Talela Nzambe mpe Bika
Ezali bobele na kotalelaka Nzambe nde moto na moto, mabota, ata mpe bikolo ekoki kokola malamu.
Na sanza ya motoba eleki, likama moko ya makasi esalamaki na mboka Lesotho kati na Afrique du Sud. Bisi moko ya moke ememaki bilenge basi20 ya Etape ya Maputsoe ya Eklezia mpe bakambi na bango nsambo bazalaki kokende na engumba monene, Maseru, mpo na bokutani ya bilenge basi oyo bawuti na Disitiliki na bango. Ntango bazalaki kotambola na balabala ya nzela mibale na bangonga ya ntongo, motuka moko kowutaka na ngambo ya nzela bazalaki kokokende, komekaka na koleka motuka mosusu, eyaki na kati ya nzela oyo bisi ezwaki. Ezalaki lisusu na esika mpe ngonga te ya koboya botutani na mitu, mpe na mwa basekonde moke, mituka mibale etutanaki, elongwaki na nzela mpe epelaki moto.
Na nyonso, batu ntuku mitano bakufaki na likama, bakisa bilenge basi motoba, bakambi mibale ya Bilenge Basi, mpe mokambi ya etape mpe mwasi na ye. Bato oyo babikaki, bandeko ya libota, mpe baninga bamonisaki mayoki ndenge na ndenge, kobakisa nkanda, kotungisama na makanisi, ata mpe ya komiyoka ete bazali na ngambo. Atako mayoki wana mpe mituna oyo ezangi biyano, bamibondisaki moko na mosusu mpe babalukaki epayi ya Nzambe na nzela ya miziki ya bule, makomi, mpe losambo, epayi bazwi libondisi. Setso’ana Selebeli, elenge ya mibu zomi na nsambo oyo abikaki na likama, atatolaki ete, “Yesu Klisto alingaka biso mpe azali elongo na biso, atako mitema na biso ezali na mpasi.”
Elenge mwasi mpe mokambi moko oyo bakotaki lopitalo mpo na mpasi ya kozika bayekolaki Buku ya Mormon elongo. Moko alobaki, “Kala te, tozalaki kotanga na mokanda ya Moroni, mpe Moroni alobi mpenza maye nazali koyoka. Ntango alobi, ezali lokola azali koloba, ‘Osengeli koyekola maloba oyo ekomama mpo na kosalisa yo kolonga likambo oyo.’”
Na molulu ya matanga ya kosangisa mpo na baoyo bakufaki, Mpaka Siyabonga Mkhize Ntuku nsambo ya Etuka apesaki toli, “Tosengeli biso nyonso kobaluka epayi ya Nkolo na ntango oyo mpe kosenga ye kobondisa mitema na biso mpe … kokitisa mpasi oyo tozali koyoka.” Mokambi ya bilenge basi ya Leribe Etape ya pembeni, Mampho Makura, ateyaki, “Baluka epayi na Nkolo, mpe zwa makasi ya kondima bolingi na Ye. Yesu Klisto azali ‘mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na biso’ [Baebele 12:2]. Kotala epayi mosusu te, kasi talela Ye.”
Talela Ye. Maloba na ye ezali kozongelama na toli ya Alma epayi ya mwana na ye Helaman: “Tala ete otala na Nzambe mpe ozala na bomoi.” Alma alobelaki likambo oyo Lehi mpe bato na ye bakutanaki na yango na oyo etali Liahona lokola elilingi: “Ezali mpasi te kotia bokebi na liloba lya Klisto, oyo ekolakisa yo kotambola na alima na esengo ya seko, lokola esengelaki mpo na batata na biso kosala keba na kompa, oyo ekolakisa bango kotambola na nzela ya alima na mboka elakelama.” Alobaki, “Soki ba talaki ba kokaki kozala na bomoi. … Mpe soki, to … kotala to kozala na bomo libela.”
