“Olingaka Ngai?”
Soki tolingi kolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe, tosengeli kososola lolenge nini Ye ayebelaka bolingo na biso.
Na lisese ya mwana ya kilikili, mwana ya mobali ya nkuluntu asepelaki mpenza te ntango leki na ye ya mobali azongaki ndako nsima ya eleko ya maponi ya mabe mpe “kosakana na bozwi na ye na kobikaka bomoi ya mobulu.” Lolendo ya ndeko mobali ya nkuluntu mpe bomimoni sembo na yemei epekisaki ye na koyambaka esengo ya bozongi ya boyamboli ya ndeko na ye ya mobali. Tokoki mpe lisusu kotika mabaku koleka na kozanga koyebisa bato oyo tolingaka, na nzela ya maloba mpe misala na biso, ya bolingo na biso ya solo mpo na bango.
Ezali na bandakisa mingi ya nguya na kati ya makomi etali bolingo ya solo oyo ekabolami mpe ezwami: Naomi mpe Luta, Ammon mpe Mokonzi Lamoni, mwana ya kilikili mpe tata na ye, Mobikisi mpe bayekoli na Ye.
Ntango bolingo epesami na bolingi nyonso mpe ezwami na motema moko, ndakisa moko ya malamu ebandaka elongo na bokoli ya bolingo kati ya mopesi mpe mozwi.
Bolingo ya Nzambe ezali ya kokoka, ezanga ndelo, ewumelaka, mpe “ya elengi mpenza.” Etondisaka molimo na “bosepeli monene koleka.” Atako bongo, na bantango mosusu tokoki komona mpasi mpo na koyeba bolingo ya Nzambe na bomoi na biso. Nzokande, Tata na biso na Lola ya bolingo ebonga nie azali mpenza na mposa ete biso toyeba bolingo na Ye oyo “alobelaka [biso] engebene na … [ya biso] bososoli.” Ye ako lakisa bolingo na Ye mpo na biso na banzela biso. moko na moko tokoki koyeba. Tokoki koyeba bolingo ya Nzambe mpo na biso ntango totalaka kitoko ya mokili, to ntango tozwaka biyano na mabondeli, to tozwaka makanisi na ntango mpenza ya bosenga, to ntango tokokutanaka na bangonga ya esengo. Bolakisi monene koleka ya bolingo ya Tata na Lola mpo na biso oyo eyokanaka elongo na nyonso mibale molimo mpe motema ezali ntango Ye apesaki nzela epayi ya Mwana na Ye Molingami amipesa Yemei lokola moto oyo amikabi.
Lokola ndeko mobali ya nkuluntu ya ya mwana ya kilikili, makanisi na biso ezalaka mingimingi epayi na bisomei. Tozwami na mposa makasi ya komona bilembeteli ya bolingo ya Nzambe mpo na biso, mpe komitungisa ntango tomonaka yango te. Kasi likambo kitoko ya kokamwa ezali ete mingi totie makanisi na biso na kolakisaka ya biso bolingo mpo na Nzambe, na pete koleka tozali koyeba ya Ye bolingo mpo na biso. Ntango mosusu yango ezali mpo na nini Mobikisi ayanolaki na motuna “Mobeko nini eleki monene?” elongo na libiangi oyo ya pete mpe motuya: “Linga Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.”
Ntango mosusu lolenge tolakisaka bolingo na biso epayi ya baye bazalaka na motuya mingi na miso na biso ezali te na solo lolenge bango bayebaka bolingo. Yango ekoki kotungisa mopesi mpe mozwi. Ekoki kosunga kotuna baye tolingaka lolenge nini bayebaka bolingo elakisami. Ndenge moko mpe, soki tolingi kolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe, tosengeli kososola lolenge nini Ye ayebi bolingo na biso. Likambo ya esengo, Ye amonisaki na polele ndenge mingi kati na makomi oyo tokoki kolakisa bolingo na biso mpo na Ye.
Olingaka Ngai Koleka Baoyo?
Na lisolo moko ya ntina kati ya Petelo mpe Nkolo mosekwi na Mbu ya Tiberias, toyekoli ndenge tokoki kolakisa bolingo na biso mpo na Nkolo.
“Yesu atunaki Simona Petelo, Simona, mwana mobali ya Yoane, olingaka ngai koleka baoyo? Azongiselaki ye, Iyo, Nkolo; oyebi malamu ete nalingaka yo.”
