Bozwa Likabo na Ye
Ozali mwana mwasi ya bolingo ya Nzambe, ozali mwana mobali alingami ya Nzambe, mpe apesi bino likabo ya Mwana na Ye abonga nie mpe mosantu.
Kopesa Makabo
Kopesa makabo ezali momeseno ya bato ya bonkoko nyonso, bikolo nyonso mpe ya bankoto ya bambula. Na bowumeli ya ntango, bato bapesi makabo na moko na mosusu mpo na kolendisa mayokani, komonisa bolingo mpe botondi, mpe kosepela makambo ya ntina lokola mabala, mbotama, mpe bafeti. Mpe bato bazali te kaka bikelamu ya Nzambe oyo epesanaka makabo moko na mosusu! Kati na bandakisa mingi mosusu oyo tokoki kotanga, ba pingouins eyebani na kopesaka mabanga ya mikemike ya kongenga epayi ya balingami na bango, bonobos (bandeko ya chimpanzé) bapesaka mbuma mpo na kokolisa nzolongano ya kiboninga na bango.
Makabo nini bopesi? Bokanisa etali ntango oyo bozwaki—to bosalaki—likabo ya kokokampo na moto oyo bolingaka. Bino boyebaki ete likabo ezalaki mpenza eloko oyo molingami oyo azalaki na yango mposa mpe eloko moko bakopesa motuya mingi. Likabo yango ezalaki nini? Ezalaki mama na bino? moninga? mwana na bino? molakisi? nkoko na bino ya mobali? Boyokaki ndenge nini ntango bozwaki likabo yango? Lolenge boyokaki ntango bokanisaki etali moto oyo bolingaka kofungola likabo yango? Ndenge moko, ntango moto moko apesaki bino likabo ya kokoka, mpe bomiyokaki ndenge nini ntango bozwaki yango?
Likabo ya Tata na Ngai epayi na Ngai
Ntango nazalaki na mbula soki nsambo, nazalaki kofanda elongo na baboti na ngai na Arabie, filme moko ya bana oyo babengi Chitty Chitty Bang Bang ebimaki. Filme yango elobeli lisolo ya motuka moko ya maji oyo ekoki kotambola yango moko, kotambola likolo ya mayi, mpe kutu kopumbwa! Nayebaki ete na kozongaka ndako na Angleterre basalaki motuka ya kosakana na yango ya moke mpenza lokola Chitty Chitty Bang Bang, mpe o, nazalaki mpenza na mposa na yango! Okokaki kobenda lokolo, mpe mapapu ya motuka ekokaki kobima! Tata na ngai akendaki na mobembo ya mosala na Angleterre mpe atunaki ngai soki nalingi amemela ngai eloko moko, mpe nayebisaki ye boniboni nakosepela kozala na moko ya mituka wana ya Chitty Chitty Bang Bang.
Azongaki na mobembo na ye, mpe motuka moko te ezalaki. Nazalaki na mawa mingi mpe nakanisaki ete abosanaki. Kasi mikolo soki zomi na nsima ezalaki mokolo ya mbotama na ngai, mpe mwa pake moko, oyo ezingamaki kitoko, ezalaki kozela ngai. Na motema likolo, na mpiko te mpo na kolikya mingi, nafungolaki likabo mpe namonaki motuka na ngai. Nasepelaki mingi mpe nalelaki. Nabendaki lokolo, mpe mapapu ebimaki, kaka lokola motuka oyo ezali na filme! Boniboni natondaki tata na ngai mpo na likabo oyo ya motuya. Nasakanaki na motuka wana na boumeli ya bambula mpe nabombaki yango mpo na ntango molai. Nakanisi ete tata na ngai asepelaki kopesa ngai motuka yango ata ndenge nasepelaki kozwa yango.
Kopesa, Kondima, Kofungola mpe Kozwa
Tokoki kokanisa ete kopesa makabo esangisi biteni misato:
-
Bopesi ya likabo, esika mopesi aponaka, asalaka to abongisaka likabo mpe alakisaka yango na molingami. Yango esengaka mokano ya malamu ya mopesi mpo na kopesa eloko moko ya ntina.
-
Kondima mpe kofungola ya likabo, ntango mozwi andimaka likabo na loboko ya mopesi—mbala mingi na maloba ya kokamwa, ya botondi, mpe ya bosepeli—yambo ya kofungola yango, mbala mosusu kokataka bansinga mpe kofungolaka liboke mpo na koyeba soki likabo ezali nini.
-
Mpe na nsima ezali na ntango mosusu eteni ya ntina mingi, oyo ya kozwa likabo. Kozwa likabo oyo epesami na motema moko ezali mingi koleka kondima mpe kofungola yango. Ezali mingi, kutu, koleka koyeba motuya ya likabo mpe komonisa botondi epayi ya mopesi. Mpo na kozwa solo likabo, tokomaka kosepela na yango biso moko, tosalelaka yango mobimba na bomoi na biso, mpe sima tomikundolaka na botondi moto oyo apesaki biso yango.
