90
Nakende wapi olingi
Na mokano
1. Ata na ngomba ya molai
to mpe likolo lya mbu.
Ata o bitumba bikasi
Nkolo asengeli ngai.
Soko na mwa mongongo abiangi
o nzela ngai nayebi te,
Nakoyanola: na ya yo loboko,
Naloba nini olingi.
[Chorus]
Nakende wapi olingi Nkolo,
o likolo lya ngomba to mbu.
Naloba nini olingi. Nkolo.
Nazala nini olingi.
2. Soko maloba sembo Yesu
alingi nasakola.
Mpe soko lisumu o nzela
nde likosenginia ngai.
Solo Mobikisi okamba ngai,
o katikati ya butu,
Na mongongo mwa ngai na koyebisa:
Naloba nini olingi.
[Chorus]
Nakende wapi olingi Nkolo,
o likolo lya ngomba to mbu.
Naloba nini olingi. Nkolo.
Nazala nini olingi.
3. Mpo ezali esika moko
awa nse ya monene,
Ya kosala bomoi bonso
mpo Yesu akufaki.
Boye ekolikia ngai mpo nayebi
ete olingaki ngai,
Nakosala na mokano mwa solo.
Naloba nini olingi.
[Chorus]
Nakende wapi olingi Nkolo,
o likolo lya ngomba to mbu.
Naloba nini olingi. Nkolo.
Nazala nini olingi.
Malabo: Mary Brown, 1856–1918
Miziki: Carrie E. Rounsefell, 1861–1930