Likita Linene
Buku ya Mormon—Libula Oyo Ekoki Komekolama Te na Mobembo na Biso
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


9:47

Buku ya Mormon—Libula Oyo Ekoki Komekolama Te na Mobembo na Biso

Ntango tozali kosala feti na maloba ya Klisto oyo ezwami na Buku ya Mormon, Molimo akosalisa biso tososola bosolo ya seko.

Okoki komikundola ntango oyo moto moko apesaki yo likabo oyo ebongolaki bomoi na yo? Na Sanza ya zomi oyo mibu 40 ekoki uta nazwaki moko ya likabo monene koleka na bomoi na ngai. Ntango nazalaki na sekondere, namonaki ete moko ya baninga na biso ya kelasi azalaki na mwinda oyo ekesenaki na mingi ya bilenge mosusu. Nazalaki kosepela kozala nzinganzinga na ye. Mokolo moko ayebisaki ngai ete azalaki mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Nsima apesaki ngai likabo: mokanda ya Buku ya Mormon. Abengisaki ngai natanga mwa nkasa mpe nakutana na baninga mibale oyo bakokaki koyanola na mituna na ngai. Baninga wana bazalaki bamisionele.

Ntango nakutanaki na bamisionele, bateyaki ngai malongi ya Klisto mpe babengisaki ngai nalanda libyangi ya profeta Moroni: “Ntango bokozwa makambo maye, nakolendisa bino ete bosenga Nzambe, Tata ya Seko, na nkombo ya Klisto, soki makambo maye mazali solo te; mpe soko bokosenga na motema sembo, na mokano ya solo, kozalaka na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo na yango epai na bino, na nguya ya Molimo Mosantu” (Moroni 10:4).

Natangaki nkasa mingi ya Buku ya Mormon mpe nasambelaki. Atako nazalaki naino na bososoli ya mozindo te ya makambo nyonso oyo bamisionele bazalaki koteya ngai, nayokaki na motema na ngai ete makambo oyo nazalaki kotanga ezalaki malamu mpe ewutaki epai ya Nzambe. Nazwaki bondimisi ya elaka ya Moroni: “Mpe na nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo ya makambo manso” (Moroni 10:5).

Nsima ya kobatisama na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, baninga mosusu bamekaki kondimisa ngai ete nazwaki mokano ya mabe. Kasi mbala nyonso oyo nakutanaki na ntembe to botemeli ya boye, nazwaki bondimisi ya sika na nzela ya koyekola makomi mpe kosambela mpo na kotikala sembo na mayokani oyo nakotaki elongo na Nzambe. Uta wana, Buku ya Mormon ezalaki moninga na ngai mpe ekomaki libula oyo ekoki komekolama te na mobembo na ngai ya nkufa.

Buku ya Mormon ezali bobele kaka buku te. Ezali litatoli mosusu ya Yesu Klisto, oyo ekomamaki na basakoli mingi ya kala na nzela ya molimo ya esakola mpe emoniseli.

Molulu ya ntina mingi oyo ekomami na Buku ya Mormon ezali mosala ya moto ye moko ya Nkolo Yesu Klisto kati na Banefi mwa moke nsima ya Lisekwa na Ye. Buku ya Mormon “ebimisaka malongi ya nsango malamu, elakisaka mwango ya lobiko, mpe eyebisaka bato nini basengeli kosala mpo na kozwa kimya na bomoi oyo mpe lobiko ya seko na bomoi oyo ekoya” (boyingisi na Buku ya Mormon).

Bobimisi ya yambo ya Buku ya Mormon: Litatoli mosusu ya Yesu Klisto ebimisamaki na mboka moke na etuka ya New York na sanza ya misato 1830. Profeta Joseph Smith azalaki na mibu 23 ntango asilisaki bobongoli ya buku na 1829. Abongolaki pene ya mobimba ya buku na bowumeli ya mikolo 75, mpe mosala ya bobimisi na mikanda ezwaki basanza nsambo.

Lelo, pene ya bamisionele ya ntango mobimba 80.000 na mikili koleka 150 bazali kosala lokola basali ya ofele, komipesa bomoi na bango mpo na kotatola ete Buku ya Mormon ezali ya solo mpe ete etatoli Yesu Klisto.

Na seminele oyo ewuti koleka kala te mpo na bakambi ya misio ya sika na sanza ya motoba ya mobu oyo, Mokambi Russell M. Nelson, akabolaki litatoli na ye ya nguya ya Buku ya Mormon: “Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe. Eteyi liteya ya Klisto mpe elimboli mingi na oyo etali Bomikabi ya Mobikisi koleka buku nyonso mosusu.”

Nalingi kopesa makanisi misato oyo ekoki kosalisa na mozindo mbongwana na biso na Yesu Klisto na nzela ya boyekoli ya Buku ya Mormon:

1. Bozala na molende mpe na bompikiliki ntango na bBoyekoli na Bino ya Mokolo.

Lokola Alma mpe bana mibali ya Mosiya, tosengeli “[koluka] makomi na bokebi, ete [tokoka] koyeba liloba ya Nzambe” mpe kolendisama na bosolo (Alma 17:2).

Ntango tozalaki kosala lokola bakambi ya misio na Mision ya Georgia Atlanta, mwasi na ngai mpe ngai tolendisaki misionele nyonso ayekola Buku ya Mormon ata baminiti 30 mokolo na mokolo. Komipesa wana ebakisaki kondima na biso mpe esalisaki biso tóluka mpe tózela makamwisi.

