4.
Yesu Klisto akosunga yo
Nzembo 147:3
Yesu Klisto azali makasi na yo. Asali nyonso oy esengeli mpo ete yo ozala na esengo na bomoi oyo mpe mpo na libela. Na koponaka Ye mpe nsango malamu na Ye, ozali kopona bosepeli mpe esengo ya seko.
Atako ntango ozali komeka kosala makasi na yo mpo na kosala maponi ya malamu, mbala mosusu okosala kaka mabunga. Okosala makambo oyo olingaki te kosala. Moto nyonso asalaka yango. Ntango yango esalemaka, ezali pete mpo na komiyoka ya kolemba nzoto to komituna soki okozala malamu mingi mokolo moko. Kasi ezali na nsango malamu—ya kokamwa, nsango ya elikya mpenza! Mpo ete Nzambe alingi yo, Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, oyo amemaki likolo na Yemei masumu na yo na yango okoka koyambola, kolimbisama, mpe kokoba kokende liboso.
Bosolo ya Seko
Yesu Klisto akolendisa yo. Akosunga yo obongola bamposa na yo, makanisi na yo, mpe misala na yo. Ntango ozali ya kotungisama, na bobangi, to ozali kobunda na lolenge songolo, Ye akobondisa yo. Akosunga yo na makambo nyonso ya bomoi na yo. Okoki kondimela Ye.
Boyamboli ezali te etumbu mpo na lisumu; ezali lolenge Mobikisi alongolaka biso na masumu. Koyambola elakisi kobongwana—kokima lisumu mpe kokende epayi ya Nzambe. Elakisi kobongisa mpe kozwa bolimbisi. Lolenge ya mbongwana oyo ezali te likambo ya mbala moko; ezali likambo ya ntango nyonso.
Mabengisi
Komisa Yesu Klisto esika ya makanisi ya bomoi na yo. Luka lisungi na Ye na makambo nyonso oyo osalaka.
Yambola. Kende epayi ya Nkola na mposa ya kobongisa bizaleli. Ntango osali eloko moko ya mabe, na bosembo nyonso ndima yango liboso ya Nzambe mpe, soki esengeli, epayi ya episikopo na yo mpe epayi ya moto nyonso oyo asalaki mabe. Sala makasi na yo mpo na kokomisa makambo sembo.
Sepela kati na likabo ya kosala malamu mpenza mpe kozala malamu mpenza. Atako ntango yango ezali pete te mpe ezali kozwa ntango molai makasi koleka lolenge okokaki kolinga, kotika te kokoba komeka. Koba kosala mpe kotyela Nkolo motema. Ye akosunga yo na litambe mokomoko ya nzela.
Mapamboli Elakelama
Tata na Lola akolimbisa yo mpe akobikisa yo ntango ozali koyambola. Akozongisa kimia mpe esengo na esika ya mpasi na yo. Akomikundola ata moke te masumu na yo. Yesu Klisto azali makasi na yo, mpe na makasi na Ye, bamposa na yo ya kobatela mitindo na Ye ekokola.
Akobongola motema mpe bomoi na yo. Mokemoke, okokola mpe okokoma mingi lokola Ye.
Mituna mpe Biyano
Lolenge nini nayebaka soki Nzambe alimbisi ngai? Nzambe alaki ete Akolimbisa baye bayambolaka. Ntango ozali koyoka libondisi uta na Molimo, okoki koyeba ete nguya ya kosikola ya Mobikisi ezali kosala na bomoi na yo.
Ntango nini nazali na mposa ya lisungi ya episikopo mpo na koyambola? Episikopo na yo azali na bafungola ya bonganganzambe mpe makabo ya molimo mpo na kosalisa yo oyambola. Okoki koluka lisungi mpe toli na ye ntango nyonso. Soki osali mabunga minene mpenza, lokola kobuka mobeko ya bopeto, kutuna na episikopo na yo. Akokweyisa yo te. Azali momonisi ya Yesu Klisto mpe akosunga yo oyeba lolenge nini koyambola mpenza mpe kozwa nguya ya kobikisa mpe kolendisa ya Mobikisi.
Nazali komeka koyambola, kasi nazali kokoba kosala mabunga nse moko. Nasengeli kosala nini? Kotika te. Tala epayi ya Klisto, mpe tya bondimi na yo kati na Ye. Ngolu na Ye ekoki. Meka lisusu. Otikala kozala yo moko te na milende na yo mpo na kokende liboso. Yesu Klisto azali ntango elongo na yo.
Tala Enosa 1:6 (elindo ekoki kosukwama nie); Mosiya 4:3 (na nzela ya Molimo Mosantu, Nzambe asalaka oyeba ete olimbisami); 26:30 (Mobikisi alimbisaka mbala nyonso oyo toyambolaka); Etele 12:27 (Ngolu ya Mobikisi ekoki kokomisa makasi makambo ya bolembu); Moroni 6:8 (baye oyo bayambolaka balimbisami); 10:32 (bonga nie kati na Klisto); Malongi mpe Mayokani 1:32 (Nkolo alimbisaka baye bayembolaka); 58:42–43 (boyamboli esangisi kotubela mpe kotika lisumu).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Ozali na litatoli ya Bomikabi ya Klisto mpe ya mosala na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na yo?
-
Ezali na masumu songolo na bomoi na yo oyo osengelaki kobongisa na bakambi ya bonganganzambe lokola eteni boyamboli na yo?