Bilenge
8. Makuli mpe mayokani ya Tempelo ekopesa yo nzela monene na mapamboli ya Nzambe


Yesu Klisto afandi mpe azali koteya bayekoli na Ye

8.

Makuli mpe mayokani ya Tempelo ekopesa yo nzela monene na mapamboli ya Nzambe

Malongi mpe Mayokani 95:8

Mosusu ya mapamboli ya Tata na Lola ezali mpenza ya bule, asengi biso totya pembeni bisika ya sikisiki mpe esantu wapi tokoki kozwela yango: batempelo. Kati na tempelo, ndako ya Nkolo, okoki kozwa makuli na Ye oyo eleki minene—dotasio mpe bokangisi—mpe kozwa bilaka na Ye eleki minene.

Bosolo ya Seko

Dotasio ezali likabo ya boyebi mpe nguya. Kati na makuli ya dotasio ya tempelo, ozwaka nkombo mobimba ya Mobikisi likolo na yomei. Oyokanaka mpo na kotosa Nzambe, omipesaka mpo na kosala bolingi na Ye, kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto, kotosa mobeko ya bopeto, mpe kobulisa—to kopesa—bomoi na yo mpe nyonso oyo Nzambe apesi yo na Eklezia. Oyo ezali bilaka na yo. Nzambe alaki kopambola yo na boyebi monene mpenza, libateli, mpe nzela na nguya na Ye. Alaki lisusu kopesa yo bomoi ya seko elongo na Ye. Lokola eteni ya dotasio, ozwaka libaku ya bule ya kolata garma ya bonganganzambe esantu. Garma ezali elembo ya Yesu Klisto mpe ekundweli ya mayokani na yo ya tempelo.

Bokangisi ya tempelo esangisaka balongani mpe mabota mpo na seko. Kati na likuli ya bokangisi ya tempelo, yo mpe molongani na yo bokosala boyokani elongo na Nzambe mpe moko na mosusu. Okolaka kozala sembo mpenza epayi ya Nzambe mpe epayi ya moko na mosusu, kolinga mpe kosalela moko na mosusu, mpe kosala elongo mpo na kobatela mibeko ya Nzambe. Oyo ezali elaka na yo. Nzambe alaki ete mokangano na yo elongo na molongani na yo mpe bana na bino ekoki kowumela mpo na libela. Alaki lisusu ete okoki nkembo ya likolo makasi elongo na Ye kati na bokonzi ya selestiale ntango ozali kobatela mayokani na yo. Lipamboli oyo ebengami bonetoli.

Mabengisi

Zala ntango nyonso ndingisa mpo na Tempelo. Kutana na moto moko ya episikopo na yo mpo na kozwa moko. Akotuna yo mituna etali lolenge nini ozali kobika mitinda ya Nkolo mpo na kokota na ndako na Ye esantu. Tala lisusu mituna yango mingimingi. (Okoki kozwa yango na mabakisi ya bokambi oyo.) Ata soki ozali mosika uta na tempelo, tika ete ndingisa na yo ya tempelo ezala elembo ya bolingo na yo mpo na Nkolo mpe bomipesi na yo mpo na kobika mitinda na Ye.

Kende na tempelo mbala na mbala soki makoki epesami. Na ndingisa na yo mpo na tempelo, okoki kokota ndako ya Nkolo mpe kobatisama mpe kokotisama mpo na bankoko na yo, na yango okokq kozwa mapamboli oyo opesami. Salela mabaku nyonso ya kozala kati na tempelo. Luka Nkolo kati na ndako na Ye. Luka Ye kati ya makuli, bililingi, mpe Molimo oyo ozali koyoka. Okozwa Ye.

Milengela mpo na kosala mayokani kati na ndako ya Nkolo. Moko ya ndenge malamu ya kosala yango ezali ya kobomba boyokani na yo ya libatisi. Sala yango moko ya mikano ya ntina mpo na kozwa makuli ya tempelo mpe kozala mobombi ya boyokani ya bomoi mobimba. Banda sikawa kobika mibeko oyo okolaka kotosa kati na tempelo: botosi na mitindo ya Nzambe, libonza, nsango malamu ya Yesu Klisto, bopeto, mpe bobulisi. Libota na yo, episikopo, mpe bakambi mosusu ya Eklezia bakoki kosunga yo.