Ekoki kozala ete nsima ya misio tokoki kozala na ntango moko te mpo na boyekoli ya makomi ya mokolo na mokolo, kasi nalaki ete soki na motema moko otye na esika ya liboso koyekola Buku ya Mormon na losambo mokolo na mokolo, okozwa makasi ya molimo mingi mpe elikya na Nkolo mpe bilaka na Ye.

2. Bosala ete Boyekoli na Bino Ezala na Ntina Mingi na Kosalaka feti na Maloba ya Klisto.

Nefi ateyaki: “Tosala feti na maloba ya Klisto; mpo tala, maloba ma Klisto makoyebisa bino makambo manso maye bosengeli kosala” (2 Nefi 32:3).

Kosala feti elimboli mingi koleka bobele kotanga—elimboli kosepela, komanyola, mpe kosalela. Ntango bozali koyekola Buku ya Mormon, tala banzela ya kosala ete boyekoli na bino ya makomi ezala na ntina mingi. Ndakisa:

  • Bosalela lisalisi ya koyekola oyo ezali na pologalame ya Gospel Library.

  • Koyeba bosolo ya seko oyo esalisaka biso tososola mwango ya Nzambe mpe ememaka biso na kosala mpe kobatela mayokani elongo na Tata na biso ya Lola.

  • Tya langi na maloba ya ntina mpe koma makanisi na bino mpo na kobatela makambo oyo boyekoli na ntango ya boyekoli na bino.

Buku ya Mormon ezali na nguya ya koyanola na mituna ya milimo na biso. Lokola Nefi alobaki, “Namekaki makomi nyonso epai na biso, ete ekoka kozala mpo na litomba mpe boyekoli na biso” (1 Nefi 19:23).

Ntango tosalaka feti na maloba ya Klisto, bakofungola ekuke ya emoniseli mpe ekolakisa biso nini tosengeli kosala na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na bino mpo na kopusana penepene na Ye.

3. Bopesa Litatoli na Bino ya Bosolo ya Buku ya Mormon.

Kaka lokola Lehi azalaki na mposa ya kokabola mbuma ya nzete ya bomoi elongo na libota na ye (tala 1 Nefi 8:12), ntango tozwi litatoli ya Buku ya Mormon, tokolisi mposa ya kokabola esengo oyo ewutaka na koyeba nsango malamu ya Yesu Klisto.

Ndeko mwasi Benson na Buku ya Mormon

Moko ya bamisionele na biso, Ndeko mwasi Benson, oyo azali koyangana elongo na biso na likita oyo, ayebisaki ngai mposa na ye ya kosalisa elenge ndeko na ye ya mobali. Na ntango wana, azalaki komibongisa mpo na kokende na eteyelo monene mpe azalaki na ntembe te mpo na kosala misio. Nayokaki esengo ya kobengisa Ndeko mwasi Benson atanga Buku ya Mormon na bowumeli ya basanza minei ya yambo ya misio na ye, kotiaka bilembo na makomi oyo alingaka mingi, mpe nsima kotinda kopi wana epai ya ndeko na ye ya mobali.

Ndeko mwasi Benson atindaki kopi ya Buku ya Mormon oyo etiamaki elembo mpe abengisaki ndeko na ye ya mobali katanga yango butu nyonso. Na nsima akabolaki na ngai: “Yambo ya misio na ngai, ndeko na ngai ya mobali azalaki na ntembe soki alingaki kosala misio ya ntango mobimba. Malembe, na bowumeli ya ntango, ntango azalaki kotanga Buku ya Mormon, azwaki esengo oyo ezalaki kobakisama na bomoi na ye mpe abandaki kokanisa kosala misio.

Mpaka Benson

Poso mibale yambo Ndeko mwasi Benson asilisala misio na ye, ndeko na ye ya mobali afungolaki libiangi na ye ya misio. Azali sikawa kosala na Misio Tuxtla Gutierrez ya Mexique. Na nzela ya Buku ya Mormon, Mpaka Benson ayaki komona bomoi na ye na polele ya molimo, oyo ememaki ye na kosalela Nkolo mpe kondima ete makambo ekosimba. Ekateli wana ezalaki likamwisi—ekambamaki na nguya ya maloba ya Klisto.

Bandeko mibali mpe basi na ngai ya bolingo, nalendisi moko na moko na bino mpo na kokolisa boyekoli na bino ya Buku ya Mormon. Nayebi ntango tozali kosala feti na maloba ya Klisto oyo ezwami na Buku ya Mormon, Molimo akosalisa biso tososola bosolo ya seko mpe tokabola matatoli na biso na bondimi elongo na baoyo Nkolo abongisaki mpo na koyoka nsango na Ye. Nkolo alobaki, “Baponami na ngai bayokaka mongongo na ngai mpe bayeisaka mitema na bango makasi te” (Malongi mpe Mayokani 29:7). Natatoli ete baoyo bakosenga Nzambe na bondimi bakozwa litatoli ya bosolo mpe bonzambe ya Buku ya Mormon na nguya ya Molimo Mosantu. Na yango natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Litangi

  1. Russell M. Nelson, “Likita ya Elambo” (lisikulu epesamaki na seminele mpo na bakambi ya misio ya sika, mokolo ya 23 ya sanza ya motoba 2025).