Likita Linene
Kotondisama na Ezaleli Malamu ya Boboto
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


15:8

Kotondisama na Ezaleli Malamu ya Boboto

Nazali kopesa libyangi ya sembo epai na biso banso mpo na kokembisa makanisi mpe mitema na biso na ezaleli malamu ya Klisto ya bopekisami.

Na sanza ya mitano 2021, ntango akendaki kotala mosala ya bozongisi sika ya Tempelo ya Salt Lake City, Mokambi Russell M. Nelson asepelaki na bokasi ya bapionie oyo, na makoki moke mpe bondimi makasi, batongaki ndako wana ya bule, oyo elongaki mimekano ya ntango. Nzokande, ye atalaki lisusu bambano ya libulu, oyo nsima ya ntango esalaki madusu kati na mabanga ya moboko ya ebandeli ya tempelo mpe yikiyiki na botongi, bilembo ya polele ya bosenga mpo na kokekimba ndako.

Mokambi Nelson libanda ya Tempelo ya Salt Lake

Profeta na biso ya bolingo nsima ateyaki biso ete bobele ndenge yango ezalaki ntina mpo na kozwa mikano ekoki mpo na kokembisa moboko ya tempelo mpo ete yango etelema ngwi na mikakatano ya mokili, biso mpe tosengeli tozwa mikano makasi koleka—ntango mosusu mikano oyo tozwa naino te—mpo na kokembisa moboko na biso moko ya molimo kati na Yesu Klisto. Na nsango ya motuya oyo, atikaki biso na mituna mibale ya bozindo mpo na makanisi ya moto yemoko: “Lolenge nini moboko na bino etelemi ngwi? Mpe bolendisi nini esengeli mpo na litatoli mpe bososoli na bino ya nsango malamu?”

Nsango malamu ya Yesu Klisto epesaka biso makoki efulama mpe ya malamu ya bonzambe mpo na kotelemela libulu ya molimo na milimo na biso, na nguya nyonso kokembisaka moboko na biso mpe kosalisaka biso toboya madusu kati na bondimi na biso mpe yikiyiki na litatoli mpe bososoli na biso ya bosolo ya bule ya nsango malamu. Mobeko moko eyebani mpenza mpo na bokokisi ya ntina oyo ezwami na eteni ya 12 ya Malongi mpe Mayokani, bobimisi moko oyo epesamaki na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Joseph Knight, moto moko ya sembo oyo alukaki na molende nyonso kososola bolingi ya Nkolo, mpo na mbongwana ya libanda kaka te, kasi mpo na kotelema ngwi na kiboyekoli na ye—makasi lokola makonzi ya lola. Nkolo asakolaki:

“Tala, nalobi epayi na yo, mpe lisusu epayi ya baoyo nyonso bazali na mposa ya komema liboso mpe kofandisa mosala oyo;

“Mpe moto moko te akoki kopesa lisalisi kati na mosala oyo longola se soki akozala na bomikitisi mpe soki atondi na bolingo, kozalaka na bondimi, elikya, mpe bolingani, kozalaka na montei na makambo nyonso, nyonso oyo mokumba mopesami epayi na ye.”

Botambwisi ya Mobikisi, oyo ekomami na kati ya emoniseli oyo ya bule, ezali kokundolisa biso ete boboto ezali bolendisi ya ntina koleka mpo na moboko etelema ngwi na Yesu Klisto. Yango ezali moko ya bolamu ya motuya, bobele te mpo na baoyo babiangemi mpo na kosala, kasi mpo na baye nyonso basalaki mayokani elongo na Nzambe mpo na kondima kolanda Ye na bosembo nyonso. Boboto ebongisaka mpe ekembisaka bizaleli mosusu ya Klisto elobamaki na bobimisi oyo: bomikitisi, bondimi, elikya, bolingani, mpe bolingo ya peto oyo ewuti epayi na Ye. Lisusu, kokolisaka boboto ezali lolenge moko ya ntina ya kobatela milimo na biso mosika na mabulu ya molimo ya mikemike esalemi na botindiki ya mokili oyo ekoki kolembisa moboko na biso kati na Yesu Klisto.

Katikati ya bizaleli malamu oyo ezingi bayekoli ya solo ya Klisto, boboto ezali lokola elilingi ya Mobiki Yemoko, mbuma moko ya moyuta ya Molimo, epesami na baye nyonso oyo bamifungoli bango moko na botindiki ya bonzambe. Yango ezali ezaleli malamu oyo ememaka boyokani na motema, kobongisa bamposa mpe mayoki na bwanya mpe kimia. Kati na makomi, boboto etalisami lokola eteni moko ya ntina mpo bokoli na mobembo na biso ya molimo, kokambaka biso liboso ya bokitisi motema, kibonzambe, mpe motema mawa, ntango tozali kopetola mayoki na biso, maloba na biso, mpe misala na biso.

