Kosepela Moto na Mosusu
Kaka Nkolo ayebi mobimba ndelo mpe makoki na biso ya moto na moto, mpe mpo na yango azali kaka Ye moko oyo abongi, mobimbampo na kosambisa bosali na biso.
Kala mingi te natangaki likambo moko oyo etutaki ngai makasi. Esalemaki na Championnat national ya USA Masters Track and Field—lisano mpo na mibange.
Moko ya bato oyo basanganaki na lisano ya metele 1 500 ezalaki Orville Rogers, ya mibu 100 Mokomi akomi:
“Ntango mondoki ya kobanda ebetaki, bapoti mbangu bakimaki, na Orville akendaki mbala moko na nsuka, epai wapi atikalaki ye moko mpo na lisano mobimba ya mbangu, kobalukaka malembe mpenza. [Ntango] mokimi ya nsuka nsima ya Orville asilisaki, Orville atikalaki naino na bobaluki mibale na ndambo. Batali pene 3 000 bafandaki kimia kotalaka ye kokima malembe—mobimba, na kimia, mpe na bozangi elikia.
“[Kasi] ntango abandaki bokimi na ye ya nsuka, ebele ya bato batelemaki, basepelaki mpe babetaki maboko. Na ntango akomaki na nsuka ya bokimi, bato ebele bagangaki. Na bokumisi ya esengo ya bankoto ya batali, Orville abengaki nguya na ye ya nsuka oyo abombaki. Ebele ya bato babandaki kosepela ntango akataki nzela ya nsuka mpe bato oyo bazalaki na lisano na ye bayambaki ye. Orville na komikitisa mpe na botondi apepaki loboko epai ya batali mpe alongwaki na nzela na baninga na ye ya sika.”
Oyo ezalaki bokimi ya Orville ya mbala mitano ya lisano, mpe na masano mosusu azwaki mpe kaka esika ya nsuka. Basusu kutu bamekaki kosambisa Orville, kolobaka ete na mibu na ye asengelaki kutu te kokima—ete azalaki na esika te na bokimi wana ete azalaki kokweya na lisano na ye ntango nyonso mpo na basusu.
Kasi atako azalaki ntango nyonso kosilisa na nsuka, Orville abukaki bolongi mitano ya mokili mobimba mokolo wana. Moto moko te oyo azalaki kotala ye andimaki ete ekokaki kosalema, kasi ezala batali to bato oyo bazalaki komekana na ye bazalaki bazuzi te. Orville abukaki ata mibeko moko te, mpe bakonzi bakitisaki ata mibeko moko te. Akimaki mbangu ndenge moko mpe akokisaki masengami ndenge moko na bato mosusu nyonso oyo bazalaki na lisano. Kasi ndelo na ye ya mpasi—na likambo etali mibu na ye mpe ndelo ya bokasi, yango nde esalaki batia ye na basani ya mibu 100 koleka. Mpe na lisano wana , abukaki ba lisano mitano ya mokili mobimba.
Kaka lokola Orville asengelaki mpiko mpo na kobima na nzela, bandeko na biso basi mpe mibali mosusu mpe basengelaka mpiko mpo na kobima na lisano ya bomoi, bayebaka ete bakoki kosambisama na bosembo te atako bazali kolanda Mobikisi mpe kokokisa boyokani na Ye.
Ata soki tofandi wapi na mokili, ata mibu na biso ezali nini, ezali mposa ya moboko ya bomoto mpo na banso kati na biso mpo na koyoka ete tolingi mpe tosengeli mpe ete bomoi na biso ezali na ntina mpe ntina, ata soki tozali na makambo to bandelo na biso.
Na nsuka ya lisano, ebele ya bato basepelaki na Orville, kopesaka ye makasi ya kokoba kokende liboso. Esalaki eloko te ete asilisa na suka. Mpo na bato oyo basanganaki mpe ebele ya bato, likambo yango ezalaki mingi koleka lisano. Na makambo mingi, oyo ezalaki ndakisa kitoko ya bolingo ya Mobikisi na misala. Ntango Orville asilisaki, basepelaki banso elongo.
Kaka lokola Championnat ya Masters, bapalwasi, bitape, mpe mabota na biso ekoki kozala bisika ya kosangana wapi tozali kosepela moko na mosusu—masanga ya mayokani oyo epelisami na bolingo ya Klisto mpo na moko na mosusu—kosalisaka moko na mosusu tolonga mikakatano nyonso oyo tokutanaka na yango, kopesanaka makasi mpe bolendisi kozanga kosambisana. Tozali na bosenga ya moko mpe mosusu. Bokasi ya bonzambe ewutaka na bomoko, mpe yango wana Satana azali na mokano ya kokabola biso.
