Yesu Klisto mpe Ebandeli na Yo ya Sika
Biso nyonso tokoki kozala na ebandeli ya sika na nzela, mpe na ngolu ya, Yesu Klisto. Ata kutu Yo.
Esakola moke ya Makomi: Yesu Atamboli Bipai na Bipai Kosala Misala Malamu
Yesu “atamboli bipai na bipai kosala misala malamu.” Totangi maloba wana ya pete na buku ya Misala. Esakola moke ya kafumba nini oyo! Yesu solo atambolaki bipai na bipai kosala misala malamu! Azali ntina mpenza—mpe liziba—ya bolamu.” Apesaki bomoi na Ye ya nkufa mobimba na kosalaka malamu. Azali “naleki na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te, mpe aleki,” kozanga ndelo, na bolamu mpe awumelaka na boboto.”
Bomeki nyonso na kolimbola to kokomisa mokuse bolamu mpe boboto na Ye ekozala esakola moke. Solo, lokola Apostolo Yoane amekaki koloba, soki tosengelaki komeka kokoma bomonisi nyonso ya bolamu ya Mobikisi, “nabanzi ete mokili mobimba ekokaki te kozwa mikanda oyo esengelaki kokomama.”
Yesu Klisto Apesi Moko na moko na Biso Ebandeli ya Sika
Bandakisa ya ndenge tozangisi kufa kati makomi ya Yesu kotambolaka bipai na bipai “kosala mosala malamu” eboti bobangi mpe bokamwi, mingimingi ntango totalaka mpenza maye ekokaki kozala lokola kozala kuna, komona makamwisi, kozwa mateya na Ye, mpe koyeba bobikisi na Ye. Asololaki na bato bazanga ndako, Asimbaki babeli mpe bato ya petwa te, Amemaki libondi na bato ya kolemba, Ateyaki bosolo ya kokangola, mpe Abiangaki basumuki mpo na koyambola. Na moto moko na moko na maba, mobali akufa miso, mpe mwasi ya ekobo, na mokatatali, mokufi matoyi, mpe mokufi matoyi; na mama ya motema mpasi, tata mozangi kimya, mpe mwasi akufela mobali kosala matanga; na mokweisami, moyokisami nsoni, mpe moto ya mpasi; na mokufi na nzoto to mokufi na molimo, maye asalaki ezalaki kopesa ebandeli ya sika. Iyo, Esakola ya moke mosusu ya kokamwa!
Makambo nyonso Alobaki mpe asalaki epesaki ebandeli ya sika mpo na moko na moko ya baye Abikisaki, Apambolaki, Ateyaki, mpe Akangolaki na lisumu. Atikaki bango te, mpe solo Akotika yo te. Kanisa na ngonga oyo koyokaka maloba ya kopesa bomoi oyo nyonso ya Ye:
“Mwana, masumu na yo masili kolimbisama.”
“Damsel, nalobi na yo ete, Sekwa.”
“Mpe ngai nakweyisi yo te: kende, mpe kosumuka lisusu te.”
“Mwana mwasi, zala na bolendisi malamu: bondimi na yo ebikisi yo; kende na kimya.”
Maloba ya Mobikisi na bato na bato oyo ezalaki mokuse, kasi elongo na bango Alakisaki nguya ya kobongola ya Bomikabi mpe malongi na Ye mpo na kopesa bolimbisi, libiki, bozongisi, kimya, mpe bomoi ya seko. Mpe nsango ya nkembo ezali Apesaka ebandeli ya sika na yo mpe na ngai. Biso nyonso tokoki kozala na ebandeli ya sika na nzela, mpe na ngolu ya, Yesu Klisto. Ata kutu yo. Baebandeli ya sika ezali na katikati ya mwango ya Tata mpo na bana na Ye. Oyo ezali eklezia ya baebandeli ya sika! Oyo ezali eklezia ya baebandeli ya mobeso!
Oyo Ezali Eklezia ya Baebandeli ya Sika
Na libatisi ya na mai mpe Molimo, Biso “tobotami lisusu” mpe tokoki “kotambola na bomoi na sika.” Elikya boni ebandeli ya sika wana ememelaka moko oyo atamboli na nse ya bozito ya lisumu to anyokwami uta na bambano ya bomoi ya mobulu mpe bondeko mabe? Yesu asengelaki na bolimbisi ya lisumu na Yemei te to bobandi ya sika kati na bomoi, kasi Abatisamaki, kolakisaka biso polele nzela ememaka na ebandeli ya sika oyo asalaki mpo na moko na moko na biso.
Mpe ebandeli na biso ya sika esalemaka kaka mbala moko te. Tomesani kokanisa ete libatisi na biso ezali libaku na biso se moko ya ebandeli ya esika. Ezali te. Tozali kaka na litomba moko te. Bibandeli oyo ya sika ekoki kosalema mikolo nyonso! Mpe solo poso nyonso ntango toliaka elambo na bofungoli likabo ya Mobikisi na biso abonga nie, oyo akufaki mpo na kolakisa ntina ya kopesa biso baebandeli ya sika mingi bo elingi biso! Yesu apesaka biso baebandeli ya sika mingi bo elingi biso.
