Miziki
Solo Mosikoli azali


74

Solo Mosikoli azali

Na Kimia

1. Solo Mosikoli azali.

Yango epesi ngai bokasi!

Ye akufaki, azali

Azali moto mwa ngai mpenza

Azali kopambolaka ngai.

Azali kolobelaka ngai.

Aleisaka bomoi bwa ngai

Azali kopambolaka ngai.

2. Azali kopesa ngai nkita.

Ye azelikokambaka ngai,

Azali kolendisa ngai.

Azali koyokemela ngai

Akolembisaka ngai nsomo.

Apangusaka ngai mpizoli.

Akolembisaka ngai mpasi

Azali kopambolaka ngai.

3. Ye azali moninga wa ngai.

Azali bolingo bwa seko.

Nakoyemba mpo azali:

Profeta, Nganga nzambe, Nkolo.

Azali kopesa ngai mpema.

Azali nakolonga liwa

Alengeleli ngai esika

Azali kokamba ngai kuna.

4. Azali! Nkembo ya ye nkombo!

Azali akobongwana te.

Liloba liye esengo!

Solo Mosikoli azali

Azali! Nkembo ya ye nkombo.

Azali akobongwana te

liloba liye nde esengo!

Solo Mosikoli azali.

Maloba: Samuel Medley, 1738–1799. Ekota o Cantiques des SDJ ya yambo, 1835.

Miziki: Lewis D. Edwards, 1858–1921

Yobo 19:25

Nzembo 104:33–34