Likita Linene
Mpe Sikawa Namoni
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


17:24

Mpe Sikawa Namoni

Bopusi ya Buku ya Mormon kati na bomoi na ngai ezali likamwisi moke te koleka oyo ezalaki bosaleli ya nsoi mpe bosoto oyo etiamaki na miso ya mokufi miso.

Na bolingo ya solo, tozali biso nyonso kosangisa mingongo na lokumu mokambi Oaks apesaki mokambi Russell M. Nelson na liwa na ye. Mpe ezali na bolingo se moko, mpe mawa makasi, nde tozali koyoka makambo ya mpasi esalamaki kala mingi te na Michigan mpe mikolo nyonso na mokilo mobimba. Toyoki makambo yango na bolingo mpe kondima na Nkolo Yesu Klisto.

Mokapo ya libwa ya Yoane elobeli lisolo ya Yesu mpe bayekoli na Ye kolekaka pembeni ya mosengi moko, mokufi miso uta mbotama. Yango ememaki bayekoli na kotuna Yesu mituna mingi ya mindondo na oyo etali mateya ya mangomba na ntina ya euteli mpe lolenge bokono ekomelaki moto oyo. Nkolo azongisaki na kosalaka eloko moko ya pete koleka mpe ya kokamwisa makasi. Abwakaki nsoi na mabele mpe asalaki potopoto moke na nsoi. Nsima apakolaki yango na miso ya moto yango, ayebisaki ye asukola na liziba ya Siloama. Mokufi miso asalaki nyonso wana na botosi mpe “ayaki [bongo] komona,” makomi elobi. Lolenge nini bilembeteli ezali na ntina, na bokeseni ya mposa to ntembe to mpe na mabe oyo ezali kotemela solo.

Malamu, na kobangakai ete likamwisi yango ekoka lisusu kobakisama na kobangisa oyo Yesu azalaki komonisa yambo mpo na bokonzi na bango, bayini ya Mobikisi batelemelaki moto momoni ya sika mpe balobaki na nkanda, “Toyebi ete [Yesu] azali mosumuki.” Moto yango ayokaki mpo na mwa ntango, nsima alobaki, “Soki azali mosumuki, nayebi te: [kasi] likambo moko [nazali] koyeba, ete, nzokande nazalaki mokufi miso, sikawa namoni.”

Yesu apesaki ndimbola ya yambo na bosangisi oyo, koyebisa bayekoli na Ye ete nyonso oyo esalemaki “ete misala ya Nzambe emonisama.” Bomikundola ete mbala mibale kati na lisolo oyo mosala ya Mobikisi elobamaki lokola “bopakoli mafuta” miso ya mokufi miso, mosala moko ekokisamaki na bosukoli. Ndimbola oyo ya “misala ya Nzambe [ezalaki] komonisama” elakisi kotiaka bokuli moko na esika.

Bosolo mosusu oyo emonani na miso awa ezali bisaleli ya Mokeli ya lola mpe ya mabele mpe nyonso na yango oyo asaleli mpo na kopesa likamwisi yango: nsoi mpe mabele! Bikilakila moko ya momesano mpenza te etalisi ete Nzambe akoki kopambola biso na lolenge nyonso ye Aponi. Lokola Namana atelemelaki ebale ya Yaladene to bana mosusu ya Yisalaele baboyaka kotala nyoka ya motako, boniboni ezali pete mpo na biso koboya nzela ya lisiko na biso mpo ete bisaleli kolakisaka yango emonani ete ezali pete na ndenge ya soni.

Kasi tozali komikundola uta na Buku ya Mormon ete makambo mosusu ezali pete mpe motuya mingi mpe ete liboso ya mbotama ya Yesu, ekokaki kosakolama ete “[akozala na] lolenge to kitoko te, mpe ntango [tosengeli] komona ye, ezali na kitoko moko te oyo tozala na mposa na ye.” Mbala boni Nzambe atindaki nsango na Ye ya lokumu na nzela ya mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi oyo abengamaki sika mpe amitungisaki mingi to mwana mobali moko oyo ayekolaki te na ferme ya New York to misionele moko ya sika to bebe moko alali na elielo ya bibwele.

Boye likambo nini, soki biyano na losambo na biso eyaka na ndenge ya pete, to ya mbilingambilinga? Elingi biso koyika mpiko na komeka kosalela nsango malamu ya Klisto atako nsoi mpe potopoto yango ekoya? Ekoki te kozala ntango nyonso pole mpo na biso oyo ezali kosalama to mpo na nini, mpe, uta ntango na ntango, tokomiyoka moke lokola ndeko mwasi ya elenge oyo alobaki, “Nkolo, olobi nini mpo na lipamboli ebombami te?”

Tala bilembeteli ya bosolo mosusu, oyo etali bonganganzambe mosantu. Na kotiaka na lokasa lisanga ya Eklezia ya meridien, molongo ya yambo ya Luka elobi, “Nsima ayanganisaki bayekoli zomi na mibale esika moko, mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi,” makabo epesami te na kolandisaka boyebani ya kokamwa to epesami na kibonkoko to kimokolo. Elandisami te na eteyelo ya bonzambe to lingomba ya teolozi ya seminele. Yango epesamaki bobele na botie maboko na moko oyo azwaki botiami maboko na bolandisami moko ekatani te komataka na liziba ya nguya nyonso ya bonzambe, Nkolo Yesu Klisto.

