26
Libondeli lya yambo lya Joseph Smith
Na mpiko
1. O kimia ntongo etani!
Moi mongengi solo
Nzoi, ndeke bayempaki,
nzembo mondule o zamba
O kati ya mpio ya zamba
Joseph aluki Nzambe.
Bongo o kati ya mpio ya zamba
kuna Joseph aluki Nzambe.
2. Na mabolongo, kobianga
Elenge asambeli
Nguya ebe ekangi ye
pene elikia ekufa;
Kasi elombe akobi
na kondima na Nkolo.
Kasi elombe akobi solo
na kondima na Nkolo Yesu.
3. Bongengi boleki moi
bokiti mbalakaka,
Likonzi lya nkembo lingengisi
zingazinga na ye
Bato babale babimi:
Nzabme Tata na Mwana,
Bato babale babimi solo:
Nzambe Tata mpe Mwana wa ye.
4. Oyo wa ngai Molingami:
Yokaye o esengo
Nde mpo ya Joseph Eyano.
Ayokemelaki Nkolo.
Motema mosepeli ye
zambi amoni Nkolo;
Motema mosepeli ye solo
zambi amoni mpenza Nkolo.
Maloba: George Manwaring, 1854–1889
Miziki: Sylvanus Billings Pond, 1792–1871; ekokisami na A. C. Smyth, 1840–1909
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:14–20, 25
Yakobo 1:5