Bilenge
Nsango ewuti na Bakambi ya Yambo


Nsango ewuti na Bokambi ya Yambo

Bandeko na biso bilenge mibali mpe basi ya bolingo,

Tolingi bino, mpe tozali kondimela bino. Bozali ya solo na kati ya milimo oyo Tata na Lola aponi, atindi na nse ya mabele na ntango oyo mpo na kosala makambo ya motuya.

Bozali na makasi mpe makoki mingi koleka ndenge bokoki kokanisa. Mpe ntango bozali koyekama na Mobikisi, makasi na bino ezali kokola kutu mingi koleka. Ye azali “makasi ya bilenge.”

Bokambi oyo ekosunga bino botonga moboko makasi mpo na kosala maponi ya kotikala na nzela oyo ememaka na bomoi ya seko. Ekosalisa bino bomilengela mpo na kosala mayokani kati na tempelo, bomilengela mpo na kosala misio, mpe kozwa esengo na kolandaka Yesu Klisto na bomoi na bino mobimba. Bozali na esika ya motuya kati na Eklezia na Ye. Yesu Klisto akosunga bino bokokisa bantina na Ye mpo na bino.

Toyebi ete Nzambe azali na bomoi. Ezali libondeli na biso ete bokotikala makasi na nzela ya boyokani—nzela ya kosala mpe kobomba mayokani ya bule elongo na Nzambe. Yango nde nzela oyo ezongisaka epayi ya Tata na bino ya Lola. Ntango bozali kosala yango, bokozala ndakisa mpo na bolamu, na kokabola nsango malamu na esengo, kosangisa bana ya Nzambe, mpe kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Bomikundola: Yesu Klisto azali makasi na bino!

Bokambi ya Yambo