Mpe na eklezia oyo esosolaka likabo ya boboto, ekoki te kozala elembo mosusu ya kitoko ya bosolo ya eklezia yango komona mapamboli mpe mayokani yango kokende na bankoko na biso bakufa, baye ya mabota na biso oyo bakenda liboso na biso? Basengeli bazwa etumbu mpo ete bango bazwaki nzela ya nsango malamu te to mpo ete bango babotamaki na ntango moko to esika moko ntango makuli mpe malongi ezalaki te mpo na bango? Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Bamikolo mya Nsuka ezali na bandako ya bule, oyo epesameli na Nkolo oyo kati na yango mosala ya lobiko, ya mawa ezali kosalema na esika ya mosala butu mpe moi mpo na baye bakufa, lokola mpe kopesa mabaku ya losambo mpe makuli mpo na bato ya bomoi. Na boyebi na ngai, elembeteli oyo ya sikisiki ya bolingo ya Nzambe ya mokili mobimba mpo na bato ya bomoi mpe bakufi, emonanaka te esika mosusu na mokili—longola se na eklezia moko oyo ezali kolakisa bosolo na likambo oyo ya sikisiki: Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka.

Bokutani na ngai ya liboso oyo epesaki solo bilembeteli ya bomoni mpe bomoi ya bosolo eyaki te na mabele ya lima ya kopakola mafuta to na liziba ya Siloama. Te, esaleli ya bosolo oyo ememaki kobikisama na ngai uta na Nkolo eyaki lokola nkasa na buku moko, iyo, Buku ya Mormon: Kondimana mosusu ya Yesu Klisto! Maloba oyo elobelaka buku oyo ebundisamaki mpe eboyamaki na bato mosusu oyo bazangi kondima, nkanda mbala mingi kosilika ya ndenge moko na baye bayebisaki mobali oyo abikaki ete akokaki te kozala na makoki ya kokutana na oyo ye ayebaki asilaki kokutana na yango.

Eboyamelaki ngai ete nzela oyo buku oyo esalemaki ezalaki ya kosalelama te, ya kondimama te, ya soni, kutu ya bosantu te. Sikawa, yango ezali elobeli ya makasi oyo euti na moto oyo akanisaka ete ayebi nzela oyo buku yango ebimaki, mpamba te ndimbola bobele moko oyo epesami mpo na banzela yango ezali ete ebongolamaki “na likabo mpe nguya ya Nzambe.” Yango wana. Wana ezali nyonso. Ezala ndenge nini, bopusi ya Buku ya Mormon kati na bomoi na ngai ezali te na likamwisi moke koleka bopakoli ya nsoi mpe potopoto na miso ya mobali akufa miso. Ezalaki, mpo na ngai, lingenda ya bokengi mpo na molimo na ngai, pole ya bobimisi oyo eleki mpe ekoti, bongengi ya nzela nasengeli kotambola ntango londende ya molili ekoya. Mpe na ntembe te bazali na yango, mpe na ntembe te bakosala yango.

Mpe epesi ngai likanisi oyo epesi ngai na ntina ya bolingo ya Mobikisi na ngai ya mokili mobimba mpe ngolu ya bosikoli, nakaboli na bino litatoli na ngai, oyo alongisami awa lokola baboti ya mobali oyo apambolamaki sika balobaki ete mwana na bango ya mobali asengeli koyokama mpo ete azalaki “ya mibu.” Malamu, ngai mpe lokola. Akomaki mokolo mpenza mpo na kozwama na liseki te. Bazongisaki maloba. Malamu, ngai mpe lokola. Nazali na sanza mibale etikali yambo ya mibu 85 ya mbotama na ngai. Nazalaki na pene ya liwa mpe nazongisamaki na bomoi. Na tambolaki na bakonzi mpe baprofeta, bakambi mpe bapostolo. Oyo eleki malamu na nyonso, na bantango mosusu nasili kozindisama na Molimo Mosantu. Nazali na elikya ete litatoli na ngai awa ekopesama ata mwa limemia moke.

Bandeko mibali mpe basi, nayaki na bondimi na ngai ya molimo mobimba ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka ezali bozongisi ya solo ya Eklezia ya Kondimana na Sika—mpe mingi koleka—mpo ete nakokaki te kowangana bilembetele ya bozongisi wana. Uta na baekisperiense wana ya yambo, nakanisi ete nazwi bilembetele nkoto moko—nkoto zomi?—mosusu oyo emonisi ete makambo oyo nalobeli lelo ezali solo. Boye nasepeli sikawa kosangana na moninga na ngai ya banzela ya Yelusaleme epayi wapi na mongongo na ngai elemba nazali koyemba:

Ngolu monene—boniboni mongongo oyo ezali pete—

Yango ebikisi mozangi lokola ngai!

Nabungaki kasi sikawa namonani lisusu,

Nakufaki miso, kasi sikawa namomi.

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Yoane 9:1–7

  2. Tala Yoane 9:13–25

  3. Yoane 9:3.

  4. Tala Yoane 9:6, 11.

  5. Yoane 9:3.

  6. Tala 2 Bakonzi 5:1–15.

  7. Tala Mituya 21:4–9; 1 Nefi 17:41; Alma 33:18–22.

  8. Yisaya 53:2

  9. Luka 9:1.

  10. Omni 1:20; tala lisusu Malongi mpe Mayokani.

  11. Yoane 9:23.

  12. “Amazing Grace,Hymns for Home and Church, Biblioteke ya Sango malamu.