Likita Linene
Bazali Basambisi na Bango Moko
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


14:26

Bazali Basambisi na Bango Moko

(Alma 41:7)

Soki tosaleli bondimi na Yesu Klisto, tosalaki mpe tobatelaki mayokani na Nzambe, mpe toyamboli masumu na biso, esambiselo ya bosambisi ekosepelisa.

Buku ya Mormon esukisi na mabiangisi ya Moroni ya “koya epayi ya Klisto,” “kobongisama nie na Ye,” “koboya [bisomei] bozangi bonzambe nyonso,” mpe “kolinga Nzambe na bokasi, mayele, mpe makasi [na biso] nyonso.” Na esengo, esakola ya nsuka ya lilako na ye ezali kosakola Lisekwa mpe Bosambisi ya Nsuka lokola.

“Nakeyi kala mingi te kopema na paladiso ya Nzambe, kino molimo mpe nzoto na ngai ekosangana lisusu, mpe kino nakomemama lokola molongi na nzela ya mopepe, mpo na kokutana na bino liboso ya esambiselo ya elengi ya Yehova monene, Mosambisi ya Seko ya bato nyonso ya bomoi mpe bakufi.”

Nakamwisami na esaleli ya Moroni ya liloba “elengi” mpo na kolimbola Bosambisi ya Nsuka. Baprofeta Mosusu ya Buku ya Mormon lokola balimboli esambiseli lokola “mokolo ya esengo” mpe moko oyo tosengeli “kotalela liboso [na ye] na miso ya bondimi.” Kasi mbala mingi ntango tolobelaka mokolo ya bosambisi, bandimbola ya baesakola mosusu eyaka na mayele, lokola “elindo ya soni mpe mabe,” “nsomo mpe bobangi,” mpe “mpasi ezangi nsuka.”

Nandimi ebandeli ya bokeseni oyo na lokota elakisi ete malongi ya Klisto epesaki makoki na Moroni mpe baprofeta mosusu bamona mokolo monene na emoneli ya esengo mpe elikya, na esika ya bobangi oyo bakebisaki baye bamilengelaki na molimo te. Nini Moroni asosolaki oyo bino mpe ngai tosengeli koyekola?

Nasambeli mpo na lisungi ya Molimo Mosantu ntango tozali kotala mwango ya Tata na Lola ya esengo mpe boboto, mosala ya bomikabi ya Mobikisi na mwango ya Tata , mpe lolenge nini biso “tokozala bayanoli mpo na masumu [na biso] moko na mokolo ya bosambisi.”

Mwango ya Esengo ya Tata

Ntina motuya ya mwango ya Tata ezali ya kopesa bana na Ye ya molimo mabaku ya kozwa nzoto ya mosuni, ya koyekola “malamu wuta na mabe” na nzela ya boyebi ya nkufa, ya kokola na molimo, mpe kokende liboso na seko.

Oyo Malongi mpe Mayokani biso lokola “bonsomi ya kopona” ezali ntina na mwango ya Nzambe mpo na kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya bana na Ye ya mibali mpe ya basi. Lingisi oyo ya ntina lisusu elimbolami na makomi lokola nguya ya boponi mpe bonsomi ya kopona mpe ya kosala.

Liloba “nguya ya boponi ya bomoto” eteyaka. Maloba oyo ekokani na liloba “ezaleli” esangisi “malamu,” “bosembo,” mpe “moto ya malamu.” Maloba oyo ekokani na liloba bonsomi ekoki kozala “bosali,” “molulu,” mpe “mosala.” Yango wana, “nguya ya boponi bomoto” ekoki kososolama lokola makoki mpe libaku malamu ya kopona mpe kosala mpo na bisomei na ndenge ya malamu, ya bosembo, ya bizaleli malamu, mpe ya lokumu.

Bikelamu ya Nzambe ezali na “biloko ya kosala mpe makambo oyo esengeli kosala.” Mpe, nguya ya boponi ya bomoto ebongisami na bonzambe “nguya ya mosala ya lipanda” oyo epesaka biso nguya lokola bana ya Nzambe mpo na kokoma basali ya kosala mpe kaka te biloko oyo esengeli kosalelama.

Mabele ekelamaki lokola esika wapi bana ya Tata na Lola bakokaki kolakisa mpo na komona soki “bakosala makambo nyonso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.” Ntina ya yambo ya Bokeli mpe ya bozali na biso ya nkufa ezali ya kopesa biso libaku ya kosala mpe kokoma oyo Nkolo abengisi biso tokoma.

Nkolo ateyaki Enosa:

“Tala oyo bazali bandeko na yo; bazali bato basalemi na maboko ma ngai moko, mpe napesaki bango boyebi na bango, na mokolo nakelaki bango; mpe na Elanga ya Edene, napesaki epayi ya moto nguya na ye ya kopona bolamu to mabe;

“Mpe epayi ya bandeko na yo nalobaki, mpe lisusu napesaki motindo, ete basengeli kolinga moko mpe mosusu, mpe ete basengeli kopona ngai, Tata na bango.”

