Miziki
Molimo wa Nzambe


54

Molimo wa Nzambe

Na nsai

1. Molimo wa Nzambe bo moto mokopela!

Nkembo ya mikolo mya nsuka eyei;

Mamoni, mapamboli ma kala mazongi,

Banzelu bayei lisusu o nse.

[Chorus]

Toyemba elongo na Mampinga ma lola

Hozana Hozana Nzambe mpe Mwa Mpate!

Nkembo na bango Kuna o likolo o lola

uta lelo mpe libela, Amen mpe amen.

2. Nkolo akokolisa bwania bwa basantu,

Akozongisa manso bo o yambo.

Nzambe akosopa boyebi mpe nguya.

Akolimwisa molili awa nse.

[Chorus]

Toyemba elongo na Mampinga ma lola

Hozana Hozana Nzambe mpe Mwa Mpate!

Nkembo na bango Kuna o likolo o lola

uta lelo mpe libela, Amen mpe amen.

3. Mpe tosangana na makita ma molimo,

Bokonzi bwa lola topanza o nse,

Mpo ya bondimi bwa biso tokosanzola

Mapamboli mpe Nkembo ya Nzambe.

[Chorus]

Mpe tosangana na makita ma molimo,

Bokonzi bwa lola topanza o nse,

Mpo ya bondimi bwa biso tokosanzola

Mapamboli mpe Nkembo ya Nzambe.

4. O nkembo mokolo mwa mpate mpe nkosi

Elongo bakolala,, na nkanda te,

Efelaima nde azwi nkembo ya Siona

Ekoya Yesu na Nkembo ya ye.

[Chorus]

Toyemba elongo na Mampinga ma lola

Hozana Hozana Nzambe mpe Mwa Mpate!

Nkembo na bango Kuna o likolo o lola

uta lelo mpe libela, Amen mpe amen.

Maloba: William W. Phelps, 1792–1872. Ekota O Cantiques des SDJ ya
yambo, 1835. Eyembamaki o libulisi lya Tempelo ya Kirtland o 1836.

Miziki: Nkombo eyebani te, ca. 1844

Malongi mpe Mayokani 109:79–80

Malongi mpe Mayokani 110