Miziki
Tala Mosikoli awei


30

Tala Mosikoli awei

Na limemia

1. Tala Mosikoli awei

Asepelisi mobeko.

Awei mbeka ya masumu,

Awei mbeka mpo ya masumu,

Mpo moto abika mpe nkembo elonga.

2. Bato babe batioli ye,

Batoboli ye na nsete;

Kofinga mpe kotuka ye,

Kofingaka mpa kotuka ye,

Motole ya nsende balatisaki ye.

3. Ata kobunda na liwa.

Ye ayimayimaki te:

Ya ye mokumba komeme,

Mpo ya ye mokumba komeme,

Bolingi bwa Tata wa ye amemiaki.

4. O Tata longola nkeni.

Elingi yo esalema;

Nasali mokano mwa yo,

mpo nasali mokano mwa yo,

yamba molimo wa ngai o mboka ya yo.

5. Awei, mpe o nsomo ena,

Moi mobombani: Nsoni!

Nse elengi, mpe eleli,

Mpe nse elengi, mpe eleli

Na nsomo eyanolaki: Nzambe awei.

6. Azali solo na bomoi,

Tobeleme o bilembo,

Toluka biso basantu,

Mpe toluka biso basantu,

Bobele kotosa mpe kosanzola ye.

Maloba: Eliza R. Snow, 1804–1887

Miziki: George Careless, 1839–1932

Malongi mpe Mayokani 18:11

Luka 22:42

Luka 23:46