Likambo ya mawa, mpo na basusu kati na biso, kokende ndakonzambe ekoki kozala mpasi na bantango mosusu mpo na bantina mingi ndenge na ndenge. Ekoki kozala moto oyo azali kobunda na mituna ya kondima to moto oyo azali na mitungisi to kotungisama na makanisi. Ekoki kozala moto moko ya mboka to mposo ekeseni to moto oyo azali na makambo ekeseni na bomoi to lolenge ya komona makambo oyo akoki koyoka ete ekokani te na basusu. Ekoki kutu kozala baboti oyo bazangi mpongi mpe balembi na mayoki ya bana mike to moto oyo azali monzemba na lisanga oyo etondi na babalani mpe mabota. Ekoki kozala moto oyo azali kosangisa mpiko ya kozonga nsima ya mibu ya kozala mosika to moto oyo azali na liyoki ya kotungisa ete bazali kaka komeka te mpe bakozala ya bango ata moke te.
Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Soki babalani na palwasi na bino bakabwani, to elenge misionele azongi ndako noki, to elenge na mibu bazomi ezali kotia ntembe na litatoli na ye, bazali na mposa ya bosambisi na bino te. Bazali na mposa ya koyoka bolingo ya solo ya Yesu Klisto oyo elakisami kati na [ya biso] maloba mpe misala na biso.”
Likambo oyo tokutanaki na yango na lingomba ezali mpo na kopesa boyokani ya ntina na Nkolo mpe moko na mosusu oyo esengeli mpenza mpo na bolamu na biso ya molimo mpe ya mayoki. Mokumba na biso ya mayokani tosalaka na Nzambe, kobanda na libatisi, ezali mokumba na biso ya kolingana pe kobatela moko na mosusur lokola bato ya libota ya Nzambe, bato ya nzoto ya Klisto, kaka te kotia elembo na esika moko na liste ya makambo ya kosala.
Bolingo mpe bobateli lokola Klisto ezali likolo mpe bosantu koleka. Bolingo ya peto ya Klisto ezali bolingani. Lokola Mokambi Nelson alobaki, “Bolingani etindaka biso ‘mpo na komema mikumba ya moko na mosusu’ [Mosiya 18:8] na esika tobakisa totondisaka mikumba likolo ya moko na mosusu.”
Mobikisi alobaki, “Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngaisoki bolingani moko mpe mosusu.” Mpe Mokambi Nelson abakisaki: “Bolingani ezali ezaleli ya ntina ya molandi ya solo ya Yesu Klisto.” Etinda ya Mobikisi ezali polele: Bayekoli ya solo batongaka, batombolaka, bapesaka makasi, bandimisaka, mpe bafulaka. … Ndenge tosololaka na basusu ezali mpenza na ntina”
Mateya ya Mobikisi na likambo oyo ezali pete mpenza. Elobami na bokuse na Mobeko ya Wolo: Sala na basusu ndenge olingi basusu basala yo. Mitia na esika ya mutu wana mpe salela ye ndenge okolinga yo basalela yo soki ozalaki na esika na bango.
Kosalela basusu lokola ye Klisto eleki mosika mabota mpe masanga na biso. Esangisaka bandeko na biso ya basi mpe mibali ya mangomba mosusu to ya kondima ata moke te. Esangisi bandeko na biso ya mibali mpe ya basi oyo bawuta na mikili mosusu mpe mimeseno mosusu, bakisa mpe baoyo bazali na makanisi ndenge na ndenge ya politiki. Tozali banso eteni ya libota ya Nzambe, mpe Alingaka banso ya bana na Ye. Azali na mposa ete bana na balinga Ye mpe lisusu basusu.
Bomoi ya Mobikisi ezalaki ndakisa ya bolingo, bosangisi mpe kotombola kutu basusu oyo batiolamaki na bato ete bazali bazanga ntina mpe peto te. Ya Ye ezali ndakisa oyo totindami kolanda. Tozali awa mpo na kotombola bizalela ya Kimoklisto mpe na nsuka tokoma lokola Mobikisi na biso. Ya Ye ezali te nsango malamu ya liste ya bobetisi, ezali nsango malamu ya kokoma—kokoma lokola Ye azali mpe kolinga lokola Ye alingaka. Alingaka biso tokoma bato ya Siona.
Ntango nazalaki na mibu na ngai ya 20, nalekisaki eleko ya mitungisi, mpe na ntango wana, emonisamaki lokola bozali ya Nzambe elongwaki na makanisi na ngai. Nakoki te bolimbola yango mobimba lokola koloba nazalaki ya kobunga mpenza. Ntango nazalaki mwana, nazalaki ntango nyonso koyeba Tata na ngai ya Lola azalaki wana mpe nakokaki kosolola na Ye. Kasi na ntango wana, nazalaki kutu koyeba te Nzambe azalaka. Nakutanaki naino na makambo ya lolenge wana te liboso na bomoi na ngai, emonanaki lokola moboko na ngai nyonso ekweisamaki.
