Likita Linene
Baprofeta ya Nzambe
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


11:8

Baprofeta ya Nzambe

Mpo koyoka mpe kotosamongongo ya profeta ezali motuya mpo na kokangamaka na makambo nyonso ya malamu kino Bozongi ya Mibale.

Bandeko balingami bilenge, oyo nde liyangani kitoko ya likita tozali na yango! Tosi toyoki Bapostolo misato ya bomoi ya Yesu Klisto. Oyo nde lipamboli monene! Mpe tokoyoka lisusu moko, Mpaka Henry B. Eyring. Feti ya molimo ezali kokoba!

Ntango nalobaki mobu eleki, toyekolaki lolenge nini kotelemela mokili oyo na nzela ya lisolo ya Dawidi na Goliata Bokundoli mabanga mitano ya Dawidi? Lelo, nazali kokabola lisolo moko ya Kondimana na Kala natangaka na mibu na bino oyo etikaki ngai kolingaka kozala lokola moto ya likambo na yango. Biblia eyebisi biso nkombo na ye te, boye tokobenga ye mwasi ya Shunem mpo ete yango ezali nkombo ya mboka na ye.

Mwasi azali kosala lipa mpo na profeta

Mokolo moko profeta Elisa azalaki koleka na Shunem, mpe totangi ete kuna “ezalaki na mwasi moko ya malamu; mpe [abengaki] ye mpo na kolia lipa. Mpe boye yango ekomaki, ete ntango nyonso azalaki koleka wana, azalaki kotelema … mpo na kolia lipa.” Nakanisi ete profeta Elisa asepelaki na libiangi ya kolia na ndako na ye! Ye asilaki kokende kuna mbala ebele, ntango mokolo moko mwasi wana ayebisaki mobali na ye, “Sikawa, nandimisami ete ye azali moto mosantu ya Nzambe

Mwasi alobi, “Sikawa, ngai nandimisami.” Yango emonani ete ye abengisaki Elisa na ndako na ye kozangaka koyeba ete ye azalaki profeta, ye azwaki litatoli na nzela ya Molimo Mosantu na koyokaka na bokebi nyonso na oyo Elisa alobaki mpe ateyaki. (Bokundola, ezalaki na bilili te na ntango wana! Boye ezalaki pasi koyeba profeta bobele na elongi na ye.)

Mwasi azali kolengela kisuku ya kolalela mpo na profeta

Kasi lisolo esuki wana te. Mokolo moko mwasi alobaki na mobali na ye, “Tika biso totonga ndako moko ya moke, mpe tika biso totia mbeto moko kuna, mpe mesa, mpe efandelo, mpe mwinda: bongo na ntango, ekoleka ye epayi na biso, ete akokota wana.”

Mwasi oyo ya bondimi azalaki na bolingi ya kotonga kisuku moko na ndako na ye boye ete profeta, kolekaka na mboka, akoka kozala na esika ya kofanda!

Lelo oyo, tokoki koyekola liteya moko ya nguya uta na boyebi oyo.

Nkolo atatolaki epayi ya mwasi ya Shunem ete Elisa azalaki profeta ya Nzambe, mpe asalaki na kofungolaka ndako na ye mpo na koyamba ye.

Biso mpe tokoki koyamba litatoli ya moto ye moko ya profeta ya Nzambe lelo oyo mpe kofongola mitema mpe makanisi na biso—ndako na biso—na nsango oyo Tata na biso ya Lola azali na yango mpo na biso na mikolo oyo ya nsuka.

Balingami bilenge, nabengisi bino bomituna motuna oyo: “Ezali ngai na litatoli ya moto yemoko ya profeta ya bomoi ya Nzambe?”

Tobanda na ebandeli.

Profeta azali nani? Profeta azali moto oyo Nzambe abengi mpo na koloba mpo na Ye. Ezali na baprofeta na mabele lelo, lokola kaka ezalaki na bantango ya kala.

Baprofeta bazali bamoni mpe babimisi. Yango elakisi ete bakoki komona oyo basusu bakoki komona te, mpe bakoki kosakola makambo ekoya. Bakoki lisusu kolengela biso mpo mikakatano. Baprofeta bazwaka mitindo mpe mabimisi uta na Nkolo. Eteni libua ya biteni ya bondimi elobeli bokobi ya bobimisi na mikolo ya nsuka oyo. Yango elobi, “Tondimaka oyo nyonso Nzambe asila kobimisa, nyonso oyo Azali kobimisa sikawa, mpe tondimaka ete Akobimisa lisusu makambo minene mpe ya motuya matali Bokonzi ya Nzambe.”

