Nakozanga Eloko Te, na Yongsung Kim. Na Ndingisa ya Havenlight
5.
Tambola na pole ya Nzambe
Bagalatia 5:25
Okosala maponi malamu ntango okoki komona makambo polele. Yango nde mpo na nini pole ezali motuya; pole ekomisaka yango pete mpo na komona nzela ebongi. Tata na Lola apesi yo nzela na liziba ya lola ya pole—likabo ya Molimo Mosantu—mpo na kosunga yo omona polele nini ezali malamu to mabe, sembo to sembo te.
Bosolo ya Seko
Okoki kozala na Molimo Mosantu lokola moninga ya ntango nyonso. Ntango okotisamaki mondimi ya Eklezia, obengisamaki mpo na “kozwa Molimo Mosantu.” Libaku ya kozala na Molimo lokola moninga na yo ya ntango nyonso ezali moko ya makabo minene koleka ya Nzambe epayi na yo.
Kosala maponi malamu ebongisaka likoki na yo ya koyoka Molimo. Ezali na makambo ya malamu mpe kitoko na mokili oyo. Kaka ndenge nzoto na yo esimbami na oyo oliaka mpe omelaka, makanisi mpe molimo na yo esimbamaka na mozindo na makambo oyo otangaka, otalaka, mpe oyokaka.
Mabengisi
Sala ntango mpo na Nkolo mokolo nyonso. Yekola maye etali Ye. Ntango nyonso mikundola Ye. Bondela Tata na yo na Lola. Yekola makami esantu mpe maloba ya baprofeta ya bomoi. Nsima sala molende mpo na kobika na oyo ozali koyekola.
Luka makambo oyo etombolaka, efulaka, mpe ebengisaka Molimo. Ntango ozali kosala maponi etali biloko ya kotala, kotanga, koyoka, to kosangana na yango, kanisa na oyo yango ezali koyokisa yo. Ezali yango kobengisa makanisi ya malamu? Zala mosika uta na eloko nyonso oyo ezali kotyola makambo ya bule to oyo ezali ya mbindo. Kosangana te na likambo nyonso oyo ezali kobulunganisa bososoli mpe mayoki na yo na Molimo, lokola mobulu, masanga, mpe bangi ya mabe. Zala na mpiko ya kokanga video to lisano, kolongwa na filme to mabina, kobongola miziki na yo, to kokende mosika na eloko nyonso oyo ezali koyokana te na Molimo.
Salela rezo socio mpo na kolendisa basusu. Rezo socio ekoki kozala esalelo ya nguya na bopanzi nsango. Soki osalelaka yango, tya likebi na pole, bondimi, mpe bosolo. Kokokanisisa te bomoi na yo na oyo bato mosusu bamonani bazali kokutana na yango. Mikundola ete ntalo na yo ezali kowuta na kozalaka mwana moko ya baboti ya lola, kasi te na rezo socio.
Luka makambo malamu mpe ya solo, mikangano oyo ekowumela mpo na libela. Keba ete esaleli na yo ya tekinoloji mpe media ezwa te esika ya ntango ya kolekisa na bomoto elongo na libota mpe baninga. Rezo socio mpe batekinoloji mosusu ekoki kozwa ntango ebele kozanga kozongisa eloko ya motuya mingi. Zwa bopemi uta na mokili oyo ezali ya solo te mpe kangama na bato na bomoi ya solo.
Mapamboli Elakelama
Okoki kozala na Molimo elongo na yo ntango nyonso. Elaka oyo ezali eteni ya boyokani osalaka mokolo nyonso oyo oliaka elambo. Molimo akotatola epayi na yo na oyo etali Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Akobondisa yo, akokamba yo, akokebisa yo, mpe akosantisa yo. Akosunga yo oyeba bosolo mpe omona bolamu kati na mokili.
Mituna mpe Biyano
Lolenge nini nakoki koyeba soki nazali koyoka Molimo Mosantu? Koyekola kososola Molimo ezwaka ntango, momeseno, mpe motema molai. Alobaka na bato ndenge na ndenge na ndenge ekeseni. Kobosana te makambo ya mikemike—mayoki ya kimia oyo ozwaka na koyoka litatoli ya moto moko to mayoki ya kobulunganisama ozwaka nsima ya kosala liponi moko ya mabe. Luka makomi mpo na banzela ekeseni Molimo apesaka nsango, bondela mpo na yango, mpe koba kolukaka mabaku ya koyoka Molimo.
Pornografi ezali nini? Mpo na nini nasengeli kokima yango? Pornografi ezali bomonisi moko, na bililingi to maloba, esalami mpo na kolamusa mayoki ya kosangisa nzoto. Pornografi eyaka na ndenge ebele, kobakisa bavideo, bililingi, mikanda, masano, mpe miziki. Ekoki lisusu kozala mesaje to bililingi etindami katikati ya baninga. Pornografi ebebisaka makambo oyo ezali ya bule—banzoto na biso ya mosuni mpe mayoki ya kosangisa nzoto—na bozangi limemysa. Okoki kokutana na pornografi kozanga ete ozala na yango na makanisi. Ezala ete okutani na pornografi na nko to te, longwa mbala moko. Okoki mpe kolinga kosolola na moboti moko to mokolo mosusu otyelaka motema. Kotala pornografi na nko ezali lisumu mpe ekobebisa likoki na yo ya koyoka Molimo. Ekolembisa bomipekisi na yo mpe ebebisaka lolenge omimonaka yomei mpe basusu. Yesu Klisto azali na nguya ya kosunga yo otelemela pornografi mpe oyambola. Tala epayi na Ye mpe longwa na molili. Episikopo na yo akoki kosunga yo ozwa makasi mpe bolimbisi na nzela ya Mobikisi. Yesu Klisto azali makasi na yo!
Tala Nzembo 119:105 (Liloba ya Nzambe ezali lokola pole na nzela na biso); Amosa 5:14 (luka bolamu); Bagalatia 5:22–23 (bambuma ya Molimo); Moroni 7:18–19 (pole ya Klisto); Malongi mpe Mayiokani 6:23 (Nkolo alobeli kimia); 20:77, 79 (mabondeli ya elambo).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Nkolo alobaki ete makambo nyonso esengeli “kosalema na bopeto” liboso na Ye (Malongi mpe Mayokani 42:41 Olukaka bopeto ya bomoto na makanisi na yo mpe bizaleli?