Bango. Botambwisi ya Molimo Mosantu ezali eloko ya motuya na koyebaka lolenge nini bililingi oyo esengeli kolakisa bomoto ya bule, lolenge, mpe bizaleli ya bonzambe ya Tata mpe Mwana. Tozali na bokebi mingi mpo na kokima biloko oyo ekoki kolongola biso likebi na ntina na biso ya yambo likolo ya Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye Yesu Klisto mpe mateya na bango, kobakisa lolenge tozali kosalela bisalelo minene oyo tekenoloji epesi, lokola kosalela intelligence artificielle (IA) mpo na kobimisa makomi mpe bililingi.
Etinda se moko oyo esalelami na esika nyonso ya nsango oyo ezali na nzela ya bibongiseli ya nsango endimama ya Eklezia. Liteya nyonso, buku, mokanda, mpe nsango ebimisami mpe endimami na nse ya botambwisi ya Molimo mpo na kondimisa solo ete tozali kobomba ezaleli ya bule, mituya, mpe mibeko ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Na nsango moko ya kala mingi te mpo na bilenge bakola ya Eklezia, Mpaka David A. Bednar ateyaki, “Mpo na kotambola na mokangano ya mindondo ya molimo mpe tekinoloji, Basantu ba Mikolo mya Nsuka basengeli na komikitisa mpe na losambo (1) koyeba mibeko ya nsango malamu oyo ekoki kotambwisa bosaleli na bango ya mayele bato basali mpe (2) kobunda na bosembo mpo na kimoninga ya Molimo Mosantu mpe likabo ya molimo ya emoniseli.”
Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, ndenge tekinoloji ya malamu koleka mpe ya lelo oyo ekomi, ekoki te kaka kokotisa bikamwa, bobangi, mpe likamwisi oyo ezwami na lolenge ya limemia ebotami uta na nguya ya Molimo Mosantu. Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tosengeli kozala na bokebi mpo na kolembisa te bokangami na biso elongo na Nzambe mpe Mwana na Ye na kosalelaka makomi mpe bililingi oyo intelligence artificielle ezali kopesa na lolenge ya mabe. Tosengeli komikundola ete kotalela “loboko ya mosuni” ya tekinoloji ya lelo ezali esika ya malamu te mpe ya limemia te mpo na bofuli, bolendisi, mpe litatoli oyo ekoki kozwama kaka na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu. Lokola Nefi asakolaki: “O Nkolo, natiaki elikya na ngai epayi na yo, mpe nakolikya epayi na yo mpo na libela. Nakotia elikya na ngai te na loboko ya mosuni.”
Na emoniseli mosusu, Profeta Joseph Smith asengamaki ete batempelo oyo etongami mpo na Nkolo esengeli kozala esika ya limemia epayi na Ye. Na mosala na ye mobimba, profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, abeti nsete makasi na bokumbameli na biso na limemia kati na tempelo ya bule. Kati na ndako ya Nkolo, toteyami etali kokotaka na liboso ya bozali esantu ya Tata mpe Mwana. Namonaka yango ntango nyonso ya motuya mingi mpe kutu ya bofuli ete moko ya biloko ya liboso tosalaka na kokotaka na tempelo mpe komilengela bisomei mpo na kosangana na makuli ya bule ezali ya kolongola basapatu na biso mpe kolata bilamba na biso ya mpembe. Lokola Mose, soki tozali na mokano, tokoki koyeba ete kolongola basapatu na biso ya mokili ezali ebandeli ya kokota na esika esantu mpe kobongolama na ndenge ya likolo mpe esantu koleka.
Bandeko mibali mpe basi, tozali na mposa ya komata likolo ya ngomba te, lokola Mose asalaki, mpo na koyeba limemia mpo na biloko ya bule mpe kobongola boyekoli na biso na lolenge ya mozindo ya makambo ya molimo mpe bomipesi. Tokoki kozwa yango, ndakisa, ntango tozali kosala makasi ya kobatela nzinganzinga ya ndako na biso uta bopusi ya mokili. Yango ekoki kokokisama na nzela ya libondeli ya solo mpe ya molende liboso ya Tata na biso na Lola na nkombo ya Yesu Klisto mpe kolukaka koyeba malamu Mobikisi na biso na nzela ya boyekoli ya molende ya liloba ya Nzambe oyo ezwami na makomi mpe mateya ya baprofeta na biso. Lisusu, lokola mbongwana ya molimo ya boye ekoki koya ntango tozali kosala makasi mpo na kokumisa mayokani tosalakii elongo na Nkolo na kobikaka na botosi na mitindo na Ye. Milende oyo ekoki komema kimia moko ya kati mpe ya solo na mitema na biso. Kotya makanisi likolo ya misala ya boye ekoki ya solo kosunga kobongola bandako na biso na bisika ya limemia ya bobateli ya molimo—ya komibomba ya moto ye moko ya bondimi wapi Molimo ezali kofanda, mingi lokola boyebi ya Mose na ngomba.