Mpaka Gary E. Stevenson alobaki, “Nkolo azali kokoba kobimisa mitindo mpe bosenga na Ye epayi ya baprofeta na Ye lelo oyo mpo ete Azali na mposa ya kokamba biso na esengo na bomoi oyo mpe na nkembo ya selesitiale na bomoi ekoya.”

Baprofeta batatolaka lisusu nsango malamu mpe bazali bateyi mpe batindami bafulami ya Nzambe epayi ya moto nyonso na mabele.

Mokambi moko na moko ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale azali profeta, momoni, mpe mobimisi. Kosalaka lokola lisanga moko na nse ya botambwisi ya Nkolo, bazali na nguya ya koloba mpe kolimbola malongo mpe kotia mikano ekoki mpo na Eklezia. Basambelaka mpe bakanisaka na bokebi nyonso mpo na mikano ya masanga makoki wana esengela kondimama na banso. Na lolenge oyo, Nkolo alaki biso ete mposa na Ye ekosalema.

Baprofeta batatolaka Klisto—bozali na Ye, mosala na Ye, mpe bonzambe na Ye.

Tika ete totanga mwa matatoli uta baprofeta kati na Buku ya Mormon.

Abinadi azali koloba

“Nzambe ye moko akokita na kati ya bana ya bato, mpe akosikola bato na ye.

“Mpe mpo akofanda kati na mosuni akobiangama Mwana ya Nzambe.”

Samuel Lamanite atatolaki lisusu ete Yesu Klisto azali “Mwana ya Nzambe Tata ya lola mpe ya mabele, Mokeli ya biloko nyonso uta na ebandeli.

Mpe profeta Moroni alobaki, “Namonaki Yesu, mpe asololaki na ngai miso na miso.”

Ntango Yesu atalaki na Banefite, moko ya makambo ya yambo Ye asalaki ezalaki kobenga Bapostolo Zomi na Mibale. Mpe Ye alobaki na bato, “Bapambolama soki bokosala keba na maloba ya bazomi na mibale baye naponaki.”

Sikawa, tika nakabola maloba moko mike mpo na baboti to bato mosusu ya libota oyo bazali kobokola bana. Nkolo Yemei ateyaki Adama mpe Ewa bosolo ya mwango ya lobiko. Mpe nsima ayebisaki bango, “Napesi bino motindo moko, ya koteya na polele biloko oyo na bana na bino.”

Elingi koloba nini koteya na polele ezali nini? Yango ezali koyekola bosolo ya nsango malamu, kozalaka na litatoli ya moto ye moko ya bango, mpe kokabolaka boyebi elongo na bana na biso. Ezali kotombola nyonso mibale ngonga ya mateya ya etiami na sembo mpe etiami mpenza te. Ezali kobikaka kolandisama na boyebi mpe litatoli wana.

Buku ya Mormon elobeli 2,060 bilenge babundi lokola “mibali ya solo mpe limemia, mpo bango bateyamaka kobatela mitindo ya Nzambe mpe kotambola alima liboso na Ye.” Bilenge mibali yango batosaki Helaman na bondimi nyonso, oyo na ntango yango azalaki mokambi na bango ya basoda mpe lisusu profeta na bango, mpe bango basosolaki ete bamama na bango batondisaki mitema na bango na solo mpe bondimi.

Baboti, kati na mokili oyo epai wapi ezali na mingongo mpe ntango mosusu molili ebele, Nzambe yemoko apesaki motindo epai na biso ya kobokola bana na biso kati na pole mpe bosolo. Apesi miso mokumba ya koteya bana na biso kobomba bosolo ya nsango malamu. Soki tokweyi na kosala yango, mokili ekosala yango te.

Baninga na ngai bilenge balingami, nazali na libiangi moko mpo na bino: Na mikolo ezali koya , nabengisi bino bofukama, bofongola mitema na bino, mpe bosambela na bondimi na Tata ya Lola, kosengaka Ye andimisa bino ete profeta na Ye mpe bapostolo baponami bazali mongongo ya Ye na mabele lelo oyo.

