3.
Okoki kosunga na mosala ya Nzambe
Tata na Lola alingaka banso ya bana na Ye. Alingaka kosunga bango bazwa bosepeli mpe esengo, bazonga epayi na Ye, mpe bazwa bomoi ya seko. Yango ebengami mosala na Ye ya lobiko mpe bonetoli, mpe azali kobengisa yo mpo na kosunga!
Bosolo ya Seko
Mosala mpe nkembo ya Nzambe ezali ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi na yo ya seko. Bozangi kufa ezali kobika mpo na libela na nzoto oyo esekwi. Bomoi ya seko, to bonetoli, ezali kokoma mingi lokola Nzambe mpe kobika elongo na Ye mpo na seko lokola mabota. Nyonso oyo ekoki kosalema mpo na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Okoki kondimela Ye.
Okoki kosalisa na mosala ya Nzambe na koyaka epayi ya Klisto mpe kosalisa basusu basala ndenge moko. Ntango nyonso oyo osali eloko moko mpo na kosunga moto moko alanda Yesu Klisto, ozali kosunga na mosala ya Nzambe.
Mabengisi
Bika nsango malamu. Tonga bondimi na yo kati na Yesu Klisto. Yambola mikolo nyonso. Zwa makuli ya bonganganzambe ya Nzambe mpe bomba mayokani na yo. Komisa yango ndakisa mpo na mikolo oyo etikali ya bomoi na yo.
Salisa baye bazali na bosenga. Luka banzela ya kosalela mpe kosala epayi ya basusu, kobakisa libota na yo, baninga na yo, mpe esika na yo ofandaka. Lolenge moko malamu ya kosunga bato oyo bazali na bosenga ezali ya kotosa mobeko ya kokila bilei mpe kopesa makabo ya kokila bilei.
Bengisa banso mpo na bazwa nsango malamu. Tika ete maloba mpe misala na yo elakisa bondimi na yo kati na Yesu Klisto. Zala pene ya koyebisa moto nyonso oyo azali kotuna yo maye etali elikya mpe bosepeli ozali koyoka lokola moyekoli na Ye. Mpo na bilenge mibali, kosala misio ya ntango mobimba ezali mokumba ya bonganganzambe. Mpo na bilenge basi, ezali libaku ya nguya mpenza; bondela mpo na koyeba soki Nkolo akolinga ete osalela Ye. Milengela mpo na kokabola nsango malamu na bomoi na yo mobimba.
Kosangisa mabota mpo na seko na kosalaka mambi ya libota mpe mosala ya tempelo. Yekola maye etali bankoko na yo. Yeba nani azali na mposa ya makuli ya tempelo. Kende na tempelo mbala mingi ndenge okoki mpo na kobatisama mpe kokotisama mpo na bango. Soki ozali na mposa ya lisungi, kende na FamilySearch.org.
Mapamboli Elakelama
Okazala na lisungi ya Nzambe. Tata na Lola azali te kozela yo osala mosala oyo na makoki na yo moko. Azali elongo na yo. Ntango ozali na bomikitisi nyonso kopesa ntango mpe motema na yo, Akosala makambo ya kokamwa na nzela na yo. Yesu Klisto azali makasi na yo!
Okotondisama na esengo. Mosala ya Nzambe ezali mosala ya esengo! Ntango ozali kosangana kati na yango, okoki koyoka esengo oyo Ye ayokaka. Kanisa esengo oyo okokabola elongo na Tata na Lola mpe bana na Ye oyo osungaki komema epayi na Ye!
Mituna mpe Biyano
Ekoki Nzambe kosalela ngai ya solo na mosala na Ye? Iyo! Ezali na ndenge ebele ya kosunga na mosala. Ekoki komonana lokola bato mosusu bazali na talanta mingi to boyebi mingi koleka, kasi Tata na yo na Lola azali komona makoki na yo. Apesi yo makabo oyo okoki kosalela mpo na kosalisa mpe kosangisa bana na Ye. Ezali malamu soki makabo oyo ezali ya kokesena uta na oyo bato mosusu bazali na yango. Ya solo, yango ezali mpo na nini makabo na yo ezali na motuya mpenza. Bazali na mposa na yo!
Tala Matai 10:39 (soki obungisi bomoi na yo kati na mosala ya Mobikisi, okozwa yango); 1 Bakolinti 12:14–27 (biteni nyonso esengeli na kati ya nzoto ya Klisto); Bafilipi 1:6 (zala na kondima ete Nzambe azali kosala kati na yo); Yakobo 5:72 (mpe Nkolo ya elanga ya bilaya azali kosala elongo na yo); Malongi mpe Mayokani 18:15–16 (esengo na yo ekozala monene elongo na baye omemi epayi ya Klisto); 64:33–34 (mosala monene ewutaka na makambo ya mike mpe ya pete); Mose 1:6 (“Nazali na mosala mpo na yo”); 6:31–34 (Nzambe apesaka makoki na baye Abengaka, atako soki bamiyokaka ya kokoka te).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Ozali na litatoli ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto?