86
Ndako eyei kitoko
Na bondimi
1. Ndako eyei kitoko
mpo ya bolingo;
Ndako ezwi esengo
mpo ya bolingo.
Nde kimi a etondi mpe,
koseke ya boboto.
Manso makotambola
mpo ya bolingo.
Bolingo, bolingo,
Manso makotambola
mpo ya bolingo.
2. Libota lya esengo
mpo ya bolingo;
Kanda to likunia te
mpo ya bolingo:
Fololo esepeli
mabele sembesembe
bomoi mpe bobongi
mpo ya bolingo.
Bolingo, bolingo,
bomoi mpe bobongi
mpo ya bolingo.
3. Lola mpe lokoseke
mpo ya bolingo;
Bato basalisani
mpo ya bolingo.
Liziba likoyemba,
likolo likongenge.
Nzambe akosepela,
mpo ya bolingo.
Bolingo, bolingo,
Nzambe akosepela
mpo ya bolingo.
Maloba mpe Miziki: John Hugh McNaughton, 1829–1891
Mosakoli 9:9