Libota Ezali Kotala na Pole, na Lovetta Reyes Cairo. Ndingisa ya Havenlight
10.
Nzoto na yo ezali ya bule
1 Bakolinti 6:18–20
Nzoto na yo ezali likabo ya kokamwa uta na Tata na yo ya Lola. Kozala na nzoto ezali kopesa yo nguya ya kobakisama mpo na kosalela bonsomi na yo ya kopona katikati ya oyo ezali malamu mpe ya mabe. Nsango malamu ezongisama ya Yù ekoki kosunga yo omona nzoto na yo uta na bomoni ya Nzambe. Mpe yango esalaka bokeseni monene na maponi na yo na oyo etali makambo ya kosala na nzoto na yo mpe lolenge nini kobatela yango.
Bosolo ya Seko
Nzoto na yo ezali na elilingi ya Nzambe—Moto oyo aleki na nkembo, aleki lokumu kati na mokili mobimba. Makomi ekokanisaka banzoto na biso na tempelo esantu, esika oyo wapi Molimo ekoki kofanda. Ya solo, nzoto na yo ezali ya kobonga nie sikawa te. Kasi makambo ozali kokutana na yango na nzoto na yo ekoki kolengela yo mpo na kozwa mokolo moko nzoto ebonga nie, oyo esekwi, mpe ya nkembo.
Mayele na yo ekelami uta na nzoto mpe molimo na yo. Mpo na ntina oyo, bokolongono ya nzoto mpe molimo ezali ya kokangisama mpenza. Mobikisi amonisaki Liloba ya Bwanya mpo na koteya mitinda ya kobatela nzoto na yo mpe kolaka mapamboli ya nzoto mpe molimo.
Mayoki ya bosangisi nzoto ezali eteni ya motuya ya mwango ya Nzambe mpo na kokela mabala ya esengo mpe mabota ya seko. Mayoki oyo ezali lisumu te—ezali ya bule. Mpo ete mayoki ya kosangisa nzoto ezali ya bule mpenza mpe na nguya mpenza, Nzambe apesi yo mobeko na Ye ya bopeto mpo na kolengela yo na kosalela mayoki oyo ndenge Ye azali kokanisa. Mobeko ya bopeto elobi ete Nzambe andimi bosangisi nzoto bobele kati ya mobali mpe mwasi oyo babalani. Bato mingi babosanaka to kutu batyolaka mobeko ya Nzambe, kasi Nkolo abengisi biso tozala bayekoli na Ye mpe tobika motindo oyo eleki malamu.
Mabengisi
Salela nzoto na yo—mpe banzoto ya bato mosusu—na limemya. Ntango ozali kozwa bikateli etali elateli na yo, suki, mpe lolenge ozali komonana, mituna yo moko, “Ezali ngai kotosa nzoto na ngai lokola likabo ya bule uta na Nzambe?” Tata na Lola alingi biso tomimona moko na mosusu mpo na oyo tozali ya solo: bobele te mpo na banzoto na biso ya mosuni kasi mpo na bana na Ye oyo bazali na atandele ya seko. Kima bilateli oyo ezali kobeta nsete to kobenda makanisi ebongi te na nzoto na yo ya mosuni na esika ya oyo ozali lokola mwana ya Nzambe na lobi ya seko. Tika ete bopeto ya bizaleli mpe bolingo mpo na Nzambe ekamba maponi na yo. Solola na libota na yo.
Sala makambo oyo ekolendisa nzoto na yo, te makambo oyo ekosala yango mabe to kobebisa yango. Sepela na botondi makambo mingi ya malamu Nzambe apesi. Mikundola ete masanga, likaya, cafe, tii, mpe bilangwiseli mpe bangi mosusu ya mabe ezali mpo na nzoto to molimo na yo te. Ata kutu biloko ya ntina, lokola bankisi oyo monganga akomi, ekoki koboma soki esalelami malamu te.
Bomba bosangisi nzoto mpe mayoki ya kosangisa nzoto ya bule. Yango esengeli te ezala eloko ya liseki to ya lisano. Libanda ya libala kati na mwasi mpe mobali, ezali mabe kosimba biteni ya bule ya nzoto ya moto mosusu, ata soki alati bilamba. Kati na maponi na yo etali oyo ozali kosala, kotala, kotanga, koyoka, kokanisela, kotya, to kotinda na internet, boya eloko nyonso oyo ekoki kolamusa mposa ya kosangisa nzoto epayi na yo moko to bato mosusu. Yango esangisi polonogalafi na lolenge nyonso. Soki omoni ete makambo to milulu ezali kokomisa masenginya makasi, kima yango. Oyebi nini makambo mpe milulu oyo ezali. Mpe soki oyebi te, Molimo, libota na yo, mpe bakambi na yo bakoki kosunga yo oyeba. Lakisa Tata na yo na Lola ete ozali kotosa mpe kopesa limemya na nguya ya bule ya kokela bomoi.