Motuna ya motuya na oyo esengami na Nkolo ezali “Olingaka ngai koleka ba oyo?” Tolakisaka bolingo na biso epayi ya Nkolo ntango totiaka Ye likolo ya “baoyo,” mpe “baoyo” ekoki kozala moto nyonso, mosala nyonso, to eloko nyonso oyo esalaka ete Ye azala te na nguya ya motuya mingi na bomoi na biso.
Ekozala ata moke te ntango ekoki na mokolo moko, poso moko, sanza moko, to mobu moko mpo na kosala nyonso oyo tolingi to tosengeli kokokisa. Eteni ya momekano ya kufa ezali ya kosalela likoki ya ntalo monene ya ntango mpo na oyo ezali na motuya mingi mpo na bolamu na biso ya seko mpe kotika biloko oyo ezali mpenza na motuya te.
Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Motuna mpo na moko na moko na biso … ezali se moko. … Ozali na bolingi kotika Nzambe azala ndakisa ya ntina koleka na kati ya bomoi na yo? Okopesa ndingisa na maloba na Ye, mitindo na Ye mpe mayokani na Ye epesa nguya na oyo ozali kosala mikolo nyonso? Okopesa ndingisa ete mongongo na Ye elonga koleka mosusu? Ozali na bolingi ya kotika oyo nyonso Ye azali kolinga yo osala yambo koleka makambo mosusu? Ozali na bolingi ya kotika bolingi na yo emelama kati na bolingi oyo ya Ye?” Tolakisaka kiboyekoli mpe bolingo na biso mpo na Nzambe ntango totiaka ye na esika ya liboso mpenza.
Batela Bampate na Ngai
Na molongo oyo elandi ya lisolo bobele moko oyo kati na Petelo mpe Mobikisi, toyekoli oyo etali lolenge Nkolo ayebaka ndenge na biso ya komonisa bolingo: “[Nkolo] atunaki ye mpo na mbala ya mibale, Simona, mwana mobali ya Yoane, olingaka ngai? Ye azongiselaki ye, Iyo, Nkolo; oyebi malamu ete nalingaka yo. Ye alobaki na ye, Batela bampate na ngai.”
Tolakisaka bolingo na biso mpo na Tata na Lola ntango tosalisaka, toyokaka, tolingaka, totombolaka, to tosalisak bana na Ye. Mosala yango ekoki kozala pete lokola na solo komona basusu na kozanga kosambisa. Na eteni ya 76 ya Malongi mpe Mayokani, tozali kozwa elembo ya ezaleli ya baye oyo bakozwa nkembo ya selestiale: “Bamonaka lokola bamonani, mpe bayebaka lokola bayebani.” Bamonaka basusu ndenge Nzambe amonaka bango, mpe Amonaka bango lolenge bakoki kokoma, elongo na likoki ya bonzambe ya nkembo.
Nsima ya kozonga ndako uta misio na ngai, nazwaki mosala ya kokata matiti oyo ngai mpe bandeko na ngai tobandaki ntango tozalaki bilenge. Nazalaki mpe na mosala mingi etali boyekoli na ngai na iniversite. Poso moko ya eleko ya prenta, mbula makasi mpe baekzame ya nsuka oyo ezalaki kopusana ekomisaki ngai na mosala mingi mpe nazalaki te kokoka kosala mosala ya bilanga na lopango.
Katikati ya poso likolo efungwamaki, mpe nabongisaki kokokisa mosala ya bilanga na lopango nsima ya kelasi. Kasi ntango nakomaki na ndako, motuka mpe biloko na ngai nyonso ya mosala elimwaki. Na kokamwa, nakendaki kotala mapango oyo etiamaki na pologalami; moko na moko na yango esilaki kokatama kitoko. Na lopango ya nsuka na pologalami, namonaki leki na ngai ya mobali kotambolaka nsima ya masini ya kokata matiti. Amonaki ngai, asekaki, mpe apesaki ngai mbote. Lokola natondisamaki na botondi, nayambaki ye mpe napesaki ye matondi. Mosala na ye ya ntina elendisaki mpenza bolingo mpe bosembo na ngai mpo na ye. Kosalisana moko na mosusu ezali lolenge ezanga mbeba oyo tolakisaka bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mwana na Ye ya bolingo.
