Bilongi ya Koseka mpe Mitema ya Botondi
Bonene ya Basantu na Afrika ezali komonana polele ntango bazali kokutana na mikakatano ya bomoi mpe masengi ya Eklezia oyo ezali kokola.
Mwa koleka mibu moko eleki, nabimisamaki na mosala na ngai ya Bokambi ya Bantuku Nsambo, mbongwana esakolamaki awa na likita linene. Lokola nkombo na ngai etangamaki pene na oyo ya Bakambi Minene kokoma émérite, mingi bakanisaki ete nazalaki mpe kosilisa ntango na ngai ya mosala. Nsima ya likita linene, nazwaki ebele ya bansango ya botondi mpe botombeli malamu mpo na eteni na ngai ya nsima ya bomoi. Basusu kutu basengaki kosomba ndako na ngai na North Salt Lake. Ezalaki malamu komona bakozanga ngai mpe koyeba tokokutana na mokakatano te na koteka ndako na biso ntango nakosilisa. Kasi nazali naino wana te.
Mosala na ngai ya sika ememaki ngai na Monica na Afrika kitoko, epayi wapi Eklezia ezali kokola. Ezalaki lipamboli kosala na Basantu ya sembo na Etuka Afrika ya Sudi mpe komona bolingo ya Nkolo mpo na bango. Ezali kofula komona mabota ya ekolo nyonso, na kati na bango bandimi ya Eklezia, mingi ya boyokani mpe mayele, bazali kopesa ntango mpe makabo na bango mpo na kosalela basusu.
Na ngonga kaka wana, engebene na bofuluki ya bato na etuka yango, mingi ya bozwi moke bazali kokota na Eklezia mpe kobongola bomoi na bango na mapamboli ya bosembo ya moko na zomi mpe mabaku ya mateya oyo Eklezia ezali kopesa. Bapologalame lokola Succeed in School, EnglishConnect, BYU–Pathway, mpe Perpetual Education Fund ezali kopambola bomoi mingi, mingimingi oyo ya nkola oyo ezali komata.
Mokambi James E. Faust alobaki mokolo moko, “Elobami ete eklezia oyo ebendaka mpenza bato minene te kasi mbala mingi ekomisaka bato mpamba minene.”
Bonene ya Basantu na Afrika ezali komonana polele ntango bazali kokutana na mikakatano ya bomoi mpe masengi ya Eklezia oyo ezali kokola. Ntango nyonso bazali kopusana na yango na makanisi ya malamu. Bazali komonisa malamu mateya oyo eyebani mingi oyo euti na Mokambi Russell M. Nelson:
“Esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso mpe nyonso etali kotiaka makanisi na bomoi na biso.
Ntango likebi ya bomoi na biso ezali likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo na kozangaka kotala oyo ezali kosalema—to kosalema te—na bomoi na biso.”
Bazwaka esengo atako bazali na mikakatano. Bayekoli ete boyokani na Mobikisi epesaka biso makoki ya kokutana na mikakatano na bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi.
Tika nabakisa mwa makambo na ngai na Basantu ya sembo oyo balakisaka etinda oyo, kobanda na Mozambique.
Mozambique
Mwa basanza eleki, nakambaki likita ya likonzi ya mobu moko oyo ezalaki na bitape 10. Bato koleka 2 000 batondisaki ndako ya losambo ya moke mpe baema misato na libanda. Mokambi ya likonzi azali na mibu 31, mwasi na ye 26, mpe bazali na bana mibale ya mike. Akambaka likonzi oyo ezali kokola mpe ya mikakatano na komilelalela te—kaka elongi ya koseka mpe motema ya botondi.
Na lisolo na nkoko, nayebaki ete mwasi na ye abelaki makasi mpe azalaki kobunda mpo na kobatela ye. Nsima ya kosolola na mokambi ya likonzi, topesaki ye lipamboli ya bonganganzambe. Natunaki nkoko mapamboli motango boni apesaka.
“Mwambe kino zomi,” alobaki.
Natunaki, “Na sanza moko?”
Ayanolaki ete, “Na poso moko!” Napesaki ye toli ete kosala mingi boye na suka ya poso nyonso ezalaki malamu te.
“Mpaka Godoy,” alobaki, “bazali kokoba koya poso na poso, bakisa bandimi ya sika mpe bilenge mingi.” Lisusu, komilelalela te—kaka elongi ya koseka mpe motema ya botondi.
Nsima ya likita ya likonzi ya mokolo ya motoba na mpokwa, na nzela ya hôtel, namonaki bato bazali kosomba bilei pembeni ya nzela na butu. Natunaki sofele na ngai mpo na nini bazalaki kosala yango na molili na esika ya moi. Ayanolaki ete bazalaki kosala mosala na moi mpo na kozala na mbongo ya kosala yango na nsima.
“Oh, bazalaki kosala lelo mpo na kolya lobi,” Nalobaki.
Kasi asembolaki ngai ete: “Te, bazalaki kosala na moi mpo na kolya na butu ya lelo.” Namonaki elikia bandimi na biso bakokaki kozala malamu koleka, kasi andimisaki ete mingi bazali na mikakatano moko na eteni wana ya mboka. Na ntongo elandaki, na likita ya mokolo ya eyenga, nasimbamaki koleka na bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi na bango.
