9.
Opambolami na bafungola mpe likoki ya bonganganzambe
Matai 16:18–19
Ntango Yesu ateyaki na maye etali likoki ya bonganganzambe, Alobelaki bafungola. Bafungola esalelami mpo na kofungola biloko. Bafungola ya bonganganzambe ekoki kofungola nguya ya Nzambe, makabo, mpe mapamboli na bomoi na yo.
Bosolo ya Seko
Bafungola mpe likoki nyonso ya bonganganzambe eyelaka na nzela ya Yesu Klisto. Momemi bonganganzambe nyonso akoki komona molongo ya likoki na ye kino Ye. Mobikisi apesaka ndingisa ya nani akozwa likoki oyo mpe nani akozwa bafungola ya bonganganzambe. Tondimela boyebi na Ye ekoka mpenza.
Yesu Klisto azongisi bonganganzambe na Ye na mikolo na biso. Alakisaka lolenge nini bonganganzambe ekosalelama. Adama, Mose, Petelo, mpe baprofeta mingi mosusu na lisitwale mobimba bazwaki bafungola ya bonganganzambe. Na mikolo na biso, Joseph Smith azwaki bafungola ya bonganganzambe uta na Yoane Mobatisi, Petelo, Mose, Eliasi, Eliya, mpe bato mosusu. Bandimi ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale bamemaka bafungola nyonso ya bonganganzambe na mabele lelo. Bakambi ya bonganganzambe ya esika ofandaka mpe lisanga ya bakambi bazali mpe na bafungola ya bonganganzambe mpo na mabiangi na bango. Bafungola ya bonganganzambe etambwisaka mosala ya Nzambe. Epesaka mibali mpe basi ndingisa mpe nguya ya kosalisa na mosala wana.
Likoki ya bonganganzambe epambolaka bana nyonso ya Nzambe. Mpo bonganganzambe ezongisamaki, okoki kozwa makuli mpe kosala mayokani na Nzambe. Okoki kosala makambo na nkombo ya Nzambe ntango ozwi mosala to libiangi uta na moto moko oyo azali na likoki.
Mabengisi
Ndima mabiangi ya Eklezia mpe salela na bosembo. Ntango ozwi libiangi mokoya Eklezia, otyami pembeni na likoki uta na Nzambe mpo na kosalela ye na mokumba wana. Okoki kozwa litambwisi uta na Nzambe mpo na mosala na yo. Ntango ozali kosalela, ozali komonisa Yesu Klisto. Pesa Ye nyonso ya yo.
Sunga baye Nzambe abengi mpo na kosalela. Kosunga elakisi mingi koleka kaka kotombola loboko ntango nkombo etangami na liyangani ya Eklezia. Elakisi kosunga mpe kosalisa. Luka ndenge ya kolakisa ete ozali kosunga bato Yesu Klisto abengi mpo na kosalela kati na Eklezia na Ye.
Kokisa mikumba uta na bakambi na yo ya Eklezia—kobakisa uta na lisanga to bokambi ya kelasi na yo. Bazali na likoki uta na Nzambe, oyo bapesaka ndingisa epayi na yo mpo na mokumba wana. Okoki kopesama mokumba ya kosalisa moto moko, yamba malamu bato ntango bazali kokoma na liyangani ya elambo, to sunga na molulu moko. Mokumba ezala atako ndenge nini, mona yango lokola libaku ya kozala moyekoli ya Yesu Klisto mpe kosalela bana ya Nzambe.
Mapamboli Elakelama
Okoki kondimela ete makuli ozwi epesami ndingisa na Yesu Klisto. Oyo ezali moko ya makambo oyo esalaka Eklezia ya Yesu Klisto ya kokesena. Na nzela ya makuli ya bonganganzambe, nguya ya Nzambe ezali komonana.
Okokoma esalelo moko na maboko ya Nkolo. Ntango ozali kosalela Nkolo na likoki na Ye mpe na nse ya botambwisi ya basali na Ye oyo bazali na bafungola ya bonganganzambe, Akosunga yo oyeba lolenge ya kosalela basusu kati na mosala na Ye. Yesu Klisto azali makasi na yo. Mosala na yo ekosunga yo opusana pene mingi na Ye mpe ekomemela yo esengo.
Mituna mpe Biyano
Nani azali na bafungola ya bonganganzambe na kati ya palwasi na ngai? Episikopo mpe bakambi masanga makoki ya bampaka, bateyi, mpe badikona ezali na bafungola ya bonganganzambe. Yango elakisi ete Nkolo apesi bango mokumba ya kotambwisa lolenge bonganganzambe esalelami mpo na kosalela mpe kopambola moto nyonso kati na palwasi.
Lolenge nini bafungola ya bonganganzambe epambolaka ngai? Makuli lokola libatisi mpe elambo epesami ndingisa na bafungola ya bonganganzambe. Ntango ozwi libiangi kati na Eklezia, otyami pembeni na nse ya botambwisi ya moto oyo azali na bafungola. Yango epambolaka yo na likoki ya kosalela kati na libiangi wana. Bakambi mpe bateyi ya Eklezia oyo bazali kosalela yo bazwaka mpe likoki ya bonganganzambe na nzela ya bafungola.
Lolenge nini mibali mpe basi basalelaka na likoki ya bonganganzambe? Mibali oyo balongobani bazali na bonganganzambe oyo epesameli bango mpe bakulisami na masanga ya bonganganzambe lokola dikona, moteyi, nganganzambe, mpe mpaka. Banso mibale basi mpe mibali oyo batyami pembeni mpo na kosala kati na libiangi moko bazwaka likoki ya bonganganzambe epesami uta na Nzambe mpo na kokokisa libiangi yango. Yango ezali mpe solo mpo na basi mpe mibali oyo bazwaka mokumba uta na mokambi ya Eklezia.
Tala Malongi mpe Mayokani 35:24–27 (Eklezia ekambami na bafungola oyo Nkolo apesi); 107:18–20 (bafungola ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe Bonganganzambe ya Alona); 110:11–16 (Mose, Eliasi, mpe Eliya bazongisaki bafungola).
Mituna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Osungaka Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka lokola profeta, momoni, mpe mobimisi mpe lokola moto bobele moko na mabele oyo apesami ndingisa ya kosalela bafungola nyonso ya bonganganzambe?
-
Osungaka bandeko ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi?
-
Osungaka Bakambi Minene mosusu mpe bakambi ya Eklezia ya bisika ofandi?