Ndima Loboko na Ye kati na Makambo Nyonso
Tolakisaka lisusu bolingo na biso mpo na Nzambe na kozalaka na motema ya botondi. Nkolo alobaki, “Mpe ezali na eloko moko te oyo wapi moto atukaka Nzambe, … longola se na baoyo wana bandimaka te loboko na ye kati na makambo nyonso.” Tolakisaka bolingo na biso mpo na Nzambe na kondimaka Ye lokola liziba ya eloko nyonso ya malamu kati na bomoi na biso.
Na mikolo ya ebandeli ya kobanda kompanyi, moninga na ngai ya mosala mpe ngai tozalaki kobondela na molende nyonso yambo ya makita nyonso ya motuya, kosengaka lisungi ya Tata na Lola. Mbala na mbala, Nzambe ayanolaki mabondeli na biso, mpe makita na biso ezalaki koleka malamu. Nsima ya likita moko, moninga na ngai ya mosala atalisaki ete tozalaki na lombango na kosenga lisungi kasi malembe na kozongisa matondi. Kobanda ntango wana, tokomisaki yango momesano ya kosala mabondeli ya solo ya botondi, koyebaka loboko ya Nkolo kati na elonga na biso. Tolakisaka bolingo na biso mpo na Nzambe na “ezaleli ya botondi.”
Soki Bolingi Ngai, Bobatela Mitindo na Ngai
Lolenge mosusu tolakiselaka bolingo na biso mpo na Tata na Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo ezali ya kopona kotosa Bango. Mobikisi alobaki, “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai.” Botosi ya lolenge oyo ezalaka ya kokufa miso te mpe esengaka te tosala yango kasi ezali bomonisi ya bolingo ya solosolo mpe ya motema mobimba. Tata na Lola alingi ete biso tolinga kozala na botosi. Ndeko mwasi Tamara W. Runia abengaki yango “kolinga botosi.” Alobaki, “Atako tozali na botosi ebonga nie te naino, tozali komeka kolinga botosi sikawa, kopona kotikala, lisusu mpe lisusu, mpo ete tolingi Ye.”
Tata na Lola apesaki biso nguya ya kopona mpo na kofula biso tolinga kopona Ye. Mosala mpe nkembo na Ye ezali kaka te ya kokokisa bomoi na biso ya seko kasi esangisi lisusu elikya ete mposa na biso monene koleka ezali ya kozonga epayi na Ye. Nzokande, Ye akotindika biso na makasi te mpo na kotosa. Kati na loyembo “Know This, That Every Soul Is Free,” toyembaka:
Lokola bakambi ya misio, mwasi na ngai, Christina, mpe ngai tofulamaki epayi ya bamisionele mingi oyo baponaki kozala batosi, kaka te mpo ete ezalaki mobeko ya misio kasi mpo ete balingaki kolakisa bolingo na bango mpo na Nkolo na nzela ya kopona na bomikitisi nyonso na komonisa Ye.
Mpaka Dale G. Renlund alobaki: “Ntina ya Tata na biso ya Lola na kimoboti ezali te kozala na bana na Ye kosalaka oyo ezali sembo; yango ezali komona bana na Ye baponi kosala oyo ezali sembo mpe na nsukansuka kokoma lokola Ye. Soki Ye alingaki bobele ete biso tozala batosi, Alingaki kosalela bobele mbala moko mbano mpe bitumbu mpo na kopusa bizaleli na biso.” Tolakisaka bolingo na biso mpo na Nzambe ntango toponaka kotosa mpe kolanda Ye.
Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso bayebaka komonisa na biso ya bolingo mpo na Bango ntango totiaka Bango na esika ya liboso na bomoi na biso, tosalisanaka moko na mosusu, na botondi nyonso tondimaka lipamboli nyonso oyo eutaka epayi na Bango, mpe toponaka kotosa mpe kolanda Bango.
Natatoli ete moko na moko na biso azali ya solo mwana ya Nzambe mpe Ye alingaka biso malamu mpenza. Natatoli ete Ye azali na mposa makasi mpo na biso toyoka bolingo na Ye na banzela oyo tokoyeba mpe tokososola. Mpe ngambo ya kitoko ezali ete tokomona bolingo na Ye mpo na biso na mozindo koleka ntango tozali kolakisa bolingo na biso mpo na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.