Bilenge
2. Nzambe alingi kosolola na yo


Tata mpe Mwana babimeli Joseph Smith na zamba ya bule

2.

Nzambe alingi kosolola na yo

Malongi mpe Mayokani 8:2–3

Bozongisi ya nsango malamu ebandaki ntango mwana moke na nkombo ya Joseph Smith abondelaki, mpe Tata na Lola mpe Mwana na Ye, Jesus Christ, bayanolaki ye. Nzambe azali kokoba kokamba Eklezia na Ye na nzela ya baprofeta ya bomoi. Alingi mpe koloba na yo, mwana na Ye, na nzela ya Molimo Mosantu. Koyekola koyeba lolenge Molimo Mosantu elobelaka yo ezali moko ya makoki ya motuya oyo okoki kozwa.

Bosolo ya Seko

Molimo ekomema yo epayi ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Yango ezali mosala ya motuya ya Molimo Mosantu. Akofula yo lisusu mpo na koyambola mpe kolanda Yesu Klisto na yango okoka kozwa mapamboli ya Bomikabi na Ye. Ntango ozali koyambola, Molimo ekopetola yo mpe ekosalisa yo obongwama.

Molimo Mosantu akoloba na molimo mpe motema na yo. Bansango uta na Molimo ekoki koya na molimo na yo na ndenge ebele—na nzela ya makanisi efulama, makebisi, bososoli ya polele, mpe makundoli ya molimo. Molimo Mosantu akoki koloba na motema na yo na nzela ya mayoki ya kolendisa lokola libondi, elikya, kimia, bolingo, esengo, bomikitisi, botondi, mpe motema molai.

Mabengisi

“Zwa Molimo Mosantu.” Maloba oyo elobamaki ntango okotisamaki lokola mondimi ya Eklezia ya Klisto. Lolenge nini ozwaka Molimo Mosantu? Na kotosaka mateya ya Yesu Klisto. Ye azali makasi na yo. Kolanda Ye ebengisaka Molimo Mosantu kati na bomoi na yo.

Luka Tata na yo na Lola kati na libondeli. Fungolela Ye motema na yo. Pesa ye botondi mpo na mapamboli mingi ya kokamwa oyo Apesi yo. Kabola elongo na Ye bisengo, mitungisi, mpe mituna na yo. Zala na kimia mpe yoka biyano na Ye, oyo ekoki koya lokola mayoki ya kimia, makanisi na molimo na yo, to makanisi ya kosala likambo moko.

Yoka mongongo ya Nzambe kati na makomi. Makomi ezali maloba ya Nzambe epayi na yo! Yekola uta na yango mokolo nyonso mpo na koyeba mongongo na Ye mpe koyoka bolingo na Ye. Ntango ozali kotanga, manyola makambo oyo Akoki kozala koteya yo, mpe koma na nse makanisi oyo ezali koya. Komisa yango momeseno ya mokolo nyonso ya koyekola makomi—mingimingi Buku ya Mormon—na bomoi na yo mobimba.

Salela makanisi ya molimo ozwaka. Soki ozali na likanisi to liyoki ya kosala likambo moko ya boboto oyo ekopambola moto moko, sala yango! Biloko nyonso ya malamu ewutaka epayi ya Nzambe. Lakisa Tata na yo na Lola ete Akoki kotyela yo motema mpo na kolanda makanisi oyo ezali kowuta epayi na Ye.

Yesu Klisto

Mapamboli Elakelama

Molimo Mosantu akobondisa yo mpe akokamba yo. Ayebani lokola Mobondisi. Akosunga yo na bantango ya mimekano. Akosunga yo mpo na koyeba nini koloba mpe kosala. Na bopusi na Ye, okoki koloba bokeseni oyo ezali katikati ya makambo ya solo mpe ya lokuta. Akoki kosunga yo omona bolamu kati na bato mosusu mpe kati na yo moko. Molimo akoki lisusu kokebisa yo mpo na oyo etali likama. Akokamba yo epayi Yesu Klisto mpe mosika na lisumu.

Okoki kozwa makabo ya molimo. Ezali na makabo mingi oyo Nzambe apesaka bana na Ye na nzela ya Molimo na Ye. Mosusu oyo elobami na makomi esangisi emoniseli, kondimela Yesu Klisto, koteya, bososoli, mpe bwanya. Bondela mpo na kosenga Tata na Lola na oyo etali makabo ya molimo oyo Apesi yo, lolenge okoki kokolisa yango, mpe lolenge Ye alingi osalela yango mpo na kopambola basusu.

Mituna mpe Biyano

Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mayebi ya molimo makasi koleka ya ngai? Mayebi nyonso ya molimo ezalaka kaka te ya kokamwa to ya nsomo. Mbala mingi, Nzambe alobaka na biso na nzela ya makanisi na molimo na biso to mayoki moko ya boboto na mitema na biso. Yango ezali ba nungunungu ya kimial, ya mongongo ya kimia mpe ya moke. Okoki koyoka Molimo mpe koyeba yango naino te. Koba kobondela. Koba koyekola liloba ya Nzambe. Na bowumeli ya ntango mpe na kosalaka makambo, okoyekola lolenge ya koyeba Molimo na ndenge ekeseni.

Tala 1 Bakonzi 19:11–12 (Nzambe alobaka na mongongo moko ya kimia, mpe ya moke); Yoane 15:26 (Molimo atatolaka maye etali Klisto); Moroni 10:3–5 (yeba bosolo na nzela ya Molimo); Malongi mpe Mayokani 11:12–13 (Molimo akambaka na kosala malamu); 45:57 (zwa Molimo lokola mokambi na ye); 46:8–26 (makabo ya molimo).

Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo

  • Ozali na bondimi na mpe litatoli ya Nzambe, Tata ya Seko; Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe ya Molimo Mosantu?