Na libaku mosusu, Alma apesaki ndakisa ya nyoka ya motako oyo Mose atelemisaki ntango banyoka ya moto banyokolaki Bayisalaele ya kala. Nkolo asengaki na Mose na kosala nyoka ya libende mpe na kotombola yango na nzete moko na elaka “ete moto na moto aswami, ekomona ye yango, akobika.” Alma alimbolaki ete elilingi ya motako ezalaki lolenge to elembo ya Klisto, oyo akotombolama likolo ya ekulusu. Mingi batalaki mpe babikaki, kasi basusu bazalaki, engebene na maloba ya Alma, “mitu makasi” ete balingaki te kotala, boye bawaki.
Alma atunaki:
“Soki bokokaki kobika bobele na kobwakaka miso na bino zingazinga ete bokoka kobikisama, elingaki bino te kotala noki, to bolingaki na esika wana koyeisa mitema na bino makasi na bozangi boyambi, mpe kozala goigoi, ete bolingaki te kobwaka miso na bino nzinganzinga, ete bokoka kowa?
“… Bongo bobwaka miso na bino nzinganzinga mpe bobanda kondima na Mwana ya Nzambe, ete akoya kosikola bato na ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo na komikaba mpo na masumu na bango; mpe ete akolamuka lisusu uta na bakufi, oyo ekomema bosekwi esalema, ete bato nyonso bakotelema liboso na ye, mpo na kosambisama na mokolo ya nsuka mpe ya bosambisi, engebene na misala na bango.”
Na bongo, toli ya “Talela Nzambe mpe zala na bomoi” ezali na ndimbola mpo na biso kaka mpo na libela te kasi ezali kosala bokeseni kati na ezaleli mpe na lolenge ya bomoi na biso ya kufa. Bomikundola maloba ya elenge mwasi Selebeli kati na Lesotho oyo elobelami—“Yesu Klisto alingaka biso mpe azali elongo na biso, atako mitema na biso ezali na mpasi.”
Ezali na lolenge ya mokili oyo ekweyi—esika zabolo azali kosilika mpe esika moto nyonso azali ya kobonga te—ete ekozala na bozangi esengo mpe mabe, mpasi mpe mawa, bozangi mpe bobungisi, minyoko mpe bozangi bosembo. Ezali kaka na kotalela epayi na Nzambe nde bato, mabota, mpe ata bamboka ekoki kokola. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Mpamba te Mobikisi, na nzela ya Bomikabi na Ye oyo ezangi nsuka, asikolaki moko na moko na biso uta na botau, mabunga, mpe masumu, mpe mpo ete Ye akutanaki na mpasi, mitungisi, mpe bozito nyonso oyo bozalaki na yango ata mokolo moko te [tala Alma 7:11–13], na nsima lokola boyamboli solo mpe boluki oyo ya Ye lisalisi, bokoki kotelema na mokili oyo ya mpasi.”
Elaka moko te ezongelami mbala mingi koleka kati na Buku ya Mormon koleka oyo: “Mbala nzike lokola ekobomba bino mitindo mya ngai bokozwa bomengo o mboka; kasi mbala nzike lokola ekobomba bino te mitindo mya ngai bokokatama mosika uta o miso mya ngai.” Makambo bato ya Buku ya Mormon bakutanaki na yango na boumeli ya bikeke mingi emonisi bosolo ya maloba oyo. “Bomengo” elingi koloba kozwa botambwisi mpe mapamboli ya lola kati na bomoi na bango. “Bomengo” elingi koloba kozwa bomengo ekoki oyo epesaki bango makoki ya kobala, kobokola mabota, mpe kosalisa bamposa ya basusu. “Bomengo” esangisaki likoki ya kolonga mikakatano mpe mimekano. Na nzela ya Nkolo, “makambo nyonso etambola[ki] elongo mpo na bolamu na [bango],” epetolaki yango, mpe ekomisaki boyokani na bango mozindo elongo na Ye.
