Bokeba na Lisenginia ya Mibale
Bobombama te liboso ya baye oyo bakolinga mpe bakosunga bino; na esika, bokende epayi na bango.
Mwa mibu eleki, ntango nakokisaki mibu 12, nabiangamaki mpo na kosangana na camp na ngai ya kolala ya yambo ya lisanga ya Bonganganzambe ya Alona. Yango ezalaki libiangi moko oyo tozalaki kozela uta kala, lokola tata na ngai azalaki mokambi ya lisanga mpe mingimingi azalaki kokende na camp elongo na bilenge mibali na palwasi ntango nazalaki kotikala na ndako.
Ntango mokolo eyaki, nazalaki na esengo. Mpe nasengeli kondima ete nazalaki na mposa makasi ya kozala na bana mibali ya mikolo. Namilengelaki mpo na komimonisa. Kati na molende wana ewumelaki te yambo namekama mpo na komona soki nakosakana elongo mpe kozala na kati ya etuluku.
Mokumba nazwaki ezalaki ya kozwa bafungola ya motuka ya tata na ngai na yango tokokaki kosala liseki moko na bakambi. Nazali komikundola te mpenza eloko nalobaki mpo na kondimisa tata na ngai, kasi nakendaki nokinoki epayi ya etuluku ya bana mibali na bafungola na maboko, kosepela mpo na oyo nakokisaki.
Nsima eyaki mokumba mosusu. Nasengelaki kofungola ekuke ya motuka mpe kokotisa mwa nzete moko na katikati ya kiti ya mokumbi mpe liseke ya motuka yango. Mpe nasengelaki kokanga ekuke mpo ete liseke yango ekoka kobeta na mpokwa na lolenge ya kozanga nzela ata moko mpona bakambi bakoma na motuka mpe kolongola masini ya pete.
Sikawa oyo ezali esika oyo likambo ezali kokoma mpasi mpo na ngai. Mbala moko na natyaki nzete na esika yango, nakangaki ekuke mpe nakimaki mbangu makasi mpo na komibomba na banzete oyo ezalaki pembeni. Ntango nazalaki kogumbama na nse na mabele, nayokaki mpasi makasi. Kati na molili mpe na lombangu na ngai, nafandelaki nzete moko ya cactus.
Kolela na ngai ya mpasi ezindamaki na liseke oyo ezalaki kobeta, mpe nazalaki na eloko mosusu ya kosala te se ya kozonga na bokebi na motuka, kotubelaka “masumu,” na ngai mpe koluka lisalisi ya yambo mpe ya nsoni ya minganga.
Na butu wana, nalalaki na libumu na ngai kati na hema ntango tata na ngai, kosalelaka ba pince, alongolaki bansende ya cactus uta na ya ngai … malamu, tika kaka naloba ete nafandaki malamu te mpo na mikolo ebele nsima.
Nakanisaki na likambo oyo mbala mingi. Nakoki sikawa koseka bozoba ya bolenge na ngai, atako mitindo mosusu ya ntina ekomi polele epayi na ngai.
Bizaleli mingi na lolenge ya bomoto emonani kozala mingi kati ya moto ya mokili—mposa ya komiyokanisa na basusu, mposa ya komimonisa, bobangi ya kozanga libaku, mpe mposa makasi ya kobombama mpo na kokima makama. Ezaleli ya nsuka oyo nde nakolobela lelo—komibomba nsima ya kosala eloko moko oyo tosengelaki kosala te.
Sikawa, nazali kokokanisa maseki na ngai ya bomwana na lisumu monene te, kasi tokoki kotya bokokani mosusu oyo ekoki kozala motuya ntango tozali komekama na bomoi na biso ya kufa.
Kati na Elanga ya Edene, Adama mpe Ewa bazalaki na makambo kitoko—litondi ya bilei, kitoko ya elanga eleki bokokanisi—kaka te elanga ya kitoko kasi elanga moko oyo ezalaki na matiti mabe te mpe mbuma ya nsendensende te.
Nzokande, toyebi mpe ete bomoi ya elanga esukisaki bokoli oyo bazalaki na yango mposa. Elanga ezalaki esika ya nsuka te kasi momekano, ya yambo kati na mingi oyo esengelaki komonisa, kolengela, mpe kopesa bango nzela bakende liboso kino esika na bango ya nsuka ya kozonga liboso ya Tata mpe Mwana.