Bayekoli ya Klisto oyo bazali kobunda mpo na kolona ezaleli ya Kimoklisto bakomaka mokemoke na komikitisa mpe batondisami na bolingo. Bokasi ya sikisiki ekolaka kati na bango, mpe bango bakomaka na makoki ya kolonga kanda na bango, mpe koleisa motema molai, mpe kotalaka basusu na bokangi motema, botosi, mpe lokumu, kutu ntango mipepe ya mikakatano ezali koya makasi. Babundaka te mpo na kosala makambo na kozanga botosi kasi baponaka kosala elongo na bwanya ya molimo, batambwisami na bosokemi mpe botindiki ya esengo ya Molimo Mosantu. Na lolenge oyo, bango bakomaka moke ya kolemba na libulu ya molimo mpo ete, lokola Apostolo Paulo ateyaki, bayebi ete bango bakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto, oyo apesi bango makasi kutu liboso ya bitumba oyo ekoki koningisa litatoli na bango mpo na Ye.

Na mokanda na ye epayi ya Tito, Paulo apesaki toli moko ya bule kolandisaka makoki ya baoyo balingi kolakisa Mobikisi mpe kosala bosenga na Ye elongo na bondimi mpe bomipesi. Ye alobaki bango basengeli kozala bayangeli na bapaya, balingi ya makambo malamu, sembo, mpe babulami—bizaleli oyo na polele elakisaka botindiki ya boboto.

Nzokande, Paulo akebisaki ete bango basengeli “kokangama na likambo te, kanda noki te, … [mpe] moto na bitumba te.” Bizaleli ya lolenge oyo ekeseni na likanisi ya Mobikisi mpe epekisaka bokoli ya solo ya molimo. Kati lolenge ya makomi, “kongama na likambo te” ezali moto moko oyo aboyi kosala lofundo mpe komipesa lokumu; “kanda noki te” ezali moto oyo aboyi lombango ya kibomoto mpo na kokoma motema mokuse mpe ya kotomboka; mpe “moto ya bitumba te” elakisi moto oyo abuaki bizaleli emonani malamu na miso ya bato kasi ezali malamu te, ya bitumba, mpe ya makasi na maloba, na nzoto, mpe na makanisi. Ntango tozali kobunda mpo na kobongolaka ezaleli na biso na bondimi mpe bomikitisi, tokoki kosimba na makasi mpenza na libanga makasi ya ngolu na Ye mpe kokoma peto mpe bisaleli epakolami na maboko na Ye ya bule.

Hannah mpe Samuel

Na kokanisaka na ntina ya kokolisa ezaleli ya boboto, nakanisaki maloba ya Anna, mama ya profeta Samuel—mwasi moko ya bondimi ya kokamwisa oyo, kutu nsima ya mitungisi minene, apesaki loyembo moko ya botondi epayi ya Nkolo. Ye alobaki, “Loba lisusu na ngambo; tika ete maloba na njombo ebima na monoko na bino te: mpo ete Nkolo azali Nzambe na boyebi, mpe epayi na ye misala ezali kopimama” Loyembo na ye ezali mingi koleka losambo—yango moko epesaki libiangi ya kosala na bomikitisi, komitala yo moko, mpe na bokebi. Anna akundolisi biso ete bokasi ya solo ya molimo elakisamaka te misala ya soni to maloba ya bosoto, kasi na bizaleli ya boboto, ya semba oyo ezali elongo na bwanya ya Nkolo.

Mbala mingi, mokili ekumisaka bizaleli ebotami na kobundisa, lofundo, motema moto moto, mpe kolekisa ndelo, mingimingi bizaleli ya lolenge wana esembolami na botindiki ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe mposa ya kondimama mpe koyebana. Ntango tobaloli kotala na biso mosika uta na bolamu ya boboto mpe tobwaki boboto mpe botindiki ebongi ya Molimo Mosantu na lolenge na biso ya kosala to koloba, tokweyaka na pete na motambo ya monguna, oyo ekambi biso na bozangi bokebi na koloba maloba mpe kozwa bizaleli tokoyoka mawa mpenza, ezalaka na boyokani na bato, na libota, to kutu na mayokani ya eklezia. Nsango malamu ya Yesu Klisto ebengisi biso tosalela ezaleli oyo mingimingi na bileko ya momekano, mpo yango ezali mingimingi na mabaku oyo ezaleli ya solo ya bato ebimisamaka. Lokola Martin Luther King Jr. alobaki mbala mosusu, “Motuya ya nsuka ya moto ezali te epayi wapi atelemi na bangonga ya libondisi mpe ya kimia, kasi epayi wapi atelemi na bangonga ya etumba mpe botelemeli.”

Lokola bato ya liyokani, tobiangamaki po na kobika na mitema na biso eboti misisa makasi na bilaka ya bule tosalaki epayi ya Nkolo, kolandaka na bokebi nyonso nzela Ye asalaki na nzela ya ndakisa na Ye ebongi nie. Na eyano, Ye alakaki, “Solo, solo nalobi epayi na bino, oyo ezali malongi na ngai, yonso oyo atongi likolo na yango atongi likolo ya libanga ya ngai, mpe bikuke ya lifelo bikolonga bango te.”