Mwasi ya Shunem ateyaki biso ete tokoki kozwa litatoli yango na nzela ya Molimo Mosantu. Nalaki bino ete ntango biso toyebi ete bango bazali bapakolami moko ya Nzambe, bomoi na biso ekozala pete atako mikakatano ezali kokoba, ntango biso tokotosa mingongo na bango na bosolo, bondimi, mpe elikya. Mpo koyoka mpe kotosa mongongo ya profeta ezali motuya mpo na kokangamaka na makambo nyonso ya malamu kino Bozongi ya Mibale ya Mobikisi na biso.

Mabe ya mokili ezaki kokola, kasi Eklezia ya Yesu Klisto mpe bokonzi na Ye ezali makasi libela na libela. Siona elatisami bilamba na yango ya kitoko, Mpe nguende ya Klisto ekokweya te. Nkolo azeli biso tozala makasi na matatoli na biso, totondisama na bondimi, mpe toyambola mokolo na mokolo. Mobikisi na biso, Yesu Klisto, atie motema na moko na moko na biso mpo na komema mosala na Ye.

Mbala moko, Profeta Joseph Smith alobaki, “Bandeko mibali, ekokende biso liboso te mpo na ntina moko monene mpenza? Nzokande, lokola etinda na ngai ezali mpenza mpo na bino, bilenge, nakolinga kosalela liloba bilenge na esika ya bandeko mibali Bobongisami?

“[Bilenge], ekokende biso liboso te po na ntina moko monene mpenza? Bokende liboso mpe bozonga nsima te. Boyika mpiko, [bilenge]; mpe bokoba, tii na elonga! Tika ete mitema na bino esepela, mpe ezala na esengo mpenza.

Nazali na botondi mpo na botambwisi mpe bokasi ya komipesa ya baprofeta ya bomoi. Napesi bino litatoli na ngai ya solo ete, babengami na Nzambe mpo na komema liboso, kotia, mpe kokamba bokonzi na Ye na mabele lelo oyo. Mpe ekozala ntango nyonso se bongo. Ekozala kaka Nkolo oyo aponaka basali na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. The Spanish translation of this phrase conveys the meaning “insistently invited.”

  2. 2 Bakonzi 4:8.

  3. 2 Bakonzi 4:9; nsete ebakisami.

  4. 2 Bakonzi 4:10.

  5. Tala Amosa 3:7.

  6. “Na nse ya botambwisi ya Nkolo, [Mokambi ya Eklezia] azali kokamba likolo ya Eklezia mpe se ye moko likolo ya mabele na likoki ya kosalela bafungola nionso ya bonganganzambe. Azali na nguya ya koyamba libimisi mpe koloba posa ya Nzambe mpo na Eklezia mobimba” (General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 5.1.1.1, Gospel Library).

  7. Tala Malongi mpe Mayokani 1:38.

  8. Gary E. Stevenson, “The Gospel of Jesus Christ: A Cheering Sound,” For the Strength of Youth, Sanza ya nsambo 2025, 5.

  9. Tala Matai 28:19–20; Malongi mpe Mayokani 21:1, 4–5; 107:35.

  10. “Apostolo moko na moko asimbi bafungola nyonso ya bokonzi mpe asalelaka bafungola yango na nse ya botambwisi ya Mokambi ya Eklezia” (Buku Monene, 5.1.1.1).

  11. Tala Buku Monene, 5.1.1.1.

  12. Tala Malongi mpe Mayokani 107:27–31.

  13. “Bapostolo Zomi na Mibale bazali ‘banzeneneke ya sikisiki’ ya nkombo ya Yesu Klisto. Batatolaka kibonzambe mpe bosolo ya Lisekwa na Ye na mokili mobimba” (Buku Monene, 5.1.1.1).

  14. Mosiya 15:1–2.

  15. Elamni 14:12.

  16. Etele 12:39.

  17. Kolobaka na ntina ya Buku ya Mornon Profeta Joseph Sith ateyaki: “buku oyo mpe ezali koyebisa biso ete Mobikisi na biso amimonisaki kati na mokili oyo ya Amerika nsia ya lisekwa na Ye, alonaki nsango malamu awa, kati na mobimba na yango, na bozwi na yango, mpe nguya, mpe na mapamboli na yango; ete bazalaki na bapostolo, baprofeta, babateli, balakisi mpe bapalanganisi ya nsango malamu; molongo moko, bonganganzambe moko, makuli moko, makabo, nguya, mpe mapamboli, lokola oyo bazalaki na yango na Mokili ya Est” (History, 1838–1856, volume C-1 [2 November 1838–31 July 1842], 1282, josephsmithpapers.org).