Alma alimbolaki ete kotalela Nkolo ezali kobatela mitindo na Ye, kolela epayi na Ye mpo na lisungi na Ye, kosolola na Ye mpo na nyonso ozali kosala, mpe kotika motema na yo etondisama na matondi epayi na Ye butu mpe moi. Mitindo mpe toli ya Nzambe ezali na kati ya makomi mpe kati na maloba ya basali na Ye. Mabongisi mpe mikano oyo elobelami kati na “Libota: Esakola na Mokili” ezali ndakisa malamu. Mosusu ezali bokambi ezwami kati na buku ya moke Mpo na Bokasi ya Bilenge. Mama ya likambo ya bilenge mibali mpe bilenge basi mpo na mobu oyo ezali “Tala epayi na Klisto,” ezwami na lboyangeli ya libondisi ya Nkolo epayi ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery: “Talela ngai na makanisi nyonso; na ntembe te, bobangi te.” Mpo na Bokasi ya Bilenge elobelaka mingi ya mitindo mpe mibeko ya Nzambe mpe ateyaka ndenge ya kotalela Nkolo na kozwaka bikateli ya malamu. Ezali buku mokambi mpo na bilenge kaka te kasi mpo na biso nyonso.
Lokola ndakisa moko ya motuya makasi, Mpo na Bokasi ya Bilenge ezali na litambwisi ya ntina mingi na mokapo oyo ezali na moto ya likambo “Nzoto na Yo Ezali Bule.” Elobi ete: “Bosalela nzoto na bino—mpe banzoto ya basusu—na limemya. Ntango ozali kozwa ekateli na oyo etali bilamba, lolenge ya kokata suki, mpe bozali na yo, mituna yomei, ‘Ezali ngai kopesa lokumu na nzoto na ngai lokola likabo ya bule euti epayi na Nzambe?’”
Mpo na Bokasi ya Bilenge elobi lisusu: “batela bule bosangisi nzoto mpe bamposa ya bosangisi nzoto. Yango esengeli te ezala eloko ya liseki to ya lisano. Libanda ya libala kati na mwasi mpe mobali, ezali mabe kosimba biteni ya bule ya nzoto ya moto mosusu ata soki alati bilamba. Kati na maponi na yo na ntina ya oyo ozali kosala, kotala, kotanga, koyoka, kokanisa na ntina, kotya to kotinda na internet to telephone, boya eloko nyonso oyo ekoki kolamusa mposa ya kosangisa nzoto epayi na yo moko to bato mosusu.”.
Yango ezali kokundolisa biso likebisi Mokambi Nelson apesaki kala mingi te:
Makambo moke ekotungisa bomoi na yo mingi na lombango koleka kozanga botosi na mobeko oyo ya bonzambe [ya bopeto]. Mpo na baoyo basila kosala mayokani na Nzambe, bozangi bopeto ezali moko ya ndenge oyo ekobungisa litatoli na bino.
“… Nguya ya kokela bomoi ezali libaku moko ya bonzambe oyo Tata na Lola apesaka ndingisa na bana na Ye ya kufa basalela. Na yango, Nzambe alakisaki miango ya bokambi na polele mpo na bosaleli, ya nguya oyo ya bonzambe. Bosangisi nzoto esalemi bobele mpo na mobali mpe mwasi oyo babalani.
“Bato ebele na mokili bandimelaka yango te, kasi likanisi ya bato ezali alebitele ya bosolo te. Nkolo asakolaki ete moto moko te azanga bopeto ya nzoto akokota na bokonzi ya lola. Soki ozalaka peto na nzoto te, nasengi yo oyambola. Yaka epayi ya Klisto mpe ozwa elaka na Ye ya bolimbisi mobimba ntango oyamboli masumu na yo nyonso [tala Yisaya 1:16–18; Malongi mpe Mayokani 58:42–43].”
Kobosana te ete na Elaka ya Buku ya Mormon, bokeseni ya bomengo ezalaki bobola te—ezalaki kokatama uta na bozali ya Nkolo. Bozali na Ye elimboli bopusi ya Molimo na Ye kati na bomoi ya moto. Bango nyonso bazindisami na pole ya Klisto ntango bazali koya na mokili. Longola yango, bato mosusu basalaka libatisi mpe bazwaka likabo yango mpe babakisaki pole ya Molimo Mosantu. Apesaka makanisi mpe litambwisi, alendisaka mpe abongisaka makoki oyo moto abotama na yango, mpe asalisaka moto akima makambo mabe, azwa bikateli ya mabe, mpe azwa nsuka ya mabe.