Na bomipesi mpe posepeli kati na bomoi ya sika kati na Klisto, tokoki kokoma “bozalisi ya sika,” makambo na liboso malimwi, tala makambo masika mayei. Kimya nini litomba oyo ya sika ememeli molimo oyo akobi komeka, na nzela ya bokobi kopona bondimeli nguya ya Mosikoli mpo na kobikisa mpe kozongisa, atako makama ya mpasi ya kobikaka na mokili ekweya? Mobikisi atikaki te na bomipesi na Ye ya kokokisa bolingi ya Tata mpe akokisaki etinda ya bomikabi na Ye ya bonzambe, kutu na nzela ya mpasi oyo esalaki Ye alenga, atanga makila na lidusu moko moko ya poso, amona mpasi na nzoto mpe molimo, mpe asambela ete nkeni ya bololo ekoka kolongolama. Lisusu, Azalaki kolakisa mpo na biso oyo boyiki mpiko ya bosembo na Nzambe ezali.
Na boyokani nyonso tosalaka mpe bokasi nyonso topesaka mpo na kobatela yango, tokoki kozwa “motema ya sika” mpe meko etonda koleka ya “molimo ya sika.” Moke na moke, soki tobengisi bolamu na Ye kati na mitema na biso mpe tobwaki mingongo ya bomikweisi na mito na biso, tokomi bato na Ye mpo ete tokomisi Ye solo Nzambe na biso. Yesu alingi mpenza kozala Mokonzi na biso mpe Mobateli Mpate na biso Nkolo ya Kimya na biso, mpe tokoki kopona kokomisa Ye bongo kati na mitema mpe makanisi na biso moko.
Ebandeli ya sika na Lolenge Tomonelaka Boyamboli
Boyamboli efungolaka ekuke na baebandeli na biso ya sika, Bobandi ya sika, mpe matomba ya mibale. Mateya ya bolingo ya Mokambi na biso Russel M. Nelson elimbolaki polele emoneli mabe etali likabo ya boyamboli ya bonzambe, mpe nakanisi ete tozali kobanda kosimba yango.
Ezali esengo ya koyoka bilenge na biso kolimbola maye boyamboli elingi koloba mpo na bango. Kala te nayokaki elenge mwasi koloba, na koseka moke na elongi na ye, “Ntango nakanisaka boyamboli, boyamboli ya mokolo na mokolo nayokaka esengo mpe elikya ya kokamwa. Nayokaka bolingo mpe bosepeli ya Tata na ngai na Lola mpe Mobikisi na ngai. Nabangaka te koya epayi ya Tata na Lola na losambo mpe kosenga Ye lisalisi na nini nyonso nazali kobunda na yango. Nayebi Bazali te komeka kokanga ngai nasala likambo ya mabe. Maboko na bango ezali ya kofungwama mpenza. Wana ezali boyamboli mpo na ngai,. Elenge Mwasi oyo asosoli ete na ngolu Yesu Klisto, akoki kozwa baebandeli ya sika!
Ebandeli ya Sika mpo na Moto Nyonso, Ngonga Nyonso
Ozali na mposa ya ebandeli ya sika? Okoki kosala bobandi ya sika, ata kutu yo? Bokanisa oyo etali bato Mobikisi asalisaki—bato Ateyaki, abikisaki, asekwisaki, alimbisaki, mpe azongisaki. Ezalaki Ye kopona bango uta na lisanga moko boye ya nkita to lisituale? Ezalaki Ye kokesenisa katikati ya bato ya sembo mpe basumuki? Ezalaki Ye kotala bato mpo ete basengelaki na mingi to balingami mingi? Soki moke te.
Basusu bayaki epayi na Ye na bondimi monene, kondimelaka nguya na Ye ya kobikisa—lokola mwasi na litanga ya makila, Kapiteni ya basoda mokama ya Loma oyo ya ye moombo azalaki kokufa, moto ya mbala, Yailo, mpe Batalimai, mokufi miso. Bango nyonso batiaki kondima na molongo, kolikyaka ete bolamu mpe nguya ya labi ya Nazalete ekobongola bomoi mpe baemoneli na bango. Mpe Asalaki. Atikaki bobikisi na Ye etiola.
Kasi Yesu apambolaki lisusu baoyo bazalaki na bondimi ya kotepatepa, lokola tata ya mwana ya malali oyo abelelaki, ntango mosusu ndenge ebelelaki yo, “Nkola, nazali kondima; sunga ngai na ntembe na ngai.” Mpe Ye kutu asopaki mawa likolo ya baoyo balukaka Ye ata moke te, lokola mwasi azwamaki na ekobo, mwasi akufela mobali ya Naina, ebonsono na etima ya Beteseda, mpe moto abotama mokufi miso. Eyoki yo Ye kotambolaka kosala bolamu na bomoi na yo kutu ntango ozalaki koluka Ye to kolanda Ye te?