  18. 3 Nefi 12:1; nsete ebetami.

  19. Mose 6:58; nsete ebetami.

  20. Tala Malongi mpe Mayokani 68:25–28.

  21. “Tosengeli kosalela mabaku nyonso mpo na kokabola mateya ya Yesu Klisto elongo na bana. Bangonga ya mateya oyo ezali motuya mpe eyaka mbala moke ntango tokokanisaka yango na milende makasi ya banguna. Mpo na ngonga nyonso elekisami na kokotisa malongi na bomoi ya mwana, ezali na bangonga ebele ya botelemeli etondisami na bansango mpe bilili oyo ezali kotelemela to koboya babosolo wana ya kobikisa.

    “Basusu kati na bino bakoki komituna soki ekoki kozala malamu kopusa bana na bino penepene na bino na nzela ya lisano, to bokoki kotuna soki mwana akoki kobanda koyoka ete mateya na bino ezali kotungisa ye. Na esika na yango, tosengeli kokanisa, “Na ntango moke mpe mabaku mingi te, maloba nini ya malongi ekoki ngai kokabola oyo ekolendisa bango liboso ya mikakatano oyo ekoki koboyama te mpo na bondimi na bango?’ Maloba bokaboli lelo ekoki kozala oyo bakobomba kati na bango, mpe lelo ekoleka noki” (Henry B. Eyring, “Malongi ya Yesu Kllisto Ezali Pete,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2024, 97).

  22. Elenge nyonso azali motuya! (tala Alma 57:6, 20).

  23. Alma 53:21; nsete ebetami.

  24. Talae Alma 56:44–48; 57:21.

  25. Tala Malongi mpe Mayokani 93:40.

  26. Tozali lisusu na ndakisa ya baboti ya Enos, oyo akolisaki ye “na mateya mpe bolendisi ya Nkolo” (Enosa 1:1) mpe bateyaki ye na oyo etali “bomoi ya seko, mpe esengo ya bansantu” (Enosa 1:3). Enosa ayebaki ezaleli ya Nzambe (tala Enosa 1:6, 15, 17).

  27. Tala Malongi mpe Mayokani 21:1–2, 4–6. “Ntango mokili ezali kolobela ete nguya, bozwi, boyebani, mpe bosepeli ya mosuni ememaka esengo, ememaka te! Ekoki te! Maye esalaka ezali eloko moko te kasi mokitani ya mpamba mpo na ‘bozali ya bopambolami mpe bwa bosepeli bwa [baoyo] babateli mitindo mya Nzambe’ [Moziya 2:41].

    “Bosolo ezali ete ezali mpenza botau mingi mpo na koluka esengo epayi bokoki mokolo moko te kozwa yango! Nzokande, ntango omikangi yomei na Yesu Klisto mpe osali mosala ya molimo oyo esengeli mpo na kolonga mokili, Ye, mpe Ye moko, azali mpenza na nguya ya kotombola yo likolo ya bobendi ya mokili oyo.

    “Sikawa, lolenge nini kolonga mokili epambolaka bomoi na biso? Eyano ezali polele: Kokota na mokangano ya boyokani na Nzambe ekangisaka biso epai na Ye na lolenge oyo ekomisaka makambo nyonso etali bomoi pete koleka. Tosengi bososola ngai mabe te: Na lobaki te ete kosala mayokani ekomisaka bomoi pete. Ya solo, bozela botelemeli, mpamba te monguna alingi bino bomona nguya ya Yesu Klisto te. Kasi kozala na nse ya nkanga ya Mobikisi elingi koloba bozali koyingela na ya Ye nguya ya bokasi mpe bosikoli” (Russell M. Nelson, “Bolonga Mokili mpe Bozwa Bopemi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 97).

  28. Tala Etele 8:26; Moroni 7:19–25.

  29. Tala Yisaya 52:1.

  30. Tala Nzembo 125:1; Yisaya 28:16.

  31. Malongi mpe Mayokani 128:22; nsete ebetami.

  32. Tala Malongi mpe Mayokani 1:30.

  33. Tala Biteni ya Bondimi 1:5.