Likita Linene
Bosundola Ngolu na Bino Moko Te
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


10:43

Bosundola Ngolu na Bino Moko Te

Bozali na nzela mbala moko na lisungi mpe libiki ya bozambe atako mbeba na bino ya bomoto.

Molakisi moko ya eteyelo atangisaki mokolo moko ete balene—atako azali monene—akoki komela moto te mpo ete babalene bazalaka na nkingo moke. Elenge mwasi moko alobaki, “Kasi Yona amelamaki na balene.” Molakisi azongisaki, “Yango ekoki kosalema te.” Ndenge andimisamaki kaka te, elenge mwasi alobaki, “Malamu, ntango nakokoma na lola, nakotuna ye.” Molakisi asekaki, “Bongo soki Yona azalaki mosumuki mpe akendaki na ye lola te?” Elenge mwasi ayanolaki, “Wana nde okoki kotuna ye.”

Toseki, kasi tokoki te kozanga koyeba nguya ya lisolo ya Yona ezali kopesa na “moluki nyonso ya komikitisa ya esengo,” mingimingi baye bazalaka na mikakatano.

Nzambe atindaki Yona “akende na Nineve” mpo na kosakola boyamboli. Kasi Nineve ezalaki monguna ya nsomo ya Yisalaele—na yango Yona azwaki nzela ekesani mpenza, na masuwa, mpo na Talasisi. Lokola azalaki kopengwa na libiangi na ye, mopepe makasi ebandaki kobeta. Kozanga botosi na ye ezali ya solo ntina, Yona andimaki kobwakama na mayi. Yango ekitisaki mbu oyo ezalaki kotombwama, mpe ebekisaki bato mosusu oyo bazalaki na masuwa.

Na ndenge ya likamwisi, Yona akimaki liwa ntango “mbisi monene” oyo Nkolo “alengelaki” emela ye. Kasi ye awumelaki mikolo misato na esika wana ya molili mpe bosoto, kino babwakaki ye na mabele ekauka. Nsima, andimaki libiangi na ye ya kokende Nineve. Nzokande, ntango engumba eyambolaka mpe ebikisamaka na libebi, Yona ayoki mabe mpo na motema mawa oyo banguna na ye balakisaki. Nzambe na motema molayi nyonso ateyi Yona ete Alingaka mpe alukaka kobikisa bana na Ye nyonso.

Kobetaka libaku koleka mbala moko kati na mikumba na ye, Yona apesi litatoli ya nguya ete na bomoi ya kufa, “banso bazali bakwei.” Tolobelaka mingimingi te oyo etali litatoli ya Bokwei. Kasi kozalaka na bososoli ya malongi mpe litatoli ya molimo ya mpo na nini moko na moko na biso abundaka na mikakatano ya bizaleli malamu, ya nzoto, mpe ya makambo songolo pakala ezali lipamboli monene. Awa na mabele, matiti ya mabe ezali kokola, kutu ata mikuwa ya makasi ezali kobukana, mpe bato banso “bazangi nkembo ya Nzambe.” Kasi ezalela ya nkufa oyo—mbano ya maponi oyo esalemaki na Adama mpe Eva—ezali motuya mpo na bozali na biso: “ete [biso] tokoka kozala na esengo”! Ndenge baboti na biso ya yambo bayekolaki, bobele na komeka bololo mpe koyoka mpasi ya mokili ya kokweya oyo tokokaki kutu kokanisela, to mpe kosepela, esengo ya solo.

Litatoli ya Bokwei ezali kondima lisumu te to bozangi likebi na kotalela mikumba ya bomoi, oyo ntango nysono esengaka molende, ezaleli malamu, mpe bokokisi mikumba. Kasi esengeli kolembisa mawa na biso ntango makambo ezali kotambola mabe to tozali komona bozangi ya ezaleli malamu kati na moto ya libota, moninga, to mokambi. Mpe mingimingi makambo lokola oyo esalaka ete tokweya na boweleli ya kotyolana to nkanda oyo eyibaka bondimi na biso. Kasi litatoli ya makasi ya Bokwei ekoki kosalisa biso tozala mingi lokola Nzambe ndenge elimbolami epayi ya Yona, ete ezali, “na ngolu, kosilikaka noki te, mpe ya bosembo monene” epayi ya banso—bakisa bisomei—na ezalela na biso ya bozangi kokoka.

