Bilenge
11. Bosolo ekokangola yo


Elenge mobali moko na ntango ya azali kotanga na rulo

Sala Limpati Likolo ya Liloba, na Liz Lemon Swindle. Ndingisa ya Havenlight

11.

Bosolo ekokangola yo

Yoane 8:32

Tata na yo na Lola azali Nzambe ya bosolo. Ayebi makambo nyonso. Bosolo nyonso ewutaka na Ye mpe ekambaka epayi na Ye. Olakisaka ete opesaka bosolo motuya ntango olukaka koyekola, kobika na bosembo, mpe na mpiko nyonso kotelema mpo na oyo oyebi ete ezali malamu—ata soki osengeli kotelemela yango yo moko.

Bosolo ya Seko

Tata na Lola alingi bana na ye ya basi mpe mibali bakoba koyekola ntango nyonso. Ozali na nyonso mibale bantina ya molimo mpe nzoto ya koluka mpe kolinga koyekola. Kotanga ezali kaka te kozwa mbongo. Ezali eteni ya mokano na yo ya seko mpo na kokoma mingi lokola Tata na Lola.

Kobika na bosembo elakisi ete olingaka oyo ezali solo na miso ya Nzambe—mingi koleka ndenge olingaka libondisi na yomei, koyebana, mpe komisepelisa. Elakisi kosala oyo ezali malamu kaka mpo ezali malamu.

Ozali na eloko moko ya ntalo mingi ya kokabola. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali na biyano na mituna ya bomoi. Ezali nzela ememaka na kimia mpe bosepeli. Mbala mosusu okoki kozala oyebi te makambo nyonso, kasi oyebi ndambu mpo na kolinga mozalani na yo, kokabola mitinda ya solo na bango, mpe kobengisa bango bayekola mingi.

Mabengisi

Zalaka koyekola ntango nyonso. Luka mabaku ya kokolisa molimo na yo mpe makoki na yo. Mabaku oyo ekoki kosangisa kotanga ya eteyelo to mateya ya mosala, mpe boyekoli nyonso mosusu uta na bisika oyo ozali kondimela. Kotisa Nkolo na milende na yo, mpe Ye akokamba yo.

Yekola bosolo ya molimo. Ntango ozali koyekola maye etali bato bazali nzinganzinga na yo, yekola mpe maye etali Mobikisi, oyo akelaki mokili. Yekola bomoi mpe mateya na Ye. Komisa seminele, insititi, mpe boyekoli na yo moko ya nsango malamu eteni ya boyekoli na yo ya bomoi mobimba. Ekoki kolengela yo osala misio mpe okabola nsango malamu na bomoi na yo mobimba.

Bika na bosembo. Koyiba te, kokosa te, kokosa molongani na yo te, koyokisa soni te ata moke—na eteyelo, na mosala, na interneti, esika nyonso. Zala kaka molandi ya sembo ya Yesu Klisto na bisika ya bato nyonso mpe na esika nayo moko.

bato bafukami liboso ya Yesu Klisto oyo asekwi

Mapamboli Elakelama

Kotanga ekolisaka likoki na yo ya kosalela Nkolo, kobakisa kozala lokola misionele. Ezali kopesa yo nguya ya kopambola basusu, mingimingi libota na yo. Mingi ozali koyekola, mingi okoki kosunga na kotonga bokonzi ya Nzambe mpe kobengisa mokili mpo na bolamu.

Bosembo ememaka kimia mpe bomipesi limemya. Ntango maloba mpe misala na yo ezali kotambola na boyokani na bosolo, ozali kolakisa ete okoki kotyelama motema epayi ya bato mosusu mpe epayi ya Nkolo.

Ntango ozali kotelema mpo na mateya ya Yesu Klisto, Ye akotelema elongo na yo. Yesu Klisto azali makasi na yo! Bato mosusu bakoki kondima te bindimeli na yo, kasi mpiko mpe bosembo na yo ekomonana. Basusu balanda to te ndakisa na yo, litatoli na yo, elikya, mpe bondimi na yo kati na Klisto ekokola.

Mituna mpe Biyano

Ezali yango mabe kozala na mituna etali Eklezia? Lolenge nini nakoki kozwa biyano? Kozala na mituna ezali te elembo ya bolembu to bozangi ya bondimi. Ya solo, kotuna mituna ekoki kosunga kotonga bondimi. Bozongisi ya nsango malamu ebandaki ntango elenge ya mibu 14 Joseph Smith atunaki mituna na bondimi. Luka biyano kati na makomi, na maloba ya baprofeta ya Nzambe, uta na bakambi na yo mpe bandeko ya libota ya bosembo, mpe uta na Nzambe Yemei. Soki biyano eye te na ngonga kaka, ndimela ete okoyekola molongo na molongo. Koba kobika na maye osi oyebi, mpe koba koluka bosolo.

Lolenge nini nakoki kotelema mpo na oyo ezali malamu kozanga kosala mabe na baye bazali na bindimeli ya kokesena na oyo ya biso? Banda na kondimisama ete maloba mpe misala na yo efulami na bolingo mpo na Nzambe mpe bana na Ye. Kokabola nsango malamu esengeli te kosalema na molimo ya boswani kasi esengeli kosalema na bososoli, bosokemi, mpe boboto. Okoki kozala na bolingo epayi ya basusu ata soki ozali kondima te makanisi na bango. Zala ndakisa malamu mpo na molandi ya Yesu Klisto na lolenge ozali kofanda.

Tala Matai 5:14–16 (tika ete pole na yo engenga); Yoane 14:6 (Yesu azali bosolo); 1 Petelo 3:15 (zala ntango nyonso pene ya kokabola elikya na yo kati na Klisto); Malongi mpe Mayokani 88:77–80 (makambo Nkolo alingi biso toyekola); 88:118 (luka bwanya na mikanda malamu); 93:36 (nkembo ya Nzambe ezali mayele); 124:15 (bosembo elakisi kolinga oyo ezali malamu); 130:18 (mayele na biso ekolamuka elongo na biso ntango tosekwi).

Mituna ya Ndingisa mpo na Tempelo

  • Olukaka kozala sembo na makambo nyonso osalaka?

  • Osungaka to otombolaka mateya, mimesano, to malongi songolo oyo ekeseni na oyo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka te?