1.
Mwango ya Nzambe ezali mpo na yo
Yambo oya na mabele, ozalaki na baboti na yo ya lola. Ozali mwana na bango ya bolingo. Na lola, oyekolaki maye etali mwango ya Nzambe mpo na libota na Ye. Ozwaki mwango oyo na esengo mpo ete elingaki kosunga yo okola mpe okende liboso mpo na kokoma mingi lokola Nzambe na kozwaka nzoto ya mosuni, kozalaka na libota moko ya mabele, mpe koyeba bomoi na mabele. Makambo yango mosusu ekozala mpasi. Tata na biso ayebaki yango, na yango lokola eteni ya mwango na Ye, Atindaki Mobikisi moko, Yesu Klisto, mpo na kosalisa. Tozali kobenga yango mwango ya lobiko to mwango ya esengo.
Bosolo ya Seko
Tata na Lola azali mokomi (mosali) ya mwango. Azali Tata ya molimo na yo, mpe Alingi yo. Alingi kopesa yo lipamboli na Ye eleki monene—bomoi ya seko elongo na Ye. Na maloba mosusu, Alingi yo okoma mingi lokola Ye mpe ozala na bomoi ya esengo, mpe ya nkembo oyo Ye azali na yango. Azali na nguya nyonso mpe ayebi makambo nyonso. Okoki kotyela Ye motema, atako ntango bomoi ezali mpasi.
Yesu Klisto asali ete mwango ekokisama. Yambo mokili ekelama, Tata na Lola aponaki Ye mpo na azala Mobikisi na Yo. Yesu Klisto azali nse moto moko oyo akoki kozongisa yo epayi ya Tata na yo ya Lola. Yango nde ntina toponaka kolanda Ye. Makambo nyonso efandisami na liponi yango!
Libala mpe libota ezali na motuya mingi na mwango ya Nzambe. Ozali na kati ya libota ya Nzambe, mpe banso ya bana na Ye ya molimo bayaka na mabele na nzela ya mama mpe tata. Nzambe alingi ete bana na Ye ya basi mpe mibali bakende liboso elongo kino bobongi nie ya seko. Mibali mpe basi moko na moko basungaka ndenge moko na libala ya bolingo mpe bomoko. Bomoi ya libota awa na mabele—atako na mabunga na yango nyonso—ekoki komema esengo monene. Yango esalami mpo ete esunga na kolengela yo mpo na bomoi ya seko elongo na Nzambe.
Mabengisi
Bomba makanisi ya seko. Ntango nyonso oyo ozali kokutana na masenginia, mimekano, koyokisama motema mpasi, to maponi ya mpasi, mikundola mwango ya Nzambe. Tala lolenge nini bosolo ya seko oyo oyebi na maye etali mwango na Ye ekoki kosalisa yo otala mikakatano na yo na lolenge ya kokesena.
Luka loboko ya Nzambe na bomoi na yo. Tala banzela Nzambe azali kopambola yo. Ekoki kozala eloko moko ya boboto uta na moto moko, ngonga moko ya kimia, to eyano moko na libondeli.
Pona kolanda mwango ya Nzambe. Yekola maye etali makambo Tata na yo ya Lola alingi ete yo osala. Luka litambwisi na Ye ntango ozali koyekola makomi, maloba ya baprofeta ya bomoi, libota esakweli, mpe lipamboli na yo ya batata. Yango ekosunga yo omilengela mpo na kosalela Nkolo, lokola misionele mpe na bomoi na yo mobimba. Sala ete mosala epayi ya Nkolo, libala ya seko, mpe kokolisa bana ezala na esika ya liboso. Sala nyonso oyo okoki mpo na kozala na libota ya esengo sikawa na kolandaka mateya ya Yesu Klisto.
Mapamboli Elakama
Okoki kobunda na mimekano ya bomoi na mpiko mpe elikya kati na Klisto. Mpo ete oyebi maye etali mwango ya seko ya Nzambe, ozali na esalelo moko ya motuya oyo ekoki kosunga yo na ntango ya mpasi. Oyebi ete bomoi ezali na makambo mingi koleka oyo esalemaka kati ya mbotama mpe liwa. Oyebi oyo ozali ya solo, nini ntina na yo ezali, mpe nani yo okoki kokoma na lisalisi ya Mobikisi. Yesu Klisto azali makasi na yo!
Okoki kozwa bomoi ya seko ntango ozali kolanda Yesu Klisto. Ye akopesa yo nguya ya kokoma mingi lokola Ye, kozonga epayi ya baboti na yo ya lola, mpe kobika kati na esengo elongo na baye olingaka mpo na libela. Tyela Yesu Klisto motema.
Mituna mpe Biyano
Mpo na nini bomoi ezalaka mpasi mingi bantango mosusu? Lolenge nini nakoki kozwa makasi? Makambo okutanaka na yango na bomoi oyo—atako kutu ya mpasi mpenza—ekoki kozala mpo na bolamu na yo. Yango ekoki kosunga yo okola mpe okende liboso ntango ozali kotala epayi ya Mobikisi. Ezali na eloko ata moko te oyo ozali kobunda na yango oyo Yesu Klisto azali kososola te likolo ya mbeka na Ye ya bomipesi. Ye ayebi mpenza lolenge nini kosunga yo. Tya bomoi na yo likolo na Ye, mpe akotombola likolo ya ntembe mpe bobangi nyonso.
Ntango mosusu, likanisi ya esengo kati na libota mpe libala emonanaka kozala mosika. Lolenge nini nakoki kozwa elikya? Likambo na yo ezala ata ya ndenge nini, kotika te kolanda mwango ya Tata na Lola. Ye akotika yo te. Soki ozali sembo na Mobikisi mpe na mayokani na yo, okozwa biyano kati na mateya ya Yesu Klisto. Asosolaka makambo nyonso oyo okutanaka na yango. Na nzela na Ye, okozwa makasi ya kotosa mitindo ya Nzambe mpe okozwa mapamboli Ye alaki. Ndimela Ye mpe nsango malamu na Ye.
Tala 2 Nefi 9:13 (O lolenge boni monene ezali mwango ya Nzambe na biso!); Mosiya 2:41 (baoyo babatelaka mitindo bakoki kofanda elongo na Nzambe na ezalela ya esengo oyo esukaka mokolo moko te); Alma 12:28–34 (Nzambe asalaki ete mwango ya bosikoli eyebana epayi ya bana na Ye); Abalayama 3:22–26 (Mwango ya Nzambe esangisaki kotinda biso na mabele, esika wapi tokokaki kopona bisomei mpo na kolanda mitindo na Ye).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Ozali na bondimi na mpe litatoli ya Nzambe, Tata ya Seko; Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe na Molimo Mosantu?