Lokola yo, nayebi basusu oyo kala basepelaki na likabo ya Molimo Mosantu kasi oyo na nzela ya kozanga kobatela mitindo ya Nzambe babungisaki lipamboli yango. Moko oyo eyei na makanisi ezali oyo bozali na bango na lingomba elongolamaki mpo na kobuka mobeko. Alobaki ete yambo liyoki na ye ezalaki ya komiyoka abetaki libaku. Ayokaki ete asambisamaki na bakambi babonga nie te. Ayebaki ete etamboli na ye ezalaki mabe, kasi azalaki koluka komilongisa na ndenge azalaki kolobela mabunga ya basusu. Nsima ya mwa ngonga, akomaki komiyoka malamu na lolenge ya bomoi azalaki kobika libanda ya Eklezia kozanga mokumba ya mabiangi, mpe bilikya ya kokende na mayangani ya losambo mpe kosalisa basusu.
Yango ekobaki bongo mwa ntango, kasi akomaki koyoka mingimingi bozangi Molimo Mosantu—bozali ya Nzambe—kati na bomoi na ye. Na boyebi, ayebaki nini kozala mokolo na mokolo na libondisi, bokambi, mpe na elikya oyo euti na Molimo, mpe azangaki yango. Na nsuka, asalaki oyo esengelaki mpo na koyambola mpe atyaki bomoi na ye na alima mpo na libatisi ya mai mpe ya Molimo.
Emonani lokola ete ezali na nsuka te banzela ekeseni oyo bato bazwaka mpo na koluka ndimbola, esengo, mpe lisalisi. Mingi bazali “koluka mosika ya elembo.” Kasi tosengeli te kozala “bana mike, oyo baninganaka mpe bakotengatenga epayi na epayi na mipepe nyonso ya mateya [to mayele ya bato].” Na kotalelaka Nzambe tokoki kozwa kimia na mikakatano mpe bondimi na biso ekoki kokola atako na ntango ya ntembe mpe komekama ya molimo. Tokoki kozwa bokasi ntango tokutani na botelemeli mpe bozali na bino moko. Tokoki koyokanisa makanisi na biso na makambo oyo tozali komona lelo oyo. Solo, ezali na nzela mosusu te koleka oyo Nzambe Yemei apesaki,“Botalela ngai mpe bobika, bino ndelo nyonso na mokili: mpo ete ngai nazali Nzambe, mpe mosusu ajali te.”
Kotalela Nzambe elingi koloba te kaka kotya Ye na moko ya bisika yaa biso ya liboso; elingi koloba ete Azali esika na biso ya liboso na makambo nyonso. Nakundoli lisusu likama ya somo ya sanza ya motoba eleki na Lesotho. Uta mbeto na ye ya lopitalo, moko ya bakambi ya bilenge basi oyo abikaki na likama, oyo andimelaki Nzambe te yambo ya kokota Eklezia, alobaki ete mokano na ye ezali sikawa mpo na koyeba ntina oyo bomoi na ye ebikisamaki. “Kosalela Nzambe ntango nyonso ezali ndenge nakokoma na eyano, soki nakomi na eyano,” alobaki. “Nazalaki kokanisa ete nalingi Nzambe, kasi sikoyo nalingi Ye mpenza, mpenza, mpenza, mpenza. Sikoyo Azali na esika [ya yambo] ya makambo ya motuya kati na bomoi na ngai.”
Nazali na litatoli ya Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu oyo na bomoko ya kokoka ya Liloba, makanisi, ntina, mpe mosala, bazali Nzambe moko , epayi na oyo tokoki kolukela makambo nyonso ya malamu. Nazali na litatoli ya Bomikabi ya Yesu Klisto epayi wapi euti nguya ya kokokisa elaka ya kokamwisa, “Botalela ngai, mpe botia molende kino na nsuka, mpe bokozala na bomoi; mpo epayi ya ye oyo akotia molende kino na nsuka nakopesa bomoi ya seko.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.