Mobikisi

Tika ete Motema Na Yo Etungisama Te, na Howard Lyon, ndingisa ya Havenlight

Mosala ya Mobikisi na mabele etiamaki sete na ezaleli ya boboto na ndenge nyonso ya ezaleli na Ye. Na nzela ya ndakisa na Ye ebongi mpenza, Ye ateyaki biso “tozala na bompikiliki kati ma mitungisi, kofinga te baoyo bafingaka.” Lokola Ye ateyaki ete tosengeli te komipesa na kanda mpo na koswana mpe boweli, Ye alobaki: “Bino bosengeli koyambola, mpe kokoma lokola mwana moke.” Ateyaki lisusu ete moto nyonso alingi koya epayi na Ye na ntina monene ya motema asengeli koyokana na baye oyo bazali na kanda to na baye oyo batelemeli bango. Elongo na ezaleli ya boboto mpe motema mawa, Ye andimisi biso ete ntango tonyokolami makasi, na kanda, bozangi limemia, to bokeseni, bosembo na Ye ekolongwa te uta na biso, mpe liyokani na Ye ya kimia ekoki kolongwa na bomoi na biso te.

Mwa mibu eleki, mwasi na ngai mpe ngai tozwaki libaku malamu ya kokende kotala bandimi moko ya bondimi ya Eklezia ya Mexico City. Mingi kati na bango, ntango mosusu bango moko to ntango mosusu na nzela ya balingami na bango, banyokwamaki na mikakatano ekoki kolimbolama te, sangisaka kokanga bato, bobomi, mpe makama mosusu ya pasi.

Ntango totalaki na bilongi ya Bansatu yango, tomonaki te kanda, mposa mabe, to mposa moko ya kozongisa mabe na mabe Na esika na yango, tomonaki bomikitisi moko ya kimia. Bilongi na bango, atako emonanaki ya mawa, engengaki na mposa ya solo ya libiki mpe libondisi. Atako mitema na bango ebukanaki na monyokoli, Basantu wana bakendaki liboso na bondimi na Yesu Klisto, koponaka kotika te mitungisi na bango ekoma bolembu na bondimi na bango to emema kotepatepa na litatoli na bango ya nsango malamu.

Na bosukisi ya bokutani oyo ya molimo, topesaki moko na moko na bango mbote. Mbote ya loboko moko na moko, koyambana moko na moko, ekomaki litatoli moko ya kimya oyo elongo na lisungi ya Nkolo, tokoki kopona mpo na koyanola na boboto na mitungisi mpe bitumba ya bomoi. Ndakisa na bango ya kimya mpe komitombola te esalaki lokola libiangi moko ya bolingo ya kotambola na nzela ya Mobikisi elongo na boboto na makambo nyonso. Toyokaki lokola tozalaki liboso ya banzelu.

Yesu Klisto, monene ya bato nyonso, anyokwamaki mpo na biso kino Ye abimaki makila na lidusu mokomoko, kasi Ye apesaki nzela ata mokolo moko te na kanda epelisa motema na Ye, atombokaki te, abundaki te, to maloba mabe ebimaki na bibebo na ye te, kutu ata katikati ya mpasi ya bongo. Elongo na boboto ebongi mpe na bosokemi ekoki, Ye akanisaki bobele mpo na Yemoko te kasi mpo na bana moko moko ya Nzambe—ya kala, ya sikawa, mpe ya lobi. Apostolo Petelo atatolaki na ntina ezaleli kitoko ya Klisto ntango alobaki: “Oyo, ntango atukamaki, azongisaki kotuka te; ntango ayokaki mpasi, akanelaki moto te; kasi amipesaki yemoko epayi na oyo akosambisaka na sembo.” Kutu atako na katikati na kokata motema na Ye, Klisto alakisaki boboto ebonga mpe ya bonzambe. Ye alobaki, “Atako bongo, nkembo ezala na Tata, nalyaki mpe nasilisaki bomilengeli na ngai na bana ya bato.”

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, napesi mbela moko ya motuya na bino nyonso ya kozinga makanisi mpe mitema na biso na ezaleli ya Kimoklisto ya boboto, lokola eyano ya bule na libiangi ya esakola ya Mokambi na biso ya ntalo Russell M. Nelson. Ntango tozali kobunda elongo na bondimi mpe molende mpo na kotonga boboto na misala mpe maloba na biso, natatoli ete tokokembisa mpe tokokanga bomoi na biso ba bokengi nyonso likolo ya moboko ya solo ya Mosikoli na biso.

Napesi litatoli na ngai ya bosolo ete bokobi ya ntango ya boboto epetolaka makanisi na biso mpe ebulisaka mitema na biso liboso ya Mobikisi, kopusaka biso malembemalembe pembeni na Ye mpe kolengela biso, na elikya mpe kimia, mpo na mokolo wana ya nkembo ntango tokokutana na Ye na Bozongi na Ye ya Mibale. Nakaboli maloba ya bule oyo na nkombo ya Mobikisi, Yesu Klisto, amene.