70
Totondi Nkolo mpo ya Profeta
Na bongengi
1. Totondi Nkolo mpo ya Profeta
oyo akokamba biso.
Totondi mpo nsango elamu,
Epelisi biso mwinda.
Totondi mpo ya ma pamboli
maye yo opesi biso.
Esengo kosalelaka yo,
Kotosa mibeko mya yo.
2. Soko likama lizwi biso;
likani koboma biso
Elikia ezali liboso,
Toyebi lobiko pene.
Tondimi bolamu bwa Nkolo
apesaka biso kala.
Mabe makobundisa Siona,
Nsuka makobebisama.
3. Toyemba mpe mpo ya ye bolamu;
kokumisa ntango inso;
Kosepela nsango elamu,
Mpe koyoto moi mwa ye.
Boye o bobongo bwa seko
bayengebene bakoya,
Kasi babwaki nsango eye,
Bango bakozanga nsai.
Maloba: William Fowler, 1830–1865
Miziki: Caroline Sheridan Norton, 1808–ca. 1877