Koleka bobele komonisa bambuna mabe ya Bokwei, lisolo ya Yona ekambaka biso na nguya nyonso epayi na Ye oyo akoki kobikisa biso uta na bambuma mabe yango. Komipesa ya Yona ye moko mpo na kobikisa baninga na ye ya masuwa ezali mpenza lokola oyo ya Klisto. Mpe mbala misato ntango Yesu atambolaki mpo na elembo ya likamwisi ya bozambe na Ye, Ye agangi ete “ekopesama elembo moko te… kasi elembo ya Jonas [Yona],” kolobaka ete lolenge Yona afandaki “na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, lolenge moko mpe Mwana ya moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na nse ya mabele.” Lokola elilingi ya mbeka ya liwa ya bomipesi mpe Lisekwa ya nkembo ya Mobikisi, Yona akoki kozala na mbeba. Kasi yango nde esali litatoli mpe bomipesi na ye na Yesu Klisto, epesameli ye na libumu ya balene, ya makasi mpe ya kofula.

Kolela ya Yona ezali ya moto malamu na mpasi, oyo ye moko alukaki mpenza. Mpo na mosantu, ntango likama ewuti na momeseno, liloba, to ekateli ya mabe, atako makasini mosusu mingi ya malamu mpe bokasi ya solosolo ya bosembo, ekoki mingimingi kolembisa mpe kotika liyoki moko ete asundolami. Kasi atako soki ezali mpo na ntina nini to ndelo ya likama tozali kokutana na yango, ezali kaka na mabele ekauka mpo na elikya, libiki, mpe esengo. Boyoka Yona:

“Kati na mawa na ngai, nabelelaka Nkolo … ; nalelaki uta na libumu ya lifelo. …

“Mpo obwakaki ngai kati na mozindo, ya ebale monene; …

“[Mpe] namilobelaki, Obengani ngai mosika na miso na Yo; nzokande nazali kokoba kotalela tempelo na Yo ya bule.

“Mayi ya ebale monene ezingaki ngai, kino na molimo na ngai: mozindo ya mayi ezipaki ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani nzinganzinga ya moto na ngai.

“Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka; … kasi obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo. …

“Ntango molimo na ngai ezalaki kolemba … nakanisaki Nkolo: mpe libondeli na ngai ematak … kino na tempelo na Yo esantu.

“Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga ntina babungisaka ngolu na bango moko.

“Kasi ngai, na koyemba nzembo ya matondi; nako kokisa bilaka oyo napesaki. Lobiko ezali ya Nkolo.”

Atako ezalaki mibu mingi eleki, nakoki koyebisa bino mpenza esika nafandaki, mpe oyo nazalaki koyoka ntango, na mozindo ya libumu ya lifelo ya moto ye moko, namonaki makomi oyo. Mpo na moto nyonso oyo azali koyoka lokola nasalaki bongo—ete bosundolami, bozindisami na mozindo makasi ya mayi, na matiti ya ebale ezingami na moto na bino mpe bangomba ya mbu kokweyaka zingazinga na bino—libondeli na ngai, efulami na Yona, ezali: bosundola ngolu na bino moko te Bozali na nzela mbala moko na lisungi mpe libiki ya bozambe atako mbeba na bino ya bomoto. Ngolu ya kokamwa oyo ezali koya mpe na nzela ya Yesu Klisto. Mpo Ye ayebi mpe alingaka bino mpenza, Apesi yango na bino lokola ya “binomei,” kolakisaka ete ebongi nie mpo na bino, esalemi mpo na kokitisa mpasi na bino ya moto na moto mpe kobikisa mitungisi na bino songolo. Na yango, mpo na bolingo ya lola mpe ya bino, bopesa yango mokongo na bino te. Bondima yango. Bobanda na koboyaka koyoka “banzambe ya bikeko ezanga ntina” ya monguna, oyo akomeka bino na kokanisaka ete lisungi ezwami na kokendaka mosika na mikumba na bino ya molimo. Na esika na yango, bolanda nzela ya Yona moyamboli. Bobelela Nzambe. Bokende na tempelo. Bokangama na mayokani na bino. Bosalela Nkolo, Eklezia na Ye, mpe basusu na bomipesi mpe botondi.