Kozwa likabo ezali likambo ya mpamba te kasi ya mokano mpe motuya oyo esuki kaka te na na kofungola liboke. Kozwa ezali kosepela mpe kokangama na nyonso mibale likabo mpe motema ya mopesi na lolenge oyo elendisaka boyokani kati na mopesi mpe mozwi. Kokanisaka na ntina ya motuka wana ya masano ezongisaka ebele ya makundoli ya motuya, lokola nayoki lisusu bolingo mpe bokebi ya mozindo ya tata na ngai mpo na ngai, oyo emonisami na likabo wana mpe makambo mosusu ya boboto.
Makabo ya Tata na biso na Lola
Tata na biso na Lola azali na makabo ebele ya pole mpe bosolo oyo ebongisami mpo na kosopama likolo ya moko na moko na biso, bana na Ye ya motuya. Esopanaka uta na Mopesi na biso ya Bokabi lokola liziba ya mayi na esobe uta na motema na Ye ya boboto. “Bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka na likolo mpe epayi ya Tata ya pole.” Na boyokani na biso na Tata, Ye azali ntango nyonso Mopesi mpe biso tozali bazwi ya komikitisa.
Likabo Eleki Monene ya Makabo Nyonso ya Tata, oyo na Nzela na Yango Makabo Mosusu Nyonso Mapesami
Kasi tokokaki te kozwa eloko moko kozangaka likabo eleki monene ya makabo nyonso ya Tata: Mwana na Mpate na Ye ya bolingo, Mwana na Ye, Yesu Klisto. Makabo nyonso ya Tata na biso ezali kowuta mpe epesami na nzela ya likabo ya bolingi ya Mobikisi na Getesemane mpe na ekulusu, mpe Lisekwa na Ye ya elonga. Yesu Klisto, Mosikoli na biso ya mawa, azali likabo ya likolo ya Tata na biso ya pole. “Na likabo ya Mwana na ye Nzambe alengelaki [mpo na biso] nzela ya malamu mingi koleka.”
Likabo oyo Esangisi Makambo Nyonso ya Bosolo ya Seko
Nakolinga kolobela likabo oyo esangisi makambo nyonso ya bosolo ya seko oyo esimbi makoki na biso ya kozwa nyonso mosusu oyo Tata na biso alingi kopesa biso—likabo ya ntina mingi ya boyebi oyo, ntango endimami mobimba mpe eyambami na bozindo ya motema epesaka ntina na bisengo mpe mikakatano ya bomoi mpe mituna na biso oyo ezanga biyano: Ezali ete tozali ya solo bana ya Nzambe Bosolo wana ezali kokamwisa! Ezali kitoko mpenza! Mpe ezali ya elilingi te.
Bokanisa koyoka yango mpo na mbala ya liboso! Ozali ya solo mwana na ye ya mwasi ya bolingo. Ozali ya solo mwana na Ye ya mobali ya motuya. Mpe nzela oyo ozali katambola ezali mwango na Ye ya esengo. Na bolingo na Ye ya boyebi makambo nyonso, Ayebi mpenza oyo bozalaki yambo botindama na mabele, mpe makambo oyo bokutani na yango kino sikawa na bomoi na bino ya kufa, mpe na motema mawa nyonso Abongisi makambo nyonso mpo na lobi na bino nyonso. Mpe o, boniboni Azali na mposa makasi ya komona bino mokolo moko kozonga epayi na Ye, kozwa mokano ya likolo ya makabo na Ye nyonso ya kitoko, bomoi ya seko elongo na Ye.
Motuna ezali te soki likabo oyo ya bosolo ezali ya solo kasi ezali soki tokoyeba yango mpe tokozwa yango. Likabo esila kopesamela biso epayi na Tata. Ntalo mpo na ntina ya nsuka ya likabo oyo esila kofutama epayi ya Mobikisi. Kasi soki bateya bino yango, bayebisa bino yango, mpe boyemba bosolo oyo uta mibu mingi, mbala mosusu kitoko na yango esilaki kala mpe bozali koyoka lisusu nguya mpe kimia na yango te.
Soki likabo oyo ya motuya mingi ya bososoli—mpe bolamu nyonso, kimia, mpe elikya oyo ewutaka na yango—endimami te, efungwami te, mpe eyambami te, oyo nde likambo ya nsomo mpo na biso! Oyo nde mawa mingii mpo na Mopesi! “Mpo litomba nini ekoki moto kozwa soki likabo epesami epayi na ye, mpe azwi likabo yango te? Tala, asepeli te na oyo epesami epayi na ye, mpe akosepela soki te na moto oyo azali mopesi ya likabo yango.”
