7.
Makuli mpe mayokani ekopesa yo nzela na na mapamboli ya Nzambe
Tata na yo na Lola azali na mposa makasi ya koteya mpe kopambola yo. Lolenge moko Asalaka yango ezali na nzela ya makuli lokola libatisi, nkotisa, mpe elambo. Na nzela ya makuli oyo, tosalaka boyokani, elaka, elongo na Nzambe. Kobomba mayokani ebakisaka nguya ya Nzambe na bomoi na yo mpe esalisaka yo omilengela mpo na bomoi ya seko. Yango ezali mpo na nini makuli mpe mayokani ezali na ntina mingi epayi na biso—mpo ezali kolendisa bokangami na biso epayi ya Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso mpe esungaka tokoma mingi lokola Bango.
Bosolo ya Seko
Makuli ezali kotalisa yo epayi ya Yesu Klisto. Likuli ezali molulu ya bule elongo na bandimbola ya bililingi oyo ezali koteya maye etali Yesu Klisto. Ndakisa, Elambo ezali kaka te lipa mpe mayi. Ekundolisaka biso Mobikisi.
Makuli ezali elembo ya bolingo ya Nzambe, kondimela, mpe bilikya. Ememaka mokangano na yo elongo na Nzambe na etando ya mozindo mpenza. Kosala boyokani elakisaka ete olingi Nzambe mpe omipesi epayi na Ye. Okoki kondimela Ye, mpe Akoki kotyela yo motema. Na bomipesi oyo ya mozindo mpenza eyaka nzela na nguya na Ye mpe lisungi ntango ozali kobatela boyokani na yo.
Osalaka mayokani elongo na Nzambe ntango obatisami mpe okotisami lokola mondimi mpe ntango oliaka elambo. Ntango obatisami, olaki kozwa likolo na yo nkombo ya Yesu Klisto, kosalela Ye, mpe kobatela mitindo na Ye na bomoi na yo mobimba. Na ntango ya elambo, olakaka lisusu komikundola Ye ntango nyonso. Oyo ezali bilaka na yo. Ntango ozali kolinga kobatela yango, Nzambe alaki kopesa yo Molimo Mosantu lokola moninga ya ntango nyonso.
Mabengisi
Zwa elambo lokola likabo ya bule. Lakisa bomipesi na yo epayi ya Yesu Klisto na komilengelaka mpo na ntango ya bule na boumeli ya elambo. Manyola oyo okoki kosala mpo na kokomisa likuli oyo likambo ya ntina mingi ya poso na yo.
Luka Nkolo kati na makuli. Ntango ozali kotala to kosangana na likuli moko, mituna yomei, “Nini nazali koyekola uta na yango mpo na Yesu Klisto?” to “Lolenge nini yango ezali komema ngai penepene na Ye?” Tya likebi na oyo Molimo azali koteya yo.
Tika ete mayokani na yo ekamba misala na yo. Ntango ozali na liponi ya kosala, mikundola mokangano na yo ya boyokani na Nzambe. Zala sembo epayi na Ye. Mituna yomei: Ezali eloko oyo koyokana na mayokani na ngai? Ndakisa, nalingi mpe nazali kosalela basusu, kobondisa bato oyo bazali na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola nzeneneke ya Klisto—esika nyonso mpe ntango nyonso?
Mapamboli Elakelama
Okoki kozala na nguya ya kolonga lisenginya, lisumu, mpe mimekano ya bomoi. Kosala mpe kobomba mayokani ekopesa yo nzela na nguya ya Nzambe. Na nguya wana, okoki kobunda na likambo nyonso na elikya. Yesu Klisto azali makasi na yo!
Okoki kozala peto mpe kolimbisama. Eteni ya elaka ya Nzambe epayi na yo mpo na kobomba boyokani na yo ya libatisi ezali kolimbisama ya masumu na yo. Yango elingi koloba ete ntango ozali koyambola mpe kobomba bilaka na yo elongo na Nzambe, Ye akolimbisa yo mpe akosunga yo obonga.
Okoki kozala na Molimo Mosantu elongo na yo ntango nyonso. Elaka mosusu oyo ekangami na libatisi mpe elambo ezali kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo mpe lisalisi ya baanzelu. Osengeli te kobunda na mikakatano na yo yomei. Nzambe atikaka te bana na Ye ya boyokani—okoki kondimela na yango.
Okoki kozala na lisungi ya bato ya boyokani ya Nzambe. Ozali na lingomba ya bato ya boyokani kati na Eklezia ya Mobikisi. Bomitombolaka mpe bomilendisa moko na mosusu. Bolelaka elongo mpe bosepelaka elongo. Bomemaka mikumba ya moko na mosusu. Libota na yo, episikopo, bakambi, mpe bandimi mosusu ya Eklezia bazali wana mpo na kosunga yo, mpe okoki kosunga bango.
Mituna mpe Biyano
Nakoki kozala molandi malamu ya Yesu Klisto na kozanga makuli mpe mayokani? Ezali na bato malamu mingi oyo bazali kolanda Yesu Klisto na bosolo, atako soki batikala kobatisama te to kozala na tempelo. Nzokande, Tata na Lola alingi bana na Ye banso bazwa makuli mpe basala mayokani elongo na Ye na yango bakoka kozala na bozwi monene ya lisalisi, mawa, mpe makasi na Ye. Yango ezali moko ya bantina minene Yesu Klisto azongisaki Eklezia na Ye! Mwana nyonso ya Nzambe akozala na libaku—kati na bomoi oyo to bomoi ekoya—ya kondima makuli mpe mayokani oyo esengeli mpo na bomoi ya seko.
Natikali sembo te na mayokani na ngai ntango nyonso. Ezali wana na elikya mpo na ngai? Iyo! Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango malamu ya elikya mpe ebandeli ya sika! Yango ezali mpo na nini tozwaka elambo poso nyonso. Tata na Lola ayebaki ete tokosala mabunga mpe tokozala na mposa ebandeli moko ya sika. Mobikisi apesaki bomoi na Ye mpo na kopesa yo nzela ya kozongela. Ntango ozali kosalela bondimi kati na Yesu Klisto mpe koyambola, okoki kozwa lisusu nzela na nguya ya Nzambe.
Tala 1 Bakolinti 11:23–26 (kolia elambo elakisi ete tondimaka na Yesu Klisto mpe na Bomikabi na Ye); Mosiya 18:10, 13 (boyokani ya libatisi); Malongi mpe Mayokani 13 (Bonganganzambe ya Alona esangisi bafungola ya boyamboli, libatisi, mpe mosala ya baanzelu); 20:37 (masengami mpo na libatisi); 20:77, 79 (mabondeli ya elambo).
Motuna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Olukaka kobatela mokolo ya Saba ezala esantu, nyonso mibale na ndako mpe na eklezia; kokende makita; kolemilengela mpo na mpe kolia elambo na bolongobani; mpe kobika engebene na mibeko mpe mitindo ya nsango malamu?