Zambie
Na nzela ya likita ya eyenga, mokambi ya likonzi mpe ngai tomonaki babalani kotambolaka na nzela na bebe moko mpe bana mibale ya mike ya mibali. Totelemaki mpo na kokumba bango. Bakamwaki mpe basepelaki mingi. Ntango natunaki mosika boni ezali kotambola kino na palwase, tata ayanolaki ete ekoki kozwa miniti 45 kino ngonga moko, engebene na etamboleli ya bana. Basalaka mobembo oyo kokende mpe kozonga mikolo nyonso ya eyenga na komilelalela te—kaka bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi.
Malawi
Mokolo ya eyenga moko liboso ya likita ya likonzi, nakendeki kotala bitape mibale kosalelaka biteyelo ya leta lokola ndako ya mayangani. Nakamwaki mingi na ezalela ya komikitisa mpe ya bosawa ya bandako yango, oyo ezalaki ata na mwa biloko ya ntina te. Ntango nakutanaki na mwa bandimi, nalingaki kosenga bolimbisi mpo na ndako ya makita ya malonga te, kasi basepelaki kozala pene mpo na kosangana, koboya kotambola molai. Lisusu, komilelalela ezalaki te—kaka bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi.
Zimbabwe
Nsima ya mokolo ya motoba ya mateya, mokambi ya likonzi amemaki ngai na milulu ya Eyenga na ndako ya kofutela. Bato 240 bayanganaki. Nsima episikopo alakisaki bandimi 10 ya sika oyo babatisamaki na poso wana. Lisanga yango epalanganaki na kisuku mibale ya mikemike, bandimi mosusu mpe bafandaki na libanda, bazalaki kotala likita na maninisa mpe bikuke. Komilelalela ezalaki te—kaka bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi.
Lesotho
Nakendeki kotala mboka kitoko ya moke, eyebani lokola “bokonzi ya ngomba,” mpo na komona disitiliki ya Eklezia komilengelaka mpo na kokoma likonzi. Nsima ya mayangani ya mokolo ya motoba, nakendeki na milulu ya eyenga na etape moko na ndako ya kofutela. Kisuku ya elambo etondaki, na bato batelemaki libanda ya ekuke mpo na kosangana. Nayebisaki mokambi ya etape ete asengelaki na ndako ya monene koleka. Nakokamwa na ngai, ayebisaki ngai ete oyo ezalaki kaka ndambo ya bandimi na ye. Ndambo mosusu ekozala na likita ya mibale ya elambo nsima ya ngonga ya mibale. Lisusu, komilelalela ezalaki te—kaka bilongi ya koseka mpe mitema ya botondi.
Nazongaki na Lesotho mpo na likama ya nzela oyo ebomaki bilenge mingi na biso, oyo Mpaka D. Todd Christofferson alobelaki na ebandeli. Ntango nakendaki kotala mabota mpe bakambi, nazalaki kozela mopepe ya mawa. Na esika na yango, nakutanaki na Basantu ya makasi mpe ya koyika mpiko oyo bazalaki kolonga ezalela na lolenge ya kotombola.
Mpho Anicia Nku, mibu 14, oyo abikaki na likama na elilingi oyo, alakisaki yango malamu na maloba na ye moko: “Tia motema na Yesu mpe talela Ye, mpo na nzela na Ye okozwa kimia, mpe Ye akosalisa yo na mosala ya libiki.”
Wana ezali mwa bandakisa ya komona ezaleli na bango ya malamu mpo batindi bomoi na bango na nsango malamu ya Yesu Klisto. Bayebi esika nini kozwa lisalisi mpe elikia.
Nguya ya Kobikisa ya Mobikisi
Mpo na nini Mobikisi akoki kosunga bango mpe biso na makambo nyonso ya bomoi na biso? Eyano ekoki kozwama na makomi:
“Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe mitungisi mpe masenginia ya ndenge na ndenge. …
“Akokamata likolo na ye bokono na bango, ete misopo na ye ekoka kotonda na boboto, … ete akoka koyeba boni kosalisa bato na ye engebene na bokono na bango.”
Ntango Mpaka Bednar ateyaki, ezali na mpasi ya nzoto te, mpasi, to botau oyo tokutanaka na yango oyo Mobikisi ayebi te. “Yo na ngai na ntango ya bolembu tokoki kolela, ‘Moto moko te azali kososola [oyo nazali koleka na yango]. …’Moto moko te, mbala mosusu, ayebi. Kasi Mwana ya Nzambe ayebi mpe asosoli malamu mpenza.” Mpe mpo na nini? Mpo ete “Ayokaki mpe amemaki mikumba na biso yambo tosala yango.”
Nasukisi na litatoli na ngai ya maloba ya Klisto oyo ezwami na Matai 11:
“Boya liboso na ngai, bino banso bozali ya kolemba na mosala mpe bokumbi bozito, mpe nakopesa bino bopemi.
“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola epayi na ngai; mpo nazali moto ya boboto mpe motema kokita: mpe bokozwa bopemi ya milimo na bino.
“Mpo ete ekanganeli na ngai ezali botau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”
Kaka lokola Basantu wana na Afrika, nayebi elaka oyo ezali ya solo. Ezali solo kuna, mpe ezali solo bisika nyonso. Na yango natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.