Bokomikundola ete ezalaki na botelemeli kati na elanga. Lusifelo apesamelaki nzela ya komeka Adama mpe Ewa. Amekaki yambo Adama mpo na alia mbuma ya nzete ya boyebi ya bolamu mpe bobe. Na komikundola motindo ya kolia yango te, Adama atelemelaki yango. Nsima Ewa apambolama ayaki, oyo aponaki kolia mbuma, kondimisaka Adama asala ndenge moko.
Nsima, Adama mpe Ewa basakolaki ete ekateli oyo ezalaki motuya mpo na kokokisa mwango ya Tata na Lola. Kasi na koliaka mbuma, babukaki mobeko—mobeko oyo bapesaki bango mbala moko uta na Tata. Bososoli ya malamu mpe ya mabe oyo ewuti na yango ekozala etikaki bango na mpasi mingi ntango bayokaki mongongo ya Tata kosakolaka bozongi na Ye na elanga. Bayebaki ete bazalaki bolumbu, mpo bazalaki ya solo na bilamba te, babikaki na ezalela ya bozangi boyebi. Kasi ntango mosusu ya mpasi mingi koleka kozala na bango ya kozanga bilamba na ngonga wana, sikawa bazangaki bobateli mpo na bobuki mobeko na bango. Bazangaki makoki ya komibatela mpe bazalaki na likama te. Bazalaki bolumbu na ndimbola nyonso ya liloba yango.
Moluki matomba na ye moko ya ntango nyonso, Lusifelo, koyebaka ezalela na bango ya bozangi bobateli mpe ya bolembu, amekaki bango lisusu—ntango oyo mpo na babombama liboso ya Nzambe.
Lisenginia oyo—nakobenga yango “lisenginia ya mibale”—ezali lisenginia oyo ekoki komema likama monene koleka soki tokweyi na yango. Ya solo, kokima masenginia nyonso ya yambo ya kobuka mobeko ya Nzambe ezali malamu mingi, kasi toyebi ete banso bakokweya na masenginia ya yambo ya ndenge na ndenge awa na mabele. Ntango tozali kokola na makanisi mpe bososoli na biso, tolikyi ete makasi na biso ya kokima masenginia ya yambo ekokoba kobonga ntango tozali kosala makasi mpo na kokoma mingi lokola Mobikisi na biso, Yesu Klisto.
Basusu bakoki komeka kobombama liboso ya Nzambe mpo balingi te komonana to kozanga bobateli, mpe bazali koyoka nsoni to ngambo. Atako bongo, makomi mingi ezali koteya biso ete kobombama liboso ya Nzambe ekoki kosalema te. Nakokabola kaka moke.
Nkolo ateyi Yelemia na nzela ya mituna elandi: “Boni moko akoki kobombama na esika ya nkuku bongo ngai nazanga komona ye? elobi Nkolo. Natondisa lola mpe mabele te?”
Mpe Yobo ateyami:
“Miso na ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
“Ezala molili, to libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato ya mabe.”
Mokomi ya nzembo Dawidi mingiming na maloba ya ntoki alobi:
“O Nkolo, oluki ngai, mpe oyebi ngai.
“Yo oyebi bolembu mpe makasi na ngai, oyebi likanisi na ngai na mosika. …
“Pamba te, O Nkolo, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai, omiyebelaka yango. …
“Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo? to nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo?
“Soki namati na lola, ozali kuna: soki nakeyi na mboka ya bakufi, tala, ozali lisusu kuna.”
Babongwani ya Sika
Mpo na baye bakoti na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka kala mingi te, lisenginia ya mibale ekoki komonana mingimingi ya mpasi. Na nzela ya libatisi na bino boyokani kozwa likolo na bino nkombo ya Yesu Klisto, oyo mpo na mingi esangisi mbongwana esengeli ya lolenge ya bomoi. Kobongola lolenge ya bomoi ya moto ezali pete te. Mingimingii esengaka bino bobongola bizaleli mpe misala mpe kutu bokutani mpo na kokende liboso epayi ya Tata na Lola ya bolingo.
