18
Toyika mpiko
Na bokasi
1. Toyika mpiko na mosala mwa Nkolo
Bongo o nsuka nde tokozwa mpe bomengo
Mpo ya bosembo tosimba mopanga,
mopanga makasi.
[Chorus]
Monguna atiola banga te
Nkolo azali penepene
Toko landa mpe te litio lya monguna
se Nkolo biso tokotosa.
2. Atako bake, tokozonga nsima te
Atako banguna bazali nde baike;
Nzoka nguya ya kokamwa ezali
mpo ya nkembo solo.
[Chorus]
Monguna atiola banga te
Nkolo azali penepene
Toko landa mpe te litio lya monguna
se Nkolo biso tokotosa.
3. Soko tozali sembo tokobanga te
Elonga ya Nkolo ezali penepene,
Na momekano, Tokolendisama,
Tokolongisama.
[Chorus]
Monguna atiola banga te
Nkolo azali penepene
Toko landa mpe te litio lya monguna
se Nkolo biso tokotosa.
Maloba mpe Miziki: Evan Stephens, 1854–1930