Bobakisi
Tata na yo na Lola abengisi yo ozwa makuli ya bule. Makuli oyo esangisi mayokani—bilaka osalaka elongo na Nzambe, mpe Ye asalaka bilaka elongo na yo. Ndakisa, osalaka mayokani oyo, ntango obatisami mpe okotisami lokola mondimi, ntango ozwi dotasio, mpe ntango okangisami mpo na ntango mpe boseko kati na ndako ya Nkolo. Kosala mpe kobomba mayokani ekomemela yo esengo mpe bosepeli and ekopesa yo nzela ya kozwa nguya ya Nzambe mpo na kosunga yo ozonga liboso na Ye, esika wapi okoki kosepela bomoi ya seko elongo na Ye.
Mpo na koyekola mingi maye etali oyo olakaka epayi ya Nzambe ntango osalaka mayokani oyo—mpe nini Ya alakaka epayi na yo—tala Buku Monene: Kosala kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka, 3.5, Biblioteke ya Nsango Malamu.
Manyola mituna oyo elandi. Ezali mituna oyo okotunama ntango ozali na lisolo mpo na kozwa mokanda ya ndingisa mpo na tempelo, kasi ozali te na mposa ya kozela mpo na lisolo yango. Sala bomitaleli ya molimo na yo moko ntango nyonso olingi kosala yango.
Mama ya Likambo ya Bilenge Basi, Mama ya Likambo ya Lisanga ya Bonganganzambe ya Alona, mpe Mitindo Zomi ekoki kozala bisalelo ya motuya na bomitaleli na yo moko.
Mituna ya Ndingisa mpo na Tempelo mpo na Bilenge
-
Ozali na bondimi na mpe litatoli ya Nzambe, Tata ya Seko; Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe ya Molimo Mosantu?
-
Ozali na litatoli ya Bomikabi ya Klisto mpe ya mosala na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na yo?
-
Ozali na litatoli ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto?
-
Osungaka Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka lokola profeta, momoni, mpe mobimisi mpe lokola moto bobele moko na mabele oyo azali na mpe apesami ndingisa ya kosalela bafungola nyonso ya bonganganzambe? Osungaka bandeko ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi? Osungaka Bakambi Minene mosusu mpe bakambi ya Eklezia ya bisika ofandi?
-
Nkolo alobaki ete makambo nyonso esengeli “kosalema na bopeto” liboso na Ye (Malongi mpe Mayokani 42:41 Olukaka bopeto ya bomoto na makanisi mpe bizaleli na yo ? Otosaka mobeko ya bopeto?
-
Olandaka mateya ya Eklezia ya Yesu Klisto na ezalela na yo ya bonkuku mpe na miso ya bato bansoo mpe ya bato ya libota na yo mpe basusu?
-
Osungaka to otombolaka mateya, mimesano, to malongi songolo oyo ekeseni na oyo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka te?
-
Olukaka kobatela mokolo ya Saba ezala esantu, nyonso mibale na ndako mpe na eklezia; kokende makita; kolemilengela mpo na mpe kolia elambo na bolongobani; mpe kozala na bomoi engebene na mibeko mpe mitindo ya nsango malamu?
-
Olukaka kozala sembo na makambo nyonso osalaka?
-
Ofutaka moko na zomi na yo ya mobimba?
-
Ososolaka mpe otosaka Liloba ya Bwanya?
-
Ezali na masumu songolo na bomoi na yo oyo osengelaki kobongisa na bakambi ya bonganganzambe lokola eteni boyamboli na yo?
-
Ozali komimona yo moko lokola olongobani mpo na kokota na ndako ya Nkolo mpe kosangana na makuli ya tempelo?
Mama ya likambo ya Bilenge Basi
Nazali mwana mwasi ya bolingo ya baboti ya lola, na bomoto ya bonzambe mpe atandele ya seko.
Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, nazali kosala makasi ya kokoma lokola Ye. Nalukaka mpe nasalaka na emoniseli na ngaimei mpe nasalelaka basusu na nkombo na Ye esantu.
Nakotelema lokola nzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso.
Lokola nazali kosala makasi mpo na kokoka mpo na bonetoli, nalingaka likabo ya koyambola mpe nalukaka komibongisa mokolo na mokolo. Na bondimi, nakolendisa ndako mpe libota na ngai, nakosala mpe kobomba mayokani ya bule, mpe nakozwa makuli mpe mapamboli ya tempelo esantu.
Mama ya Likambo ya Lisanga ya Bonganganzambe ya Alona
Nazali mwana mobali ya bolingo ya Nzambe, mpe Ye azali na mosala mpo na ngai nasala.
Na motema na ngai mobimba, nguya, molimo, mpe makasi, nakolinga Nzambe, nakobomba mayokani na ngai, mpe nakosalela bonganganzambe na Ye mpo na kosalela basusu, kobanda na libota na ngai moko.
Ntango nazali koluka kosalisa, kosalela bondimi, koyambola mpe kobongwama mikolo nyonso, nakozala na ndingisa ya kozwa mapamboli ya tempelo mpe esengo ya ntango molayi ya nsango malamu.
Nakomilengela mpo na kokoma misionele ya molende, mobali ya sembo, mpe tata ya bolingo na kozalaka moyekoli malamu ya Yesu Klisto.
Nakosunga kolengela mokili mpo na bozongi ya Mobikisi na kobengisaka bato nyonso baya epayi ya Klisto mpe bazwa mapamboli ya Bomikabi na Ye.
Mibeko Zomi
-
Okozala na Nzambe mosusu te liboso na ngai.
-
Okosala ekeko moko te mpo na kokumisa yango.
-
Okokamata nkombo ya Nkolo Nzambe wa yo na mpamba te.
-
Omikundola saba ete obatela yango esantu.
-
Kumisa tata na yo mpe mama na yo.
-
Okoboma te.
-
Okosala ekobo te.
-
Okoyiba te.
-
Okopesa litatoli ya lokuta te.
-
Okolula te.
Tala Esode 20:3–17.