Mapamboli Elakelama
Limemya na yo mpo yomoko mpe basusu ekokola ntango ozali kopesa nzoto na yo lokumu na nzela ya bizaleli na yo, lolenge na yo, mpe elateli.
Nkolo alaki biloko a motuya mingi ya boyebi na baye bazali kobomba Liloba ya Bwanya. Nzoto ya bokolongono malamu, ekangami na bokakemi te, ekolisaka mpe likoki na yo ya kozwa emoniseli na yo moko, kokanisa polele mpenza, mpe kosalela Nkolo.
Kobika mobeko ya bopeto ememaka bondimami ya Nzambe mpe nguya ya molimo ya moto ye moko. Ezali kobatela yo mpe libota na yo ya lobi. Ntango obali, mobeko oyo ekomema bolingo monene, kondima, mpe bomoko na libala na yo. Kotosaka mobeko oyo ekokomisa yango ya solo mpo na yo kokende liboso mpo na seko mpe kokoma mingi lokola Tata na yo na Lola. Elikya na yo ekokola ntango ozali kobika lokola moyekoli ya Yesu Klisto.
Mituna mpe Biyano
Nini ezali motindo ya Nkolo oyo etali elateli, kobongisa nzoto, nzoloko, mpe botoboli nzoto? Motindo ya Nkolo ezali mpo na yo opesa lokumu na bosantu ya nzoto na yo, atako ntango yango elakisi kozala ya kokesena uta na bato mosusu. Tika ete bosolo oyo mpe Molimo ezala mokambi ntango ozali kozwa bikateli—mingi mingi bikateli oyo ezali na mbano ya libela na nzoto na yo. Zala na bwanya mpe bosembo, mpe luka toli uta na libota na yo mpe bakambi na yo.
Lolenge nini nakoki kolonga masenginya mpe bizaleli ya mabe? Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali na nguya ya kosunga yo. Tondisa bomoi na yo na biloko oyo ebengisaka nguya na Bango kati na bomoi na yo, lokola libondeli, boyekoli makomi, mpe mosala epayi ya basusu. Tala epayi ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, mpe okomona ete bolembo ekoki kokoma makasi. Luka lisungi uta libota, bakambi, mpe bapesi toli ya mayele otyelaka motema soki esengeli. Bakoki kosunga yo ozwa lisusu nguya ya kokonza bomoi na yo. Ekoki kozwa ntango, na yango zala na motema molai, mpe kotika ata moke te.
Nazali kobendama na bato ya nzoto ya ndenge moko na ngai. Lolenge nini mitinda oyo ezali kosalelama epayi na ngai? Koyoka bobendani ya kosangisa nzoto ya mibali na mibali to basi na basi ezali lisumu te. Soki ozali na mayoki oyo mpe ozali kolanda yango to kosalela yango te, ozali kobika mobeko ya bule ya bopeto ya Tata na Lola. Ozali mwana ya bolingo ya Nzambe mpe moyekoli ya Yesu Klisto. Mikundola ete Mobikisi azali kososola eloko nyonso ozali kokutana na yango. Na nzela ya mokangano ya boyokani na yo elongo na Ye, okozwa makasi ya kotosa mitindo ya Nzambe mpe kozwa mapamboli oyo Ye alaki. Ndimela Ye mpe nsango malamu na Ye.
Nabebisamaki, mpe nazali koyoka nsoni. Nasali lisumu? Te. Kozala moto oyo abebisami to batumolaki ezali kokomisa yo mosumuki te. Mobikisi alingi yo. Azali makasi na yo. Alingi kosunga yo, kobikisa yo, mpe kopesa yo kimia. Bapesi toli ya mayele ya kotyela motema, bato ya libota na yo, mpe bakambi na yo bakoki mpe kosalisa.
Tala Genese 1:27 (tozali na elilingi ya Nzambe); Yoane 14:18 (Mobikisi alaki libondisi); Bafilipi 4:7 (kimia ya Nzambe eleki bososoli); Mosiya 2:41 (baye bazali kobatela mitindo ya Nzambe bapambolami na nzoto mpe na molimo); Malongi mpe Mayokani 88:15 (molimo mpe nzoto ezali molimo ya moto); 89 (Liloba ya Bwanya); 121:45 (makanisi ya malamu ekambaka na elikya monene).
Mituna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Nkolo alobaki ete makambo nyonso esengeli “kosalema na bopeto” liboso na Ye (Malongi mpe Mayokani 42:41 Olukaka bopeto ya bomoto na makanisi mpe bizaleli na yo ?
-
Otosaka mobeko ya bopeto?
-
Ososolaka mpe otosaka Liloba ya Bwanya?