Bilenge
Sala maponi efulama


Sala maponi efulama

Kati na Mpo na Bokasi ya Bilenge, okozwa mateya ya Yesu Klisto mpe ya baprofeta na Ye. Na bosolo oyo lokola bokambi na yo, okoki kosala maponi efulama oyo ekopambola yo sikawa mpe na boseko mobimba.

Ozali mwana ya molimo oyo Nzambe alingaka mingi. Mwango na Ye ya esengo epesi nzela mpo na yo okola na molimo mpe okolisa makoki na yo ya bonzambe. Ye atindaki Yesu Klisto mpo ete azala Mobikisi na yo.

Tata na yo na Lola atyelaka yo motema. Ye apesi yo mapamboli minene, kobakisa litondi ya nsango malamu mpe makuli mpe mayokani ya bule oyo ekangisaka yo na Ye mpe ememaka nguya na Ye kati na bomoi na yo. Elongo na mayokani oyo nde eyaka esengo ya kobakisama mpe mikumba. Ye ayebi ete okoki kosala bokeseni na mokili, mpe yango esengaka, na makambo mingi, kozala ya kokesena na mokili. Luka botambwisi ya Tata na yo ya Lola ntango ozali kosala maponi. Ye akopambola yo na bofuli na nzela ya Molimo Mosantu.

Yesu Klisto azali nzela oyo ememaka na esengo ya seko. Ntango ozali kosalela bonsomi na yo mpo na kopona kolanda Yesu Klisto, ozali na nzela oyo ekambaka na esengo ya seko. Komisa Yesu Klisto ndakisa na yo, moboko na yo ya makasi. Tonga bomoi na yo likolo ya mateya na Ye, mpe meka maponi na yo na nzela na yango. Mayokani oyo osalaka na libatisi, na ntango ya elambo, mpe kati na tempelo ezali bitongelo ya moboko makasi na yo kati na Klisto. Okokoba kokutana na bitumba mpe mimekano, kasi Tata na Lola mpe Mobikisi bakosalisa yo kati na yango nyonso.

Ntina ya Mpo na Bokasi ya Bilenge ezali te ya kopesa yo “iyo” to “te” na oyo etali liponi nyonso oyo okoki kokutana na yango. Na esika, Mobikisi azali kobengisa yo obika na lolenge ya likolo mpe esantu koleka—bomoi oyo efandisami na bosolo ya seko mpe mapamboli elakama ya Nkolo. Oyo nde lolenge na Ye. Bokambi oyo ekoteya yo oyo etali lolenge na Ye. Ezali kolimbola bosolo oyo Ye amonisaki. Sala bosolo oyo bokambi na yo mpo na kosala maponi—maponi minene, lokola kosala mayokani kati na tempelo mpe kosala misio, mpe ndenge moko na maponi ya mokolo na mokolo, lokola ndenge ya kosalela bato makambo to ndenge ya kosalela ngonga nayo.

Ntango bato mosusu bakoki kosalisa yo, bokoli na yo ya molimo ezali mokumba na yo moko. Yango ezali mokumba na yo. Sala makasi na yo mpo na kobonga mokolo na mokolo, kobomba mitindo ya Nzambe mpe kotosa mayokani na yo, mpe kosalisa basusu bapusana penepene na Mobikisi.

Tala Mosiya 4:29–30 (banzela ya kosala masumu ezali mingi, na yango esengeli tomikengela biso moko); Elamani 5:12 (tonga moboko na yo likolo ya Klisto); Malongi mpe Mayokani 45:57 (kamata Molimo Mosantu lokola mokambi na yo); 25:13 (kangama na mayokani na yo).

Lolenge bokambi oyo ebongisami

Likambo moko moko ezali na biteni misato:

  1. Bosolo ya seko, to malongi ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto

  2. Mabiangi mpo na kosalela bosolo yango

  3. Mapamboli Elakelama oyo Nkolo apesaka baye babikaka na mateya na Ye