Mikano ya ntina mpo na kosalela bonsomi ya kopona ezali ya kolingana mpe kopona Nzambe. Mpe mikano mibale oyo ekokani mpenza na mibeko ya minene ya yambo mpe ya mibale, kolinga Nzambe na motema, molimo, mpe mayele na biso nyonso, mpe kolinga moninga na biso lokola bisomei.

Tala ete topesameli etinda—topesami toli te, tolendisami te to toli te, kasi topesameli etinda—ya kosalela nguya na biso ya boponi mpo na kolingana, mpe kopona Nzambe. Tika napesa likanisi ete na makomi, liloba oyo ezali kobongola “bomoto” ezali mpenza liloba ya ezaleli te kasi ntango mosusu eyangeli ya bonzambe oyo etali lolenge nini nguya na biso ya boponi esengeli kosalelama.

Nzembo moko oyo eyebani malamu ezali na moto ya likambo “Choose the Right” mpo na ntina. Topambolami te na bonsomi bomoto mpo na kosala nyonso oyo tolingi ntango nyonso oyo tolingi. Kasi, engebene na mwango ya Tata, tozwaka bonsomi ya bomoto mpo na koluka mpe kosala engebene na bosolo ya seko. Lokola “basali mpo na [biso moko],” tosengeli komipesa na mitungisi na makambo malamu, “kosala makambo mingi na bolingi [na biso] moko, mpe kosala bosembo mingi.”

Ntina ya seko ya nguya ya boponi ya bomoto emonisamaki na lisolo ya makomi ya likita ya bomoi ya yambo ya nkufa. Lusifelo atombokelaki mwango ya Tata mpo na bana na Ye mpe alukaki kobebisa nguya ya kosala ya bosomi. Na ntina na yango, botombokeli ya zabulu ebetaki nsete kaka na libongisi ya nguya ya boponi ya bomoto.

Nzambe alimbolaki, “Yango wana, mpo ntina wana Satana atombokelaki ngai, mpe alukaki kobebisa nguya ya boponi ya moto, natindaki ete asengeli kobwakama na nse.”

Mwango ya moyimi ya monguna ezalaki ya kolongola na bana mibali mpe bana basi ya Nzambe makoki ya kokoma “basali mpo na bangomei” oyo bakokaki kosala na bosembo. Likanisi na Ye ezalaki ya kokomisa bana ya Tata na Lola biloko oyo ekokaki kosalelama kaka.

Kosala mpe Kokoma

Mokambi Dallin H. Oaks abeti nsete ete nsango malamu ya Yesu Klisto ebengisi biso toyeba eloko moko mpe tokoma eloko moko na nzela ya ngalasisi ya bosembo ya nguya ya boponi ya bomoto. Alobaki:

Alobaki: “makomi ya sika ya Biblia mingi elobeli bosambisi ya nsuka na yango bato nyonso bakopesamela mbano engebene na bikela to misala na bango to bamposa ya mitema na bango. Kasi makomi mosusu elobeli likambo oyo na kolobelaka bosambisi na biso engebene na ezalela tokokisi.

“Profeta Nephi alimboli Bosambisi ya Nsuka engebene ya maye tokomi: ‘Mpe soki misala na bango ezalaki mbindo basengeli mpenza kozala mbindo; mpe soki bazali mbindo esengeli mpenza ezala ete bakoka kofanda na bokonzi ya Nzambe’ [1 Nephi 15:33; nsete ebakisami]. Moroni asakolaki, ‘Ye oyo azali mbindo akotikala se mbindo; mpe ye oyo azali sembo akotikala se sembo [Mormon 9:14nsete ebakisami].”

Mokambi Oaks akobaki : “Uta na mateya ya boye tolobi ete Bosambisi ya Nsuka ezali kaka te kotalela motuya mobimba ya makambo malamu mpe ya mabe—oyo biso tosali. Ezali kondima ya mbuma ya nsuka ya misala mpe makanisi na biso—oyo biso tokomi.”

Bomikabi ya Mobikisi

Misala mpe bamposa na biso yango moko ekoki kobikisa biso te. “Nsima ya nyonso oyo tokoki kosala,” toyokani lisusu na Nzambe kaka na nzela ya boboto mpe mawa ezwami na nzela ya mbeka ya bomikabi ya Mobikisi oyo ezanga ndelo mpe ya seko.

Alma asakolaki, “Bobanda kondima na Mwana ya Nzambe, ete akoya kosikola bato na ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo ya komikaba mpo ya masumu na bango; mpe ete akolamuka lisusu uta na bakufi, oyo ekomema bosekwi esalema, ete bato nyonso bakotelema liboso na ye, mpo ya kosambisama na mokolo ya nsuka mpe ya bosambisi, engebene na misala na bango.”

Tondimelaka ete na nzela ya Bomikabi ya Klisto, bato nyonso bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli ya Nsango Malamu.” Tosengeli kozala na botondi ete masumu mpe misala na biso ya mabe ekozala litatoli te etelemela biso soki ya solo “tobotami lisusu,” kosalela bondimi na Mosikoli, koyambola na “motema bosembo” mpe “mokano ya solo,” mpe “kotia molende kino na nsuka.”

