Likita Linene
Elubu ya Bansango Malamu
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


10:39

Elubu ya Bansango Malamu

Yango ekoki komonana ndenge nini kobakisa Yesu Klisto mingi na bomoi na yo?

Soki bosila kokende na etuka na ngai ya Louisiane, mbala mosusu bosila komeka bilei na biso ya elengi—dongodongo, jambalaya, liboke, mpe molongo ezali molayi.

Ntango na ntango, namiyokaka makasi mpo na kolamba moko ya bilubu yango ya elengi. Eteni ya nsuka oyo ekomama te na mikanda nsima ya kosangisa biloko nyonso mpe kolanda malako ya sikisiki ezali ya kosala bomeki elengi ya nsuka mpe kotala soki eloko moko ezangi. Na ntango wana, nakoki koyoka balambi minene ya Créole koloba na mongongo moke na matoyi na ngai, “Tia lisusu Tony’s kati na yango.” Tony’s ezali bikilakila ya makusa ya Créole oyo esalemi na Opelousas, Louisiane, mboka na ngai. Esalelamaka mbala mingi lokola “bikilakila ya kikuku” mpo na kobongisa bambeba esalemi ntango ya bolambi elubu.

Mwasi na ngai, Michelle, mpe ngai tozwaki lokumu ya kosala lokola bakambi ya misio na Lousiana. Tozalaki na momesano ya koteya bamisionele lolenge nini kolamba elubu na bango ya Jambalaya na butu na bango ya nsuka na ndako ya misio yambo bazonga na mabota na bango. Kobakisa na matatoli na bango mpo na nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto, bamisionele na biso bazalaki kotika misio na bokumisi bilubu.

Mwa basanza nsima, nazalaki kotala na Biblioteke ya Eklezia mpe namonaki mwa lien moko oyo ezalaki komema na bosangisi ya bavideo ya mikuse oyo ebengami Masolo ya Bozongisi elongo na Mokambi Russell M. Nelson. Moto ya likambo ya moko ya bavideo ya mikuse na molongo ebendaki bokebi na ngai mpe epesaki ngai koseka. Ebengami “Makomi Ezali Bilubu ya Nzambe mpo na Bomoi ya Esengo.” Nafinaki mbala moko na video wana ya miniti mibale mpe natalaki Mokambi Nelson koteya etuluku ya bana ya eteyelo ya bana nsango ya pete mpe ya nguya na ntina ya lolenge nini kozala na esengo. Atangisaki: “Soki ozali kosala gato, okolanda malako, boye te? Mpe okozwa eyano ya malamu ntango nyonso, bongo te?”

Akobaki, kolobaka na oyo etali kokoma na mibu 95 kala mingi te: “Bato balobaki, ‘olyaka nini? Sekele na yo ezali nini?’” Ayanolaki, “Sekele ebengami makomi. Bokoki kotanga yango mpe komeka yango.”

Malamu, kuna nde tozali na yango. Sekele ya pete mpo na bomoi ya esengo ezali kaka kolanda elubu ya Nzambe lolenge elimbolami na makomi. Nabengi yango “Elubu ya Bansango Malamu.”

Bosalaka nini soki likambo moko etamboli mabe ntango bozali kolanda elubu? Malamu, na kati ya Elubu ya Bansango Malamu ezali na “sekele ya bikilakila” mpo na ntango nyonso ti na nsuka bozwa yango . Eyano ezali ntango nyonso Yesu Klisto.

Nakanisi ete tozalaka biso nyonso na bantango oyo toyokaka ete bikilakila na biso ezali malamu mingi te, to tozali kobunda mpo na kolanda malako, to ntango mosusu tosali eloko moko na nzela te, to eloko moko ekomi oyo ezali koleka makoki na biso, bongo na bongo.

Nkisi na yango ezali nini? Ezali kaka kobakisa mingi oyo ezali kobengisa Yesu Klisto kati na bomoi na bino.

Bongo, ekoki komonana ndenge nini kobakisa Yesu Klisto mingi kati na bomoi na yo?

Ntango osalaka lokola mokambi ya misio, nazalaki na esengo ya kokutana na bamisionele na biso nsima ya poso sambo nyonso. Ntango ya likita ya moko na moko, ezalaki momesano mpo na bamisionele koluka toli mpo na koyeba ndenge ya kosala mpo na kobongisa boninga na bango.

Na libaku moko, misionele moko ayaki na bokutani ya lisolo na ye moko mpe afandaki. Nakokaki koloba, uta na elobeli ya nzoto na ye ete eloko moko ezalaki kopesa kilo na makanisi na ye. Natunaki,“Mpaka, olingi kosolola nini na ngai lelo?” Abandaki kolimbola mwa mikakatano oyo ye na moninga na ye bazalaki na yango mpe lolenge nini ezalaki kobebisa makoki na bango ya kosala mosala ya misionele. Na mpinzoli na miso na ye, atalaki ngai mpe atunaki ngai, “Mokambi, nasengeli kosala nini?”

Na ngonga wana, na bosolo nayebaki te lolenge nini koyanola. Nsima ya ntango moke, natunaki ye soki ezali malamu mpo na biso kofukama elongo na losambo mpo na koluka botambwisi uta na Molimo. Andimaki, mpe tofukamaki elongo mpe tosambelaki mpo na bofuli.