Na moko na moko ya mitango ya makomi oyo, mpe na na na banso oyo bakoyoka mpe koyanola, Apesaki ebandeli ya sika, ata soki ezalaki bomoi ya sika elimbisami ya lisumu to bomoi ya sika ebikisami ya bokono, to bomoi ya esekwisami na liwa.
Oyo elingi koloba nini mpo na yo mpe mpo na ngai? Bolamu mpe boboto mpe malamu ya bolingo na Ye eyebi bandelo moko te. Baebandeli ya sika ezali motema ya mwango ya Tata! Bobandi ya sika ezali etinda ya Mwana! Bantongo ya sika, Mikapo ya sika, mpe mabaku ya sika ezali motema ya pete ya motema ya nsango malamu!
Yango wana, ezalaki yo mosika ntango molai mpenza uta na mayokani na yo mpo na kozwa ebandeli ya sika? Soki moke te. Esali yo oyo to wana mbala mingi mpenza mpo na kopesama libaku mosusu? Soki moke te. Ekei yo mosika uta na Klisto mpo ete Ye asalisa yo okoma lisolo ya sika kobongolaka nzela ya bomoi na yo kobanda lelo? Soki moke te. Monguna azali bobele moko oyo azwaka litomba uta na likanisi ete ozindi. Ozali te.
Mpe baebandeli ya sika ezali mpo na koleka kaka masumu mpe mabunga na biso. Na nzela ya bolamu mpe ngolu ya Mobikisi, tokoki kozwa bobandi ya sika oyo ebotaka mbongwana kati na ndenge ya kokanisa ya kala, mimesano mabe, bameka ya kanda, bizalela mabe, mayoki ya kozanga nguya, mpe makanisi ya kongangela basusu mpe koboya boyanoli na yo moko. Okoki solo kobongola makambo etali yomei oyo ezalaki kolembisa yo mibu mingi. Okoki kobanda lisusu na nzela ya nguya ya Nkolo ya baebandeli ya sika. Ye alembaka ata mokolo te kopesaka ebandeli ya sika epai na biso.
Na baoyo bazali kobunda na lisumu se moko to bokwei se moko mbala na mbala, bokoba. Atie ekanga nzela moko te liboso na bino. Atie liboke ya ndelo te na mabaku na bino ya mibale. Bokende liboso. Bokoba kobunda. Boluka lisungi uta na baye nzinganzinga na bino. Tia motema na ebandeli ya sika oyo ezali wana mpo na yo ntango nyonso otaleli Tata na yo na bosembo ya motema. Totika kosumuka ezanga bokebi, bozongeli ya bongo na bongo, mpe botomboki ya lofundo ya mabe, esika na yango. Osengeli te kozala oyo ozalaki liboso. Yamba bobandi na yo ya sika, libaku na yo—ya mbala ya mibale, to ya misato, to ya minei—to ya mbala ya mokama, apesami na yo na nzela ya makila ya bomikabi ya Yesu Klisto.
Nazali mpenza na botondi mpo na kobandela ya sika epesamelaki ngai mpe maye ekopesamela ngai sima.
Mpo na Kosukisa
Mobikisi na biso alobaki esakola moke moko ya nsuka, kozanga yango elingaki kozala na ntina moko te mpo na elikya to kosepela mokolo ya lelo. Nsima ya mpasi ya ayoakaki na Getesemane mpe na nsuka ya monyokoli na ekulusu, Alobaki na pete, “Esili.” Esakola ya Mesiya ekokisamaki, mpe bofuti mobimba ya nyongo mpe masumu mpe mpasi ya moto efutamaki. Asakolaki “esili” mbeka na Ye ezanga ndelo mpe ya seko. Kasi Bomikabi na Ye ekozala mobimba te kino Ye Yemei ayebaki bomoi ya sika na mokola ya misato, ebandeli ya sika yango lokola moto ya nkembo, mosekwi na nzela ya nguya ya Tata.
Zambi ntango nyonso asalaki makambo maye masepelisaki Tata na Ye, mpe zambi Ye “namipesaki na bolingi ya Tata na makambo nyonso,” yo mpe ngai tokoki kozwa na baebandeli ya sika. Yamba ebandeli na yo ya sika, kutu lelo, sikawa. Yesu Klisto azali Mobandisi mpe Mosukisi ya bondimi na biso, kokomaka mikapo ya sika mingi elongo na biso. Azali Ebandeli mpe Nsuka—nsuka ya nsoni mpe mpasi na biso mpe ebandeli ya bomoi ya sika kati na Ye, kotikaka biso totika makambo ya kala nsima mpe tobanda lisusu na ntongo ya sika, mbala nyonso oyo tosengeli na yango. Solo ya Ye “bolamu mpe boboto ekolanda [biso] mikolo nyonso ya [bomoi na biso].” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.