Lokola eyano, ezalaki mpasi mpo na ngai nakende eklezia. Nakendeki, kasi ezalaki ndambo mpo ete nazalaki kobanga ete babenga ngai “molembu” to “moyengebene ya moke,” mpe nazalaki kobanga kokoma lokola moto oyo batindaki. Oyo nasengelaki mpenza na ntango wana ezalaki koyoka bolingo ya solo, bososoli, mpe lisungi uta na bato nzinganzinga na ngai, kasi kosambisama te.
Mabongisi mosusu nazalaki kobanga batu basala pona ngai, ngai moko nasala mpo na basusu ntango bazalaki koya eklezia mbala na mbala te. Likambo wana ya mpasi ya moto ye moko eteyaki ngai mwa mateya ya motuya na ntina ya mponanini totindamaki te kosambisana na bosembo te.
Ezali na baye kati na biso oyo bazali konyokwama na kimia, bazali kobanga ete basusu bayeba bitumba na bango oyo ebombami mpo bayebi te soki ezalela ekozala nini?
Bobele Nkolo ayebi mobimba ya ndelo ya mpasi ya solo oyo moko na moko na biso azali kokima mbangu na biso ya kopota mbangu ya bomoi—mikumba, mabaku, mpe mikakatano tokutanaka na yango oyo mbala mingi ekoki komonana te na basusu. Bobele Ye nde asosolaka malamu bampota oyo ebongolaka bomoi mpe mikakatano ya mpasi oyo basusu kati na biso bakoki kokutana na yango na kala oyo ezali naino kotungisa biso na ntango oyo.
Mbala mingi, tomisambisaka biso moko kokanisaka ete tosengeli kozala mosika mingi liboso na nzela. Kaka Nkolo ayebi mobimba ndelo mpe makoki na biso ya moto na moto, mpe mpo na yango azali kaka Ye moko oyo abongi, mobimba mpo na kosambisa bosali na biso.
Bandeko basi mpe mibali, tozala lokola batali wana na lisolo mpe tosepelisana na mobembo na biso ya boyekoli ata soki mabaku na biso ezali nini! Yango esengaka te ete tobuka mibeko to tokitisa mibeko. Ezali mpenza mobeko monene ya mibale—kolinga mozalani na biso lokola bisomei. Mpe lokola Mobikisi na biso alobaki, “Ntango bosali yango epai ya moko ya moke kati na oyo bosali yango epai ya ngai,” mpo bolamu to mpo na mabe. Ayebisaki biso lisusu, “Soki bozali moko te bozali ya ngai te.”
Ekozala na bantango na bomoi ya moko na moko na biso ntango tokozala bato oyo bazali na mposa ya lisalisi mpe bolendisi. Tika toyokana sikawa natngo nyonso tosala yango mpo na moko an moko. Soki tosali bongo, tokokola na bomoko mpe tokopesa nzela mpo Mobikisi abikisa mpe abongola biso.
Na bino oyo bozali komiyoka lokola bozali nsima na lisano ya bomoi, nabondeli bino bokoba liboso. Kaka Mobikisi nde akoki kosambisa mobimba esika nini osengeli kozala na esika oyo, mpe Ye azali na mawa mpe sembo. Ye azali Mosambisi Monene ya momekano ya mbangu ya bomoi mpe bobele moko oyo nde asosolaka mobimba ya ndelo ya mpasi oyo ozali kopota mbangu to kotambola to kokende. Akotalela bandelo na yo, makoki na yo, makambo oyo okutanaki na yango na bomoi, mpe mikumba ebombami oyo omemi, lokola mpe bamposa ya motema na yo. Yo okoki mpenza kozala ete ozali mpe kobuka masano ya mokili mobimba oyo ezali elilingi. Tosengi obungisa elikya te. Nasengi, bokoba kokende liboso! Tosengi botikala! Yo ozali na kati! Nkolo azali na mposa na bino, mpe tosengeli na yo!
Bipayi nionso ofandi na mokili, ata soki ekoki kozala mosika boni, tosengi yo omikundola ntango nyonso ete Tata na yo na Lola mpe Mobikisi na yo bayebi yo mobimba mpe balingaka yo na ndenge ya kokoka. Ozali ya kosanama te epai na bango. Balingi komema yo na ndako.
Batela liso na yo epai ya Mobikisi. Ye azali lingenda na yo ya ebende. Kotika Ye te. Natatoli ete Ye azali na bomoi mpe ete bokoki kotia motema na Ye. Natatoli mpe ete Azali kopesa bino esengo.
Tika biso banso tolanda ndakisa ya Mobikisi mpe tosepela moko na mosusu ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.