Tempelo ya Tegucigalpa Honduras

Mapamboli Elakelama

Okoki kokoma mingi lokola Yesu Klisto. Akosalisa yo okoma moyekoli monene ya boyengebene. Makuli mpe mayokani ya tempelo ekoteya yo lolenge ya kokota liboso ya Nzambe mpe kozwa bomoi ya seko elongo na Ye.

Okolatisama na nguya ya Nzambe. Mayokani ya tempelo eyaka na elaka ete nguya mpe nkembo ya Nzambe ekozala likolo na yo. Baanzelu na Ye bakobatela yo.

Ngonga okosala kati na tempelo ekokangisa yo mingi penepene na Yesu Klisto mpe Molimo Mosantu. Okoyoka kimia mpe bopemi ya Nzambe. Okoyoka mongongo na Ye na bososoli monene. Balola ekofungwamela yo, mpe okososola malamu banzela na Ye. Okozala na makasi mingi mpo na kobunda na mikakatano na yo mpo motema na yo ekangami na oyo ya Ye.

Mituna mpe Biyano

Ntango nini nakoki kozwa dotasio? Ekateli ya kozwa dotasio na yo ezali ya yomoko; zwa ekateli oyo na nzela ya losambo. Solola na libota na yo mpe bakambi ya Eklezia. Mpo na kozwa dotasio, ozali na mposa ya kozala na mibu soki moke 18 mpe lisusu na eteyelo ya ntei to ya katikati te. Okozwa dotasio yambo osala misio to kokangisama, kasi osengeli te kozela mpo na milulu oyo yambo ozwa dotasio. Osengeli kaka kozala na mposa mpe bomilengeli mpo na kosala mayokani mosusu elongo na Tata na yo na Lola. Episikopo to mokambi ya etape na yo akoki kosunga yo oyeba soki olengelami. Komona dotasio te lokola mokumba moko na liste ya seko. Mona yango lokola eteni moko kitoko mpe ya nkembo mpenza ya mobembo na yo ya seko ya koya epayi ya Klisto mpe kozwa mapamboli ya molimo eleki monene ya Nzambe.

Mpo na nini nazali na mposa ya ndingisa mpo na tempelo mpo na kokota na tempelo? Tempelo ezali ndako ya Nkolo, mpe Ye atye mitinda mpo na kokota kati na yango. Makuli mpe mayokani ya tempelo ezali mpenza ya bule ete ezali kosenga bomilengeli moko ya molimo ya sikisiki. Lisolo ya Ndingisa mpo na tempelo esalamaka mpo na kondimisama ete olengelami na molimo mpo na mabaku ya likolo mpenza ya mayokani ya tempelo. Tata na Lola abengisi bana na Ye banso bamilengela mpo na kosala bilaka elongo na Ye kati na ndako na Ye.

Esengeli ngai nazala ya kobonga nie mpo na kosala mayokani ya tempelo? Moto moko te azali ya kokoka. Nzambe asengi yo ozala sembo mpe olinga kobatela mitindo na Ye. Kosala mpe kobatela mayokani elongo na Nzambe ezali eloko oyo epesaka yo nguya ya kokoma ya kobonga nie na nzela ya Yesu Klisto. Azali makasi na yo!

Tala Yisaya 2:2–3 (Nzambe ateyi biso banzela na Ye kati na tempelo); Matai 11:28–30 (mema ekanganeli ya Mobikisi likolo na yomei); 1 Nefi 14:14 (nguya ya Nzambe ezali likolo ya bato na Ye ya boyokani); Malongi mpe Mayokani 97:15–16 (Bozali ya Nzambe mpe nkembo na Ye ezali na ndako na Ye); 109:22 (na tempelo tolatisamaka na nguya ya Nzambe); 131:1–4; 132:4–6, 15–20 (mpo na kozwa bomoi ya seko, mobali na mwasi basengeli kokangisama mpo na seko na nzela ya boyokani ya sika mpe ya libela ya libala); Abalayama 1:2 (Abalayama alingaki kozala moyekoli monene ya boyengebene mpe kozwa boyebi eleki monene).

Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo

  • Ozali komimona yo moko ya kolongobana mpo na kokota na ndako ya Nkolo mpe kosangana na makuli ya tempelo?