Monguna ayebi ete bokoki kozanga makasi na bitumba mabe na ye. Akokomisa bomoi na yo ya kala, oyo etikaki yo na bosepeli te na ndenge ebele, sikawa ekomonana kitoko na ndenge ya lokuta. Mofundi, lokola abengami na buku ya Emoniseli, akomeka bino na makanisi oyo eyokanaka bongo: “Ozali makasi mpenza te mpo na kobongola bomoi na yo; okoki kosala oyo te; ozali kosangana elongo na bato oyo te; bakondima yo ata moke te; ozali ya kolemba mingi.”
Soki makanisi oyo emonani koyokana ya solo epayi na bino oyo bolonami sika na nzela ya boyokani, tosengi bino boyoka mongongo ya mofundi te. Tolingi bino; bokoki kosala yango; tondimi bino; mpe elongo na Mobikisi, bokozala na makasi ya kosala nyonso. Na ngonga moko ntango bozali na mposa mingi ya bolingo mpe lisungi na biso, bolembisama te na kokanisaka ete tokoboya bino soki bozongi moke nsima na lolenge ya bomoi na bino ya kala. Na nzela ya nguya makasi ya Bomikabi ya Yesu Klisto, bokoki kozongisama mobimba lisusu. Kasi soki bobombami liboso na Ye mpe bokeyi mosika ya lingomba na bino ya sika, bomikomisi mosika ya liziba mpenza oyo ekoki mpe ekopesa bino makasi ya kolonga.
Moninga na ngai moko ya bolingo, mobongwani ya sika, akabolaki lolenge nini ezali mpasi mpo na kosunga bondimi kati na bokabwani. Ezali na bokasi monene na kokomaka mpe kotikalaka na lingomba moko ya lisungi—banso babetaka mabaku ntango bazali kokende liboso wana bazali kopambolama na bolingo ya Yesu Klisto.
Mokambi Russell M. Nelson ateyi ete “kolonga mokili ezali likambo moko esalamaka na mokolo moko to mibale te. Esalamaka na bomoi mobimba ntango tozali koyamba mbala na mbala malongi ya Klisto. Tolonaka bondimi na Yesu Klisto na koyambolaka mokolo na mokolo mpe kobatelaka mayokani oyo epambolaka biso na nguya. Totikalaka na nzela ya boyokani mpe topambolamaka na bokasi ya molimo, emoniseli ya moto ye moko, bondimi ya kobuta, mpe mosala ya banzelu.
Soki bozoki, nzoto na bino ekobeba mpe ekoki kotya bomoi na likama soki boluki te lisungi ebongi ya minganga. Yango ezali ya solo mpe mpo na mpota ya molimo. Kaka, bampota ya molimo oyo ezwi nkisi te ekoki kobebisa bonetoli na bino ya seko. Bobombama te liboso ya baye oyo bakolinga mpe bakosunga bino; na esika, bokende epayi na bango. Baepisikopo malamu, bakambi ya etape, mpe bakambi bakoki kosunga bino bozwa nguya ya kobikisa ya Bomikabi ya Yesu Klisto.
Na baye oyo bakoki kozala ya kobombama, tosengi bino bozonga. Bozali na mposa ya oyo nsango malamu mpe Bomikabi ya Yesu Klisto ezali kopesa, mpe tozali na mposa ya oyo bozali kopesa. Nzambe ayebi masumu na bino; bokoki kobomboma te liboso na Ye. Bozongisa boyokani na bino liboso na Ye.
Lokola Basantu na Ye, moko na moko na biso asengeli kokolisa momeseno ya kozala na kati ya Eklezia oyo ezali ya bolingo, ezali kondima, kolendisa banso oyo bazali na mposa ya kokende liboso na nzela na Ye.
Bokeba na lisenginia oyo ya mibale! Bolanda toli ya baprofeta ya kala mpe ya mikolo ya lelo mpe boyeba ete bokoki kobombama te liboso ya Tata ya bolingo.
Na esika, bosalela nguya ya kobikisa ya kokamwa ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Oyo ezali ntina mpenza ya bozali na biso—ya kozwa nzoto ya bolembu mpe ya kufa oyo ezali “na bolembu ya ndenge nyonso” mpe oyo ekokweya, na mawa nyonso, na masenginia mingi ya yambo; mpo na kokende liboso ata ntango tozali kokweya na masenginia yango; mpe mpo na koluka lisungi ya bonzambe nsima ya kosala bongo, ete tokoka kokoma mingi lokola Mobikisi na biso mpe Tata na biso na Lola. Ezali nzela na Ye. Ezali nzela se moko. Na ntina ya babosolo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.