Nabengisi bino bozwa ezala mpo na mbala liboso to na meko monene koleka liboso, bososoli malamu ete bozali solo mwana ya bolingo ya Nzambe. Bosengeli kolongola bansinga, kolongola nkasa ya kozipa, kofungola liboke mpe kozwa na molende na komikitisa ya botondi bososoli, ya solo mpe ya peto ya bosolo oyo ya moboko. Molimo Mosantu akoki kotatola na motema na yno ete ozali ya solo mwana ya Oyo Aleki Likolo.
Ntango boyambi bosolo ya nguya oyo kati na motema na bino mpe boyoki libondisi mpe esengo na yango, ndakisa na bino malamu mobimba ekobongwana! Bokoki koyoka bolingo na Ye, koyoka mongongo na Ye, mpe koyeba loboko na Ye, kotala te nini ezali kokoma, to kokoma te, na bomoi na bino. Okoki komiyeba lolenge omimonaka yo moko mpe basusu. Mokangano ya boyokani na bino elongo na Mobikisi ekomaka kutu makasi, mpe na nzela ya miso ya likabo kitoko oyo, bomoi ezwaka kongenga ya sika, kitoko, mpe elikya.
Tosengi bosambela mpo na kososola soki bozali mpenza kozwa boyebi oyo ya mbongwana na mozindo ya motema na bino. Ekozala bino kondima likabo yango? Bokosala yango na bozindo mpenza, na bonsomi mpenza, mpe mingi koleka lolenge osala ata mokolo moko te yambo—mpe na bongo kotondisama naa makabo mosusu nyonso oyo eyaka elongo na yango?
Kozwaka Likabo oyo ya Bosolo ya Seko
Bokoki kozala komituna, “Nini nasengeli kosala mpo na kozwa likabo oyo uta na Nzambe?” Malamu, ya solo, eloko te. Ezali likabo uta na Mopesi. Ezali kaka likambo moko ya solo Ndima yango kaka. Bino bozali mwana na Ye. Bolingami epayi na Ye. Bokomisa yango mindondo te. Bokanga te bozwi ya likabo oyo na makanisi ete bobongi na yango te. Bosolo ezali ete moko te kati na biso “abongi” na yango—makabo nyonso ya Tata ezwami bobele na nzela ya matomba, mpe boboto, mpe ngolu ya Masiya Mosantu, kasi boniboni motema na Ye ya boboto elingi ete moko na moko ya bana na Ye azwa yango! Nsima, ndenge bososoli na bino ya sika to oyo ezongisami sika eyeli bino, bosepela na kopesaka matondi epayi ya Mopesi ya likabo oyo.
Banda nazwaki bondimi na ngai na mibu na ngai 20, nayakii kososola mpenza ete nazali ya solo mwana ya Nzambe. Mingi mpenza nazali kokotisa likabo oyo na motema na ngai, mingi nayebi malamu nani ngai nazali mpe lolenge nini nalingami mobimba mpenza. Biloko mosusu oyo esalisi ngainakola na bososoli ezali maloba ya makomi, lipamboli na ngai ya batata, kokumbamela na tempelo, kosalela basusu, kolakisa botondi, mpe losambo ya bule elongo na Tata na ngai. Nakamwaka na lolenge mawa, mpasi, mpe mitungisi ya kala na bomoi na ngai elingaki kotyama esika mosusu, kobikisama, mpe mingi na yango kolongama soki nayebaki bosolo kitoko oyo.
Boya epayi na Klisto mpe Bozwa
Moroni alendisi biso mpo na “kowangana makabo ya Nzambe te” kasi “koya epayi na Klisto; mpe kokangama na makabo nyonso ya malamu.” Bokoki koya epayi ya Klisto kotiaka motema na bolamu na Ye mpe kozwa makabo na Ye nyonso ya esengo, ya kimia, ya elikya, ya pole, ya bosolo, ya bobimisi, ya boyebi, mpe ya bwanya—na moto na bino etombolami likolo, maboko na bino esembolami mpe efungwami, elengelami mpo na kozwa. Mpe bokoki kozwa makabo oyo mpo ete bozali na kimia mpe na boyebi ete bozali mwana mwasi ya bolingo ya Nzambe, bozali mwana mobali olingami ya Nzambe, mpe ete apesi bino Mwana Mosantu na Ye mpo na kosikola, kolongisa, mpe kosantisa bino.
Bino bozali mwana ya Nzambe. Oyo ezali kaka nzembo kitoko oyo toyembaka. Ekoki bino mpenza kondima, kofungola, mpe kozwa likabo oyo ya boyebi mpe bososoli uta na Ye? Ekoki bino kosimba yango pembeni lokola bomengo ya motuya yango ezali? Bozwa lisusu likabo oyo, to mbala mosusu bozwa yango ya solo mpo na mbala ya liboso mpenza, mpe botika yango ebongola lolenge nyonso ya bomoi na bino. Oyo ezali lolenge ya malamu koleka oyo Nzambe abongisaki mpo na bino na nzela ya likabo ya Mwana na Ye. Bozali mpo ete bokoka kozala na esengo! Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.