Miziki
Tata wa ngai


82

Tata wa ngai

Na bondimi

1. Tata wa ngai, yo ofandi

o Nkembo ya likolo.

Mokolo kani nakozonga

lisusu o miso mya yo?

Molimo wa ngai kalakala nde

efandaka o mboka yo?

O bomwana bwa ngai bwa yambo

eleisamaki ngai na yo?

2. Mwango mwa bwania mpe nkembo,

otindaki ngai o nse.

Olongoli ngai likundoli

lya ngai baninga ba kala.

Nde mbala nzike mwa eloko

ekoyebisa: “Yo mompaya,”

Mpe nasosoli mbalakaka

nawutaki o likolo.

3. Tata wa ngai, Yo nabiangi

na Molimo Mosantu.

Yango fungola ya boyebi

eyebisi ngai nde ntina.

Tata wa lola Ye nde monzemba?

Te bwania boyebisi ngai.

Bosolo boye bwa seko

bolobi ozwi mama kuna.

4. Elongwi ngai o nse eye,

etiki ngai Kufa mpe,

Tata, Mama, ekoki ngai

komono bino nde o lola.

Bongo o nsuka esilisi ngai

mosala boti ndaki ngai,

Babale bondima ngai mpe

boyamba ngai o mboka bino.

Maloba: Eliza R. Snow, 1804–1887

Miziki: James McGranahan, 1840–1907

Baloma 8:16–17

Misala 17:28–29 (22–31)