12.
Yesu Klisto amemaka esengo
Tata na Lola na yo azali na esengo. Alingi yo, mwana na Ye, ozala na esengo mingi ndenge okoki. Yango ezali mpo na nini Alengelaki mwango ya esengo. Atindaki Mwana Mobali na Ye, Yesu Klisto, mpo azala Mobikisi na yo mpe ateya nsango malamu na Ye. Liloba nsango malamu elakisi “nsango kitoko[malamu],” mpe nsango malamu ezali ete mpo na Yesu Klisto, okoki kozala na esengo na bomoi oyo mpe na litondi ya esengo mpo na seko.
Bosolo ya Seko
Okelama mpo na kozala na bosepeli mpe esengo. Oyo nde ntina ya bomoi na yo. Ezali ntina ya mwango ya esengo ya Tata na Lola. Oyo elingi kolona ete okotikala te kozala na mawa to kozala na bangonga ya mpasi. Kasi elakisi ete Mobikisi akoki kosunga yo otelema ngwi na bangonga ya mpasi mpe ozwa esengo.
Esengo ewutaka na makambo na yo te; ewutaka na kolandaka Yesu Klisto. Okoki kozala na mokolo mabe ntango mosusu, poso mabe, to mobu ya mabe Kasi esengo ezali te bozangi ya mawa na bomoi na yo; ezali bozali ya Klisto na bomoi na yo.
Esengo ya Mobikisi ezali monene mpe ewumelaka libela koleka eloko nyonso mosusu. Satana akomeka yo mpo na koluka maseki mpe bosepeli na banzela na yo moko to uta na bisengo ya mokili. Eloko nyonso oyo ezali te na boyokani na Yesu Klisto mpe mitindo na Ye ekoki te komemela yo esengo na bosepeli ya solo mpe ya libela. Mikundola ete biloko ya mokili oyo ezali ya ntango mokuse. Nsango malamu ya Yesu Klisto epesaka esengo mpe bosepeli oyo ezali ya mozindo, esantu, mpe ya seko.
Mabengisi
Pona esengo. Atako ezala ya solo ete ezali na mawa mpe mpasi kati na mokili oyo, Tata na Lola atondisi mpe mokili na biloko mingi ya malamu mpe kitoko. Luka yango. Meka koyeba bantina ya kosepela mokolo na mokolo—mbala mosusu koma yango kutu. Yango ezali makabo uta na Tata na yo ya bolingo na Lola.
Mema esengo mpe bosepeli epayi ya basusu. Yesu Klisto azwaki litondi ya esengo na komemela biso esengo. Okoki kolanda ndakisa na Ye na kozwaka esengo mpe bosepeli kati na kosalela basusu. Sunga moto moko amiyoka ya kolingama. Pesa longonya ya solosolo. Lendisa moto moko oyo azali kobunda na mikakatano. Soki oyokaka lokola ozali na mposa ya esengo mingi kati na bomoi na yo, meka komema esengo epayi ya moto mosusu.
Zala na esengo na kokumbamelaka Nkolo. Ntango okendaka eklezia, tya makanisi na esengo oyo Yesu Klisto apesi yo, mpe kumisa Ye mpo na yango! Sala ya yo mokumba mpo na kosalisa na bozali ya molimo ya esengo kati na mayangani na yo ssya Eklezia. Komisa miziki ya bule eteni ya bokumbameli na yo na ndako mpe na eklezia.
Mapamboli Elakelama
Okoki koyoka esengo atako ntango bomoi ezali mpasi. Okoki komituna lolenge nini yango ekosalema, kasi ezali solo. Bondimi na Yesu Klisto, nguya na Ye ya kobikisa, mpe bilaka na Ye ya seko ekoki kopesa yo esengo ya ntango nyonso. Esengo na Ye ezipaka mawa mpe ememaka kimia oyo elekeli bososoli nyonso.
Litondi ya esengo ezali kozela yo na bokonzi ya selestiale ya Nzambe. Yesu Klisto alongaki makambo nyonso oyo ekokaki kopekisa yo uta na kozwa esengo ya seko. Ntango ozali kondimela Ye mpe kolanda Ye, esengo oyo ekozala ya yo.
Mituna mpe Biyano
Soki nsango malamu ezali esengo, mpo na nini nazali koyoka mawa? Koyoka mawa ezali te elembo ete ozali kobika te nsango malamu. Bomoi ya moto nyonso ezali na mpasi, mimekano, mpe mawa. Kolanda Yesu Klisto ebongolaka yango te, kasi ezali kokangisa yo elongo na Mobikisi oyo akoki kobondisa yo mpe kosunga yo ozwa esengo mpe bosepeli.
Mpo na nini ezali na mpasi mingi na mokili? Mpasi mosusu na mokili eyaka mpo bato basalelaka likoki na bango ya kopona mpo na kosala maponi ya mabe. Yango ekoki komemela bango mpasi mpe bato mosusu. Na ndenge mosusu, mpasi ezali mbeba ya moto te—ezali bobele litomba ya kobika kati na mokili ebonga nie te. Ezala mpo na ntina nini, ekoki kopesa motema mpasi mpo na komona moto moko azali konyokwama, mingimingi moto oyo olingaka. Ndimisama ete Nzambe azali mpe na mawa ntango ozali konyokwama. Andimi mimekano ya bomoi ya kufa mpo na kosunga yo okola mpe omilengela mpo na esengo ya seko elongo na Ye, kasi Ye atikaka yo te onyokwama yo moko. Atindaki Yesu Klisto mpo na komema likolo na Yemoko mpasi na yo na yango Ye akoka kosunga yo. Yesu Klisto azali makasi na yo! Mpe Ye abengisi yo, lokola moko ya balandi na Ye, mpo na kosala oyo yo okoki mpo na kosunga na kosilisa mpasi ya basusu.
Tala Nzembo 16:11 (na liboso ya Nzambe ezali litondi ya esengo); 95:1 (yembela Nkolo); Yoane 16:33 (zala na esengo; Yesu Klisto alongi mokili); Bagalatia 5:22 (mbuma ya Molimo ezali esengo); Baebeles 12:2 (Yesu ayikaki mpiko mpasi na Ye mpo na esengo ya kobikisa bana ya Nzambe); 2 Nefi 2:25 (Nzambe alingi yo ozala na esengo); Alma 26:15–16 (kosala mosala ya Nzambe ekambaka na esengo); Malongi mpe Mayokani 18:15–16 (boniboni esengo na yo ekozala monene ntango ozali kosunga basusu baya epayi ya Klisto).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Ozali na litatoli ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe ya mosala na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na yo?