Kosala makambo oyo ememaki limoni ya bolingo ya sikisiki ya boyokani ya Nzambe mpo na bino—oyo Biblia ya Baebele ebengaka hesed. Bokomona mpe koyoka nguya ya “motema mawa”, ya bosembo, ya mpiko, ezanga nsuka, mpe oyo ekoki kokomisa bino “na nguya… ya … bokangoli” uta na lisumu nyonso to motungisi nyonso. Mpasi makasi na ebandeli ekoki kozipa limoni oyo yambo. Kasi ntango bozali kokoba “kokokisa bilaka [bino] bopesaki,” limoni ya bongo ekongenga makasi na molimo na bino. Mpe elongo na limoni yango bokozwa kaka elikya mpe libiki te, kasi, na kokamwa nyonso, bokozwa esengo, kutu ata na kati ya komekama makasi na bino. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso malamu mpenza: “Ntango totie makanisi na bomoi likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo kotalaka te oyo ezali kosalama—to kosalama te—na bomoi na biso. Bosepeli eyaka uta mpe mpo na Ye.”

Ezali biso kokutana na likama ya mozindo, lokola ya Yona, to mikakatano ya mokolo nyonso ya mokili na biso ebonga nie te, libiangi ezali se moko: Bosundola ngolu na bino moko te. Botala elembo ya Yona, Klisto ya bomoi, Ye oyo asekwaki uta na lilita na Ye nsima ya mikolo misato ya kolonga nyonsompo na bino. Botyela Ye motema. Bondimela Ye. Bosalela Ye. Bosepela. Mpo kati na Ye, mpe bobele Ye moko, libiki ya kokoka mpe ya esengo ezwami uta na Bokwei, libiki oyo biso banso na lombango nyonso tosengeli mpe tozali koluka na komikitisa. Natatoli yango ezali ya solo. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Alma 27:18. Ezali bobele na milongo 48, mokanda ya Yona ezali na bansongo mingi, maloba ya ntoki ya bosolo mingi ya malongi mpe mateya ya molimo. Tala Ellis T. Rasmussen, A Latter-Day Saint Commentary on the Old Testament (1993), 653–57; D. Kelly Ogden and Andrew C. Skinner, Molongo na Molongo: Kondimana na Kala, vol. 2, 1 Bakonzi tii na Malaki (2013), 133–38. Ogden mpe Skinner balobi ete mpo na nguya ya mateya ya boyamboli kati na buku ya Yona, “etangami kati na bisambelelo na mikolo esantu ya mobu ya bato ya Yuda—Mokolo ya Bomikabi, to Yom Kippur—oyo lisusu ebeti nsente na boyamboli mpe bolimbisi.”

  2. Tala Ogden and Skinner, Molongo na Molongo: Kondimana na Kala, 134.

  3. Tala Yona 1–4.

  4. Alma 34:9.

  5. Baloma 3:23.

  6. Tala 2 Nefi 2:17–25.

  7. Yona 4:2.

  8. Tala Luka 11:29–30; tala lisusu Matai 12:39–41; 16:1–4.

  9. Yona 2 ezli litatoli ya nsima mpe loyembo ya matondi, mingi na yango elimbli losambo ya Yona uta na libumu ya mbisi.

  10. Na lolenge oyo, Yona amikesenisi na moto lokola Yobo, oyo azali komonana lokola moto asali likambo te kotalaka mpasi oyo eyeli ye. Nyonso mibale ezali masolo ya bondimi mpe mpiko liboso ya likama, kasi lisolo ya Yona ekoki kozala malamu mingi mpo na baye bazali koyoka ete misala na bango ezali liziba ya ndimbola ya mpasi na bango.

  11. Ezalaki ya solo mpo na Joseph Smith ntango motema na ye eyokaki mawa mpe bosepeli mpo na mosalisi na ye Martin Harris amemaki ye kokabola na Harris nkasa ya motuya ya yambo 116 ya bobongoli ya Buku ya Mormon oyo ebungisamaki nsima oyo esalaki Joseph alela, “Nyonso ebungisami.” (tala Saints: The Story of the Church of Jesus Christ in the Latter Days, vol. 1, The Standard of Truth, 1815–1846 [2018], 43–53).

  12. Yona 2:2–9; nsete ebakisami.

  13. 1 Nefi 1:20; tala Russell M. Nelson, “Boyokani ya Libela,” Liahona, Sanza ya zomi 2022, 6, 10. Liloba ya Baebele ya ebandeli mpo na ngolu na Yona 2 ezali hesed, oyo Mokambi Nelson alimboli ezali “lolenge ya bolingo ya sikisiki mpe ya ngolu” mpo na baye basali mayokani ya bule na Nzambe—ngolu oyo alimbolaki ezali ya sembo, ya kolemba te, mpe ezanga nsuka.

  14. Russell M. Nelson, “Esengo mpe Libiki ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 82.