Bobangi Nzambe

Mingi na biso bakoki kokanisa ete ezalela na biso liboso ya mesa ya Mosambisi ya Seko ekokana na esaleli ya ndako ya bosambi ya mobeko ya mokili. Mosambisi moko akoyangela. Solo emonani na miso ekolakisama. Ekateli ekokatama. Mpe ntango mosusu tokomitungisa mpe kobanga kino tokoyoka mbano ya nsuka. Kasi nandimi ete emoneli ya boye ezali ya solo te.

Ekeseni kasi ekokani na bobangi ya mokili ya nkufa oyo mbala mingi tokutanaka na yango ezali oyo makomi elimboli lokolo “bobangi nzambe” to “bobangi Nkolo.” Kokesena na bobangi ya mokili oyo ebotaka makelele mpe bobangi, bobangi nzambe ebengisaka kimia, bondimi mpe elikia na bomoi na biso.

Bobangi ya bosembo efutaka liyoki ya mozindo ya limemya mpe ya bobangi mpo na Nkolo Yesu Klisto, botosi ya mitindo na Ye, mpe komona liboso na Bosambisi ya Nsuka mpe boyengebene kati ya loboko na Ye. Bobangi nzambe ekokola na bososoli malamu ya makambo ya bonzambe mpe etinda ya Mosikoli, bolingi ya kopesa bolingi na biso epayi ya bolingi na Ye, mpe boyebi ete mibali mpe basi nyonso bakozala bayanoli mpo na mposa, makanisi, maloba, mpe misala na bango moko ya nkufa na Mokolo ya Bosambisi.

Bobangi Nkolo ezali te bobangi ya kopusana liboso na Ye mpo na kosambisama. Kasi,ezali boluki na nsukansuka kondima na bisomei makambo lokola ezali mpe lokola ekozala solo.

Moto nyoso oyo azalaki na bomoi, oyo azali na bomoi sikawa, mpe oyo akozala na bomoi likolo ya mabele “akomemama mpo na kotelema liboso ya Nzambe, mpo na kosambisama na ye engebene na ye misala atako soki ezali malamu to soki ezali mabe.”

Soki mposa na biso azalaki mpo na bosembo mpe misala malamu—kolinga koloba tosalelaki bondimi na Yesu Klisto, tosalaki mpe tobatelaki mayokani, mpe toyambolaki masumu na biso—bongo kiti ya bosambisi ekozala elengi. Lokola Enosa asakolaki, “tokotelema liboso ya [Mosikoli]; nsima [biso] tokomona elongi na ye na esengo.” Mpe na mokolo ya nsuka “tokozwa mbano ya sembo.”

Na ngambo mosusu, soki bamposa na biso ezalaki ya mabe mpe misala na biso ya nkanda, boye esika ya bosambisi ekosala ete toyoka bobangi. Tokozala na “boyebi moko ya kobonga nie,” bokundoli moko ya polele,” mpe “boyebi elindo [na biso] moko.” “Tokomeka te kotala likolo epayi ya Nzambe na biso; mpe tokosepela malamu soki tokoki kotinda mabanga mpe bangomba mpo na kokweya likolo na biso, mpo na kobomba biso uta na miso na ye.” Mpe na mokolo ya nsuka “tokozwa mbano [na biso] ya mabe.”

Nsukansuka, tozali basambisi na biso moko. Moko te akolikya bayebisa biso epayi tokokende. Na miso ya Nkolo, tokoyeba oyo toponaki kokoma na nkufa mpe koyeba na bisomei epayi wapi tosengeli kozala na boseko.

Elaka mpe Litatoli

Koyeba ete Bosambisi ya Nsuka ekoki kozala elengi ezali lipamboli ebombobami kaka mpo na Moroni te.

Alma alimbolaki mapamboli elakama mpo na moyekoli nyonso amipesa ya Mobikisi. Alobaki:

“Ndimbola ya liloba bozongisi ezali komema na ezonga lisusu mabe mpo na oyo ezalaki mabe, to ya mosuni mpo na oyo ezalaki ya mosuni, to ya zabulu mpo na oyo ezalaki ya zabulu—malamu mpo na oyo ezali malamu; sembo mpo na oyo ezalaki sembo; alima mpo na oyo ezalaki alima; ya boboto mpo na oyo ezalaki ya boboto.

“Sala na alima, sambisa na bosembo, mpe sala bolamu ntango nyonso; mpe soki osali makambo oyo nyonso nde okozwa mbano na yo; iyo, okozala na boboto ezongisami epayi na yo lisusu; okozala na boyengebene ezongisami epayi na yo lisusu; okozala na bosambisi ya bosembo ezongisami epayi na yo lisusu; mpe okozala na bolamu bopesami mbano epayi na yo lisusu.”

Natatoli na esengo ete Yesu Klisto azali Mobikisi na biso na bomoi. Elaka ya Alma ezali ya solo mpe ezali mpo na bino mpe ngai—lelo, lobi, mpe mpo na boseko nyonso. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.