Nsima ya losambo, tokobaki kofukama mpo na ntango mokuse mpe nsima tofandaki na bakiti na biso etalana. Natunaki soki tokokaki kotanga makomi elongo. Ntango tofongoli makomi na biso, napemaki mpe nayebisaki ye,“ntango tozali kotanga makomi oyo, palado mituna yomei motuna oyo: Soki nazali kobika bizaleli oyo, ekobongisa boninga na ngai mpe mosala na biso ya misionele?”

Nsima tofongoli Moroni 7:45 mpe totangi na mongongo makasi: “Mpe bolingani ezali motema molai, mpe ezali boboto, eluli te, mpe evimbani te o lolendo, eluki ya yangomei te, etumolami mpambampamba te, ekanisi bobe te, mpe esepeli o bobe te kasi esepeli o bosolo, ekangi motema na makambo manso, endimi makambo manso, elikii makambo manso, etii molende o makambo manso.”

Mpe mpaka atalaki ngai na mpinoli na miso na ye mpe alobaki, “Iyo, Mokambi, kasi yango ezali mpasi na kosala” Nandimaki mpe nakundolisaki ye ete azali mwana mobali ya Nzambe na makoki ya bonzambe ya kosala yango elongo na Nkolo.

Na nsima tolobelaki na mokuse lisese ya ngomba oyo eteyamaki na Mpaka Clark G. Gilbert ya Bantuku Nsambo, oyo ekundolisaki biso ete tosengeli kobanda esika tozali mpe, elongo na Nkolo, kokende liboso mpe komata na nzela ya malamu. Nakokaki koloba ete azalaki komiyoka elekeli ye mpo na matambe ekoya, bongo natunaki ye alimbola bososoli na ye ya makomi: “Na biloko mike mpe ya pete makambo minene esalemaka.” Abandaki kolimbola likanisi ete na kosalaka biloko mike mpe ya pete, makambo minene ekoki kosalema. Nasengaki ye azwa mwa miniti ya kobimisa biloko mibale ya mike mpe ya pete akokaki kosala mpo na kozala na boboto na moninga na ye.

Nsima ya mwa ngonga, akabolaki makanisi na ye. Nsima nasengaki ye azwa mwa miniti ya kobimisa biloko mibale ya mike mpe ya pete akokaki kosala mpo na kozala na motema molayi na moninga na ye. Akabolaki mbala moko makanisi na ye mibale. Emonanaki polele ete azalaki komanyola likambo yango yambo ya masolo na biso. Nabengisaki ye amema mwa biloko wana epai ya Nzambe na losambo mpe kosenga bondimi, bokambami, mpe bofulami na lolenge nini kosalela mwango na ye na mokano ya solo. Andimaki. Ntango tosukisaki, nasengaki ye apesa ngai suka ya likambo oyo na mokanda na ye ya poso.

Na mwa baposo elandaki, nakokaki komona na mikanda na ye ya poso ete makambo yango ebongaki. Nakokaki komona kaka te kobonga kati na mikanda na ye ya poso, nakokaki lisusu komona yango na mikanda ya poso ya moninga na ye. Kati na masolo na biso ya moto moko moko ya poso elandaki, namonaki bokeseni ya butu na moyi na elongi mpe molimo na ye. Natunaki ye, “Bongo, Mpaka, ezali ya solo ete bolingani elembi mokolo moko te?’” Ayanolaki na koseka ya makasi, “Iyo, mpe na biloko mike mpe ya pete makambo minene esalemaka.”

Ntango bozali kolanda Bilubu ya Nsango Malamu mpo na bomoi ya esengo, bomikundola liteya ya Mokambi Russell M. Nelson: “Atako mituna to makambo nini bozali na yango, eyano ezwami ntango nyonso kati na bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto. Boyekola mingi etali Bomikabi na Ye, bolingo na Ye, boboto na Ye, malongi na Ye, mpe nsango malamu na Ye ezongisami ya kobikisa mpe kokoba liboso. Botalela Ye! Bolanda Ye!”

Ntango bosengeli “koyoka Ye” mpe koyeba lolenge ya kobengisa Yesu Klisto kati na bomoi na bino, bokanisa kolanda matambe Mokambi Nelson ateyaki na oyo etali bobimisi ya moto ye moko:

“Zwa esika ya kimya epai wapi okoki kokende mbala na mbala. Mikitisa yomei liboso ya Nzambe. Sopa motema na yo epai ya Tata na yo ya Lola. Kende epai na Ye mpo na biyano mpe libondisi.

“Sambela na nkombo ya Yesu Klisto na ntina ya makambo na yo, bobangi na yo, botau na yo—iyo, mposa na yo mpenza ya motema. Mpe nsima, yoka! Koma makanisi oyo eyei na makanisi na yo. Koma mayoki na yo mpe tia na misala oyo otindami kosala na lombango. Ntango ozali kobandela ndakisa oyo mokolo na mokolo, sanza na sanza, mobu nyonso, okokola na kati ya libongi ya emoniseli.’”

Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Ye “akokisi eleko nyonso tozali na yango mposa mpo na kozala na makoki ya kozonga epayi ya Tata [na biso] na Lola.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.