Tokoki mpe koyeba mbongwana ya molimo ya lolenge oyo ntango tozali kosangana na bondimi nyonso na losambo ya Eklezia, kobakisa kobalola mitema na biso epayi ya Nkolo na nzela ya koyemba banzembo ya bule. Kopesa mokongo—lokola Mose—uta makambo ya mokili oyo elongolaka likebi, mingi mingi telefone na biso to eloko mosusu oyo ezali te na boyokani na ngonga ya bule oyo, ekopesa biso likoki ya kopesa likebi na biso nyonso na koliaka elambo, na makanisi mpe mitema na biso epayi ya Mobikisi mpe mbeka ya bomikabi na Ye elongo na mayokani na bisomei. Makanisi ya elambo ya lolenge oyo ekomema ngonga moko ya bozongisi sika ya limemia ya boyokani na biso elongo na Mobikisi mpe ekokomisa Saba bosepeli mpe ekobongola bomoi na biso.
Nsukansuka, tokoki koyeba mbongwana ya molimo oyo na boyekoli na biso ntango tozali kokumbamela na ngomba ya ndako ya Nkolo—batempelo na biso esantu—mpe kosala makasi ya kobika na bondimi ya boyokani, mingi mingi ntango tozali kokutana na mimekano ya bomoi ya kufa.
Mwasi na ngai mpe ngai moko tomonakii bangonga ya ngomba ya bule kati na limemia ntango tozalaki kosala makasi mpo na kosalela mitindo oyo na bomoi na biso, oyo epesi mbongwana ya ntina na boyekoli na biso. Namikundoli lokola ezalaki lobi eleki kotambolaka na malita liboso ya kokunda mwana na biso ya mibale, oyo abotamaki litsombe mpe abikaki te, ntango mwasi na ngai azalaki naino na lopitalo. Namikundoli kobondelaka Nzambe na bokasi mpe molende, kosengaka mpo na lisungi ya kolonga momekano ya mpasi oyo. Na ngonga wana, nazwaki kondimisama ya molimo ya polele mpe ya nguya kati na motema na ngai: eloko nyonso ekozala malamu na bomoi na biso soki ngai mpe mwasi na ngai toyiki mpiko, kosimbaka na esengo oyo ewutaka na kobikaka nsango malamu ya Yesu Klisto. Oyo ezalaki komonana lokola momekano ya koleka, ya mawa mingi na ntango wana ebalukaki na likambo moko ya bule, ya limemia, libanga ya nsuka oyo esungi kotombola bondimi na biso mpe epesi biso makasi na mayokani oyo tosali elongo na Nkolo mpe na bilaka na Ye mpo na ngai mpe libota na ngai.
Bandeko na ngai mibali mpe basi, limemia mpo na biloko ya bule elendisaka botondi ya solosolo, ebakisaka bosepeli ya solo, ememaka makanisi na biso na emoniseli, mpe ememaka esengo monene na bomoi na biso. Etyaka makolo na biso na esika esantu mpe etombolaka mitema na biso epayi ya Nzambe.
Natatoli na bino ete ntango tozali kosala makasi mpo na kotia ezaleli ya bongo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tokozala na likoki ya kokolisa bomikitisi na biso, kobakisa bososoli na biso ya bolingi ya Nzambe mpo na biso, mpe kolendisa elikya na biso na bilaka ya mayokani oyo tosali elongo na Nkolo. Natatoli ete ntango tozali koyamba likabo oyo ya limemia mpo na biloko ya bule—ezala na ngomba ya ndako ya Nkolo, na ndako ya makita, to na bandako na bisomei—tokotondisama na makamwisi minene mpe bobangi ndenge tozali kokangama na bolingo ya solo ya Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto. Na limemia nyonso natatoli bosolo oyo na nkombo